< Ezekieli 6 >

1 Yawe alobaki na ngai:
The word of Yahweh came to me, saying,
2 « Mwana na moto, balola elongi na yo na ngambo ya bangomba ya Isalaele mpe sakola mabe na tina na yango.
“Son of man, set your face against the mountains of Israel and prophesy to them.
3 Loba na yango: Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku: ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba.
Say, 'Mountains of Israel, listen to the word of the Lord Yahweh! The Lord Yahweh says this to the mountains and to the hills, to the streambeds, and to the valleys: Behold! I am bringing a sword against you, and I will destroy your high places.
4 Nakobebisa bitumbelo na bino nyonso, nakobuka mike-mike bitumbelo na bino ya malasi ya ansa mpe nakoboma bato na bino liboso ya banzambe na bino ya bikeko.
Then your altars will become desolate and your pillars will be destroyed, and I will throw down your dead in front of their idols.
5 Nakotanda bibembe ya bana ya Isalaele liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.
I will lay the dead bodies of the people of Israel before their idols, and scatter your bones around your altars.
6 Bingumba ekotikala lisusu na bato te mpe bisambelo ya likolo ya bangomba ekobebisama na bisika nyonso oyo bokozala; mpo ete bitumbelo na bino etikala pamba mpe ebebisama, banzambe na bino ya bikeko ebukana biteni-biteni mpe ebebisama, bitumbelo na bino ya malasi ya ansa ebukana mpe biloko oyo maboko na bino esalaki ezala lisusu te.
Everywhere you live, cities will be laid waste and the high places ruined, so that your altars will be laid waste and made desolate. Then they will be broken and disappear, your pillars will be cut down and your works will be wiped away.
7 Kati na bino, bato bakokufa na mopanga; bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
The dead will fall down in your midst and you will know that I am Yahweh.
8 Kasi nakobikisa ndambo ya bato kati na bino: bakobika na mopanga tango nakopanza bino kati na mikili mpe bikolo.
But I will preserve a remnant among you, and there will be some who escape the sword among the nations, when you are scattered throughout the countries.
9 Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.
Then those who escape will think of me among the nations where they will be held captive, that I was grieved by their promiscuous heart that turned away from me, and by their eyes that whored after their idols. Then they will show loathing on their face for the wickedness which they have committed with all their abominations.
10 Boye bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, mpe ete nakebisaki bango na pamba te ete nakotindela bango pasi. ›
So they will know that I am Yahweh. It was for a reason that I said I would bring this evil to them.
11 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Beta maboko na yo, tuta makolo na yo mpe ganga: ‹ Mawa! › mpo na misala mabe mpe misala ya mbindo ya libota ya Isalaele, pamba te bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka!
The Lord Yahweh says this: Clap your hands and stomp your foot! Say, 'Alas!' because of all the evil abominations of the house of Israel! For they will fall by sword, famine, and plague.
12 Moto oyo azali mosika akokufa na bokono oyo ebomaka, oyo azali pembeni akokufa na mopanga; mpe oyo atikali, bakozingela ye mpe akokufa na nzala makasi. Nakosilisa kanda na Ngai na banzoto na bango.
The one far away will die by plague, and the one who is near will fall by the sword. Those who remain and survive will die by famine. In this way I will accomplish my fury against them.
13 Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko.
Then you will know that I am Yahweh, when their dead lie among their idols, around their altars, on every high hill—on all the mountain peaks, and under every flourishing tree and thick oak—the places where they burned incense to all their idols.
14 Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpe nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te, wuta na esobe kino na engumba Ribila, na bisika nyonso oyo bazali kovanda; boye bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. »
I will strike with my hand and make the land desolate and a waste, from the wilderness to Diblah, throughout all the places where they live. Then they will know that I am Yahweh.”

< Ezekieli 6 >