< Ezekieli 8 >

1 Na mobu ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza ya motoba, wana nazalaki ya kovanda kati na ndako na ngai, mpe bakambi ya Yuda bavandaki liboso na ngai, loboko ya Nkolo Yawe esimbaki ngai kuna.
ئەوە بوو لە پێنجی مانگی شەشی ساڵی شەشەم، کاتێک لە ماڵی خۆم دانیشتبووم و پیرانی یەهوداش بەرامبەرم دانیشتبوون، لەوێ ڕۆحی یەزدانی باڵادەست هاتە سەرم.
2 Tango natalaki, namonaki elilingi moko lokola elongi ya moto. Eteni oyo ezalaki komonana lokola se ya loketo na yango ezalaki lokola moto, mpe lolenge ya eteni oyo ezalaki komonana lokola likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga makasi lokola linzanza ya sika.
جا تەماشام کرد ئەوەتا شێوەیەکی وەک مرۆڤم بینی، وێنەکەی لە ناوقەدیەوە بەرەو خوارەوە ئاگر و لە ناوقەدیەوە بەرەو سەرەوە وەک وێنەی بریسکانەوە لە شێوەی کانزایەکی ئاگراوی بوو.
3 Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.
شتێکی درێژکرد لە شێوەی دەست بوو، بە قژی سەرم منی گرت. ڕۆحی خودا لەنێوان زەوی و ئاسماندا هەڵیگرتم و لە چەند بینینێکدا منی هێنایە ئۆرشەلیم، بۆ داڵانی دەروازەکەی حەوشەی ناوەوە، ئەوەی ڕووەو باکوورە کە دیوەخانی ئەو پەیکەرەیە کە ئیرەیی خودا دەجۆشێنێت.
4 Nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki kuna ndenge kaka namonaki yango na emoniseli kati na lubwaku.
شکۆمەندی خودای ئیسرائیل لەوێ بوو، وەک ئەو بینینەی کە لە دەشتەکە بۆم ئاشکرا کرا.
5 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala na ngambo ya nor. » Natombolaki miso na ngai mpe namonaki nzambe ya ekeko ya zuwa, na ekotelo ya Ekuke oyo ya nor ya etumbelo.
ئینجا پێی فەرمووم: «ئەی کوڕی مرۆڤ، چاوت بەرەو ڕێگای باکوور هەڵبڕە.» چاوم بەرەو ڕێگای باکوور هەڵبڕی و ئەو پەیکەرەم بینی کە ئیرەیی خودا دەجۆشێنێت، لەلای دەرگای باکووری حەوشەی قوربانگاکە، بەرامبەر دەروازەی باکوور.
6 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, ozali komona makambo oyo bazali kosala, makambo mabe mpe ya nkele oyo libota ya Isalaele bazali kosala awa, makambo oyo ekokomisa Ngai mosika ya Esika na Ngai ya bule? Kasi okomona lisusu makambo oyo ezali mabe koleka. »
پاشان پێی فەرمووم: «ئەی کوڕی مرۆڤ، بینیت چی دەکەن؟ ئەو قێزەونییە گەورانەی کە بنەماڵەی ئیسرائیل لێرە دەیکەن، بۆ ئەوەی لە پیرۆزگاکەم دوورم بخەنەوە؟ بەڵام هێشتا شتی قێزەونتریش دەبینیت.»
7 Amemaki ngai na ekotelo ya lopango. Tango natalaki, namonaki lidusu moko na mir.
ئینجا منی هێنایە بەر دەرگای حەوشەکە، جا تەماشام کرد و کونێکم لە دیوارەکە بینی.
8 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, tobola mir. » Tango natobolaki yango, namonaki ekuke moko kuna.
پێی فەرمووم: «ئەی کوڕی مرۆڤ، ئێستا دیوارەکە هەڵکۆڵە.» منیش دیوارەکەم هەڵکۆڵی و دەرگایەکم بینییەوە.
