< Ezekieli 7 >

1 Yawe alobaki na ngai:
Y vino a mí la palabra del Señor, diciendo:
2 « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele: ‹ Esili! Tango ya suka ebelemi mpo na mokili mobimba!
Y tú, hijo de hombre, di: Esto es lo que el Señor le ha dicho a la tierra de Israel: ha llegado el fin, el fin ha llegado a los cuatro extremos de la tierra.
3 Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo, nakopelisela yo kanda na Ngai, nakosambisa yo kolanda etamboli na yo mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo.
Ahora ha llegado el fin, y enviaré mi ira sobre ti, juzgándote por tus caminos, enviaré un castigo sobre ti por todos tus actos repugnantes.
4 Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te; nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. ›
Mi ojo no tendrá piedad de ti, y no tendré piedad; pero enviaré el castigo de tus caminos sobre ti, y tus repugnantes obras estarán en medio de ti, y sabrás de que soy el Señor.
5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Mawa! Pasi ya somo ezali koya!
Esto es lo que el Señor ha dicho: un mal, un mal; Mira, ya viene.
6 Tango ya suka ebelemi! Ya solo, tango ya suka ebelemi penza! Etelemeli yo. Tala, tango yango esili kobelema!
Ha llegado el fin, ha llegado el fin; Mira, se te viene encima.
7 Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili! Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi, somo makasi ekoti, mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba.
Ha llegado la hora, oh pueblo de la tierra: ha llegado la hora, el día está cerca; el día de aflicción y no de alegría en los montes.
8 Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngai mpe ya kotombokela yo! Nakosambisa yo kolanda etamboli mpe misala na yo nyonso ya mbindo.
Ahora, en poco tiempo, derramaré mi furor daré pleno efecto a mi ira contra ti, juzgándote por tus caminos y enviándote un castigo por todas tus obras repugnantes.
9 Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.
Mi ojo no tendrá misericordia, y no tendré piedad. Te enviaré el castigo de tus caminos, y tus repugnantes obras estarán en medio de ti; y verás que yo soy el Señor que castiga.
10 Tala, mokolo yango nde yango oyo! Esili kobelema! Kobebisama eboti mbuma, lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli!
Mira, el día; Mira, ya viene la mañana; La vara ha florecido, el orgullo ha echado brotes.
11 Makambo mabe ekoli makasi mpe ekomi lokola fimbu mpo na kopesa etumbu na misala mabe; moto moko te kati na bato to kati na bato ebele akotikala; eloko moko te ekotikala, ezala bomengo to biloko ya motuya.
El comportamiento violento se ha convertido en una vara del mal; nada quedará de ellos; ni de su multitud ni sus riquezas, no habrá quien los lamente.
12 Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.
Ha llegado el momento, se acerca el día; no se alegre el que compra bienes, ni el que vende; llore, porque él furor está en toda la multitud.
13 Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki, ata soki azali nanu na bomoi; pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo. Likolo ya masumu na bango, moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye.
Porque el comerciante no volverá a las cosas que vendió, incluso mientras que aún viven; porque la visión sobre toda la multitud no se cancelará, y a causa de su iniquidad ninguno podrá amparar su vida.
14 Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini, moto moko te akokende na bitumba; pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso.
Ellos han tocado la trompeta, y prepararon todas las cosas, pero nadie va a la batalla; porque mi furor está sobre toda la multitud.
15 Mopanga ekoboma na libanda ya engumba, bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi ekoboma kati na engumba; bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga, mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi.
Afuera está la espada, y dentro la enfermedad y la necesidad de alimento; el que está en el campo abierto será castigado; El que está en la ciudad llegará a su fin por necesidad de comida y enfermedad.
16 Batikali bakokima na likolo ya bangomba; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.
Y aquellos de los que escapen a salvo irán y estarán en lugares secretos como las palomas de los valles, todos ellos morirán, cada uno gimiendo por su pecado.
17 Maboko na bango nyonso ekolemba, mpe mabolongo na bango nyonso ekolemba lokola mayi.
Todas las manos serán débiles y todas las rodillas sin fuerza, como el agua.
18 Bakolata bilamba ya basaki mpe somo ekokanga bango; bilongi na bango ekotonda na soni, bakokokola suki ya mito na bango.
Y se vestirán de cilicio, y un profundo temor los cubrirá. y habrá vergüenza en todos los rostros, e irán con las cabezas rapadas.
19 Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. Palata mpe wolo yango ekosilisa baposa mpe nzala na bango te, pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu.
Sacarán su plata a las calles, y su oro será como cosa inmunda. Su plata y su oro no podrán mantenerlos a salvo en el día de la ira del Señor; no saciarán su apetito ni tendrán alimento para su necesidad; porque ha sido la causa de su caída en el pecado.
20 Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango.
Se enorgullecían de sus ornamentos, y las usaron y crearon las imágenes de sus repugnantes y odiadas cosas en él; por esta razón, les he hecho algo impuro.
21 Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumba na maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokili mpo ete babotola yango na makasi mpe basakanela yango.
Y lo entregaré todo en manos de hombres de tierras extranjeras que lo tomarán por la fuerza, y que los malhechores de la tierra tengan para sí mismos; y lo harán impuro.
22 Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te, mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule. Bongo, miyibi bakokota kuna mpe bakosambwisa yango.
Y mi rostro se apartará de ellos, y profanaran mi templo; hombres violentos entrarán en él y lo profanarán.
23 Bomisalela minyololo mpo ete mokili etondi na babomi mpe engumba etondi na makambo mabe.
Prepara las cadenas; porque la tierra está llena de crímenes de sangre, y la ciudad está llena de actos violentos.
24 Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo mpo ete eya kobotola bandako na bango; nakosilisa lolendo ya bato ya nguya mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule.
Por esta razón enviaré a los peores de las naciones y ellos tomarán sus casas para sí mismos: Pondré fin al orgullo de su fuerza; y sus lugares santos serán profanados.
25 Tango makambo oyo ya somo ekoya, bakoluka kimia kasi bakozwa yango te.
La destrucción viene; y buscarán la paz, y no habrá paz.
26 Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.
Ruina tras ruina vendrá, y rumor tras rumor; y la visión del profeta será avergonzada, y el conocimiento de la ley llegará a su fin entre los sacerdotes, y la sabiduría entre los antiguos.
27 Mokonzi akozala na matanga, mokambi akolata pili, mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. Nakofuta bango kolanda etamboli na bango mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »
El rey se pondrá de luto, y el gobernante se envolverá en desolación, y las manos de la gente de la tierra temblarán; les daré castigo de acuerdo a su conducta, los juzgaré según sus acciones; y sabrán que yo soy el Señor.

< Ezekieli 7 >