< Ezekieli 5 >

1 Sik’oyo, mwana na moto, kamata mopanga ya minu mpe salela yango lokola jileti mpo na kokata suki ya moto mpe mandefu na yo; kamata lisusu emekelo kilo mpe kabola suki yango na maboke.
And thou, son of man, take thee a sharp knife that shaveth the hair: and cause it to pass over thy head, and over thy beard: and take thee a balance to weigh in, and divide the hair.
2 Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.
A third part thou shalt burn with fire in the midst of the city, according to the fulfilling of the days of the siege: and thou shalt take a third part, and cut it in pieces with the knife all round about: and the other third part thou shalt scatter in the wind, and I will draw out the sword after them.
3 Kasi kamata ndambo moke kaka ya suki, kanga yango na songe ya elamba na yo.
And thou shalt take thereof a small number: and shalt bind them in the skirt of thy cloak.
4 Bongo, na oyo ekotikala, bwaka ndambo na yango na moto mpo ete ezika. Boye, moto oyo ekobima kuna ekopanzana na libota mobimba ya Isalaele.
And thou shalt take of them again, and shalt cast them in the midst of the fire, and shalt burn them with fire: and out of it shall come forth a fire into all the house of Israel.
5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala Yelusalemi! Natiaki yango na kati-kati ya bikolo, mpe bamboka minene ezingelaki yango.
Thus saith the Lord God: This is Jerusalem, I have set her in the midst of the nations, and the countries round about her.
6 Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai.
And she hath despised my judgments, so as to be more wicked than the Gentiles; and my commandments, more than the countries that are round about her: for they have cast off my judgments, and have not walked in my commandments.
7 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola botambolaki na botomboki koleka bikolo oyo ezali zingazinga na bino, bolandaki mibeko mpe bikateli na Ngai te mpe bolandaki ata kutu bosembo ya bamboka oyo ezingelaki bino te;
Therefore thus saith the Lord God: Because you have surpassed the Gentiles that are round about you, and have not walked in my commandments, and have not kept my judgments, and have not done according to the judgments of the nations that are round about you:
8 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Ngai moko nakotelemela yo, Yelusalemi, mpe nakopesa yo etumbu na miso ya bikolo.
Therefore thus saith the Lord God: Behold I come against thee, and I myself will execute judgments in the midst of thee in the sight of the Gentiles.
9 Likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo osalaka, nakosala yo makambo oyo natikala nanu kosala te na tango ya kala mpe oyo nakotikala kosala te na mikolo ekoya. ›
And I will do in thee that which I have not done: and the like to which I will do no more, because of all thy abominations.
10 Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.
Therefore the fathers shall eat the sons in the midst of thee, and the sons shall eat their fathers: and I will execute judgments in thee, and I will scatter thy whole remnant into every wind.
11 Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe: ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino: liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. ›
Therefore as I live, saith the Lord God: Because thou hast violated my sanctuary with all thy offences, and with ail thy abominations: I will also break thee in pieces, and my eye shall not spare, and I will not have any pity.
12 Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.
A third part of thee shall die with the pestilence, and shall be consumed with famine in the midst of thee: and a third part of thee shall fall by the sword round about thee: and a third part of thee will I scatter into every wind, and I will draw out a sword after them.
13 Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai.
And I will accomplish my fury, and will cause my indignation to rest upon them, and I will be comforted: and they shall know that I the Lord have spoken it in my zeal, when I shall have accomplished my indignation in them.
14 Yo Yelusalemi, nakobebisa yo, okoyokisama soni kati na bikolo nyonso oyo ezingeli yo mpe na miso ya bato nyonso oyo bakolekela na nzela na yo.
And I will make thee desolate, and a reproach among the nations that are round about thee, in the sight of every one that passeth by.
15 Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi.
And thou shalt be a reproach, and a scoff, an example, and an astonishment amongst the nations that are round about thee, when I shall have executed judgments in thee in anger, and in indignation, and in wrathful rebukes.
16 « Tango nakobwakela yo makonga na Ngai ya mike ya nzala makasi oyo ebomaka mpe oyo ebebisaka, nakosala bongo mpo na kosilisa koboma bino: nakoyeisa nzala makasi koleka kati na yo mpe nakolongola bilei na bibombelo na yo.
I the Lord have spoken it: When I shall send upon them the grievous arrows of famine, which shall bring death, and which I will send to destroy you: and I will gather together famine against you: and I will break among you the staff of bread.
17 Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. »
And I will send in upon you famine, and evil beasts unto utter destruction: and pestilence, and blood shall pass through thee, and I will bring in the sword upon thee. I the Lord have spoken it.

< Ezekieli 5 >