9 Alobaki na ngai lisusu: « Kota; okomona makambo mabe mpe ya nkele oyo bazali kosala awa! »
پێی فەرمووم: «بڕۆ ژوورەوە و ئەو نەریتە قێزەونە خراپانە ببینە کە لەوێ دەیکەن.»
10 Tango nakotaki, natalaki mpe namonaki ete bakomakoma na bamir bililingi ya miselekete mpe ya banyoka ya lolenge nyonso, ya banyama nyonso ya mbindo mpe ya banzambe nyonso ya bikeko ya libota ya Isalaele.
منیش چوومە ژوورەوە و سەیرم کرد، ئەوەتا شێوەی هەموو جۆرە خشۆکێک و گیانلەبەری گڵاو و هەموو بتەکانی بنەماڵەی ئیسرائیل لەسەر دیوارەکە بە هەر چواردەوریدا وێنەی کێشراوە.
11 Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi: ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango.
حەفتا پیاو لە پیرانی بنەماڵەی ئیسرائیل لەبەردەمیان وەستابوون و یازەنیاهوی کوڕی شافانیش لەناوەڕاستیان وەستابوو. هەرکەسێک بخووردانی خۆی بەدەستەوە بوو، بۆنی دووکەڵی بخووریش هەڵدەستا.
12 Molimo alobaki na ngai: « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko? Bazali koloba: ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili! › »
پێی فەرمووم: «ئەی کوڕی مرۆڤ، بینیت پیرانی بنەماڵەی ئیسرائیل لە تاریکیدا چی دەکەن، هەرکەسە و لە نزرگەی بتەکەی خۆی؟ دەڵێن:”یەزدان نامانبینێت، یەزدان خاکەکەی بەجێهێشتووە.“»
13 Alobaki lisusu: « Okomona bango ndenge bazali kosala makambo ya mbindo oyo eleki penza mabe. »
ئینجا پێی فەرمووم: «هێشتا دەگەڕێیتەوە و کاری قێزەونتریش دەبینیت کە ئەوان دەیکەن!»
14 Bongo amemaki ngai lisusu na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya nor ya Tempelo ya Yawe; bongo namonaki basi bavandi wana, bazali kolela Tamuzi.
پاشان منی هێنایە داڵانی دەروازەی ماڵی یەزدان، ئەوەی ڕووەو باکوورە، ئەوەتا ژنان دانیشتوون و بۆ تەمووز دەگریێن.
15 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, omoni makambo oyo? Okomona lisusu makambo ya mbindo koleka oyo ya liboso. »
پێی فەرمووم: «ئەی کوڕی مرۆڤ، ئەمەت بینی؟ هێشتا دەگەڕێیتەوە و کاری قێزەونتریش دەبینیت.»
16 Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe: na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.
ئینجا منی هێنایە حەوشەکەی ناوەوەی ماڵی یەزدان، ئەوەتا لەلای داڵانی پیرۆزگای یەزدان لەنێوان هەیوان و قوربانگاکە، نزیکەی بیست و پێنج پیاو پشتیان لە پەرستگای یەزدانە و ڕوویان لە ڕۆژهەڵاتە، ڕووەو ڕۆژهەڵات کڕنۆشیان بۆ خۆر بردووە.
17 Alobaki na ngai lisusu: « Mwana na moto, omoni? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo!
پێی فەرمووم: «ئەی کوڕی مرۆڤ، بینیت؟ ئایا ئەو کردەوە قێزەونانەی بنەماڵەی یەهودا لێرە کردوویانە کەمە؟ سەرباری ئەوەش خاکەکەیان پڕکردووە لە ستەم و دەگەڕێنەوە بۆ پەستکردنم، ببینە چیلکە دار لە لووتیان نزیک دەکەنەوە.
18 Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »
هەروەها منیش بە تووڕەییەوە هەڵسوکەوتیان لەگەڵدا دەکەم، چاوەکانم بەزەییان نایەتەوە و دەستم لێیان ناپارێزم. ئەگەر بە دەنگی بەرز لە گوێمدا هاوار بکەن گوێیان لێ ناگرم.»

< Ezekieli 8 >