< Ezekieli 9 >

1 Bongo nayokaki ye kobelela na mongongo makasi: « Bopusana awa, bino oyo bozali na mokumba ya kobebisa engumba! Tika ete moko na moko kati na bino asimba ebundeli na ye na loboko! »
他向我耳中大声喊叫说:“要使那监管这城的人手中各拿灭命的兵器前来。”
2 Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze.
忽然有六个人从朝北的上门而来,各人手拿杀人的兵器;内中有一人身穿细麻衣,腰间带着墨盒子。他们进来,站在铜祭坛旁。
3 Nkembo ya Nzambe ya Isalaele elongwaki na likolo ya basheribe epai wapi ezalaki kowumela mpe ekendeki kino na ekotelo ya Tempelo; mpe Yawe abengisaki moto oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye.
以色列 神的荣耀本在基路伯上,现今从那里升到殿的门槛。 神将那身穿细麻衣、腰间带着墨盒子的人召来。
4 Yawe alobaki na ye: « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. »
耶和华对他说:“你去走遍耶路撒冷全城,那些因城中所行可憎之事叹息哀哭的人,画记号在额上。”
5 Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu: « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te!
我耳中听见他对其余的人说:“要跟随他走遍全城,以行击杀。你们的眼不要顾惜,也不要可怜他们。
6 Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.
要将年老的、年少的,并处女、婴孩,和妇女,从圣所起全都杀尽,只是凡有记号的人不要挨近他。”于是他们从殿前的长老杀起。
7 Alobaki na bango: « Bokomisa Tempelo mbindo mpe botondisa mapango na yango na bibembe. Bokende! » Babimaki mpe bakendeki koboma bato kati na engumba.
他对他们说:“要污秽这殿,使院中充满被杀的人。你们出去吧!”他们就出去,在城中击杀。
8 Tango bazalaki koboma bato, natikalaki ngai moko; nakweyaki elongi na ngai kino na mabele mpe nakomaki koganga: — Oh, Nkolo Yawe! Okosilisa solo koboma batikali nyonso ya Isalaele, na kopelisela Yelusalemi kanda na Yo?
他们击杀的时候,我被留下,我就俯伏在地,说:“哎!主耶和华啊,你将忿怒倾在耶路撒冷,岂要将以色列所剩下的人都灭绝吗?”
9 Azongiselaki ngai: — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo; pamba te bazali koloba: « Yawe asundoli mokili; Yawe azali komona eloko moko te. »
他对我说:“以色列家和犹大家的罪孽极其重大。遍地有流血的事,满城有冤屈,因为他们说:‘耶和华已经离弃这地,他看不见我们。’
10 Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango.
故此,我眼必不顾惜,也不可怜他们,要照他们所行的报应在他们头上。”
11 Moto oyo alataki elamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye apesaki sango, na maloba oyo: « Nasali makambo oyo otindaki ngai. »
那穿细麻衣、腰间带着墨盒子的人将这事回复说:“我已经照你所吩咐的行了。”

< Ezekieli 9 >