< Ezekieli 45 >
1 Tango bokokabola mokili na zeke lokola libula, bokopesa epai na Yawe eteni moko lokola etuka ya bule: ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele nkoto mitano na mokuse. Etuka yango ekozala bule na etando na yango nyonso.
當你們抽籤分地作為產業時,應將一塊聖地獻給上主,當作獻地,長二萬五千肘,寬二萬肘。凡在這範圍之內的地全是聖的。
2 Bokotika bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi, mpe bametele pene nkama mibale na tuku mitano na mokuse mpo na kotonga Esika ya bule; bongo bokozingela yango na lopango moko ya polele ya bametele pene tuku mibale na mitano.
其中一個作為聖所,長百肘;四面成方形,周圍有空地,寬五十肘。
3 Kati na etuka wana ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse, bokokata eteni ya mabele mpo na Esika ya bule, Esika-Oyo-Eleki-Bule.
在這一區量出二萬五千肘,一萬肘寬的地方其中應有聖所;
4 Ekozala eteni ya bule oyo balongoli kati na mokili: ezali ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kati na Esika ya bule mpe bapusanaka pene ya Yawe mpo na kosalela Ye; ezali kuna nde bakotonga bandako na bango, mpe ekozala esika oyo ebulisami mpo na Esika ya bule.
這塊聖地,應歸於在聖所內為服事上主供職的司祭,作為的住處和他們羊群的牧場。
5 Etuka moko ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse ekozala mpo na Balevi oyo basalaka kati na Tempelo; lokola libula na bango, ekozala kuna nde bakotonga bingumba na bango ya kovanda.
另一塊五千肘長,一萬肘寬的地方,歸於在殿內服務的肋未人,作為他們的地業,及他們居住的城邑。
6 Pembeni ya etuka ya bule, bokokata etando ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse mpo na kotonga engumba; ekozala mpo na libota mobimba Isalaele.
再劃出建京城的地段,寬五千肘,長二萬五千肘,在保留的獻地之旁,歸於全以色列家族。
7 Mokambi akozwa mabele oyo ezali kokabola etuka ya bule mpe mabele ya engumba; mabele yango ekokende eteni moko na ngambo ya weste, mpe eteni mosusu na ngambo ya este. Molayi ya etuka yango ekobanda longwa na ngambo ya weste kino na mondelo ya ngambo ya este oyo etalana na moko ya biteni.
在保留的獻地,和建城的地段的兩旁,緊靠著保留的獻地和建城的地段,由西邊往西,由東邊往東的土地,全歸於元首。西邊的邊界,東邊的邊界,其長與其他支派所分得的土地相同。
8 Etuka yango ekozala libula na ye kati ya Isalaele. Boye, bakambi na Ngai bakonyokola lisusu bato na Ngai te, kasi bakotika mokili na maboko ya lisanga ya Isalaele kolanda mabota na bango.
這是在以色列劃歸元首的領土:這樣,我的元首不再壓迫我的百姓,並將土地留給以色列家族及他們的各支派o
9 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe.
吾主上主這樣說:「以色列的元首,你們該舒了吧! 你們應放棄強暴與搶掠,實行正義與公道,你們不要再向我的人民橫徵暴歛──吾主上主的斷語──
10 Bosengeli te kosalela emekelo kilo ya lokuta, efa ya lokuta to bati ya lokuta.
你們應用公平的天平,準確的「厄法」,準確的「巴特」。
11 Efa mpe bati ekotaka biloko ndenge moko: ekotaka ndambo moko kati na bandambo zomi ya omeri. Bamekaka monene ya efa mpe bati kolanda monene ya omeri.
「厄法」和「巴特」的容量應當相等:即一「巴特」等於「荷默爾」的十分之一,十分之一「荷默爾」即一「厄法。」分量應依照「荷默爾」而十定。
12 Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba.
一「協刻耳」應為二十「革辣。」二十「協刻耳」加二十五「協刻耳」,再加十五「協刻耳」,為你們是一「米納」。
13 Tala biloko oyo bokotia pembeni lokola makabo ya kopesa epai na Yawe: mpo na omeri moko ya ble mpe orje, eteni ya motoba ya efa moko.
你們應奉上的獻儀如下:由一「荷默爾」小麥,,應獻六分之一「厄法」;由一「荷默爾」大麥,也應獻六分之一「厄法」。
14 Mobeko mpo na mafuta, bakomeka yango na bati: eteni ya zomi ya omeri moko.
對油的規定由一「苛爾」油,應獻十分之一「巴特」, 因為十「巴特」為一「荷爾」。
15 Mpe bokozwa ntaba moko ya mwasi to meme moko ya mobali kati na bibwele nkama mibale, oyo ekobimela na etonga ya bibwele oyo eliaka matiti kitoko ya Isalaele. Bakosalela yango lokola likabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato, elobi Nkolo Yawe.
由以色列茂盛的牧場,每二百隻羊中取出一隻羔羊獻為供物,做全燔祭與笸平祭,為自己贖罪──吾主上主的斷語──
16 Bato nyonso ya mokili basengeli kolongola likabo yango mpo na mokambi kati na Isalaele.
全國人民應將這樣的獻儀交給以色列的元首;
17 Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.
元首在慶節、月朔和安息日,以及以色列家族所有的慶節,應備辦全燔祭、素祭和奠祭,又應備辦贖罪祭、素祭、全燔祭與和平祭,為以色列家族贖罪。」
18 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule.
吾主上主這樣說:「正月初一,你應取一頭無瑕的公牛犢,為聖所取潔。
19 Nganga-Nzambe akozwa ndambo ya makila ya mbeka ya masumu, akotia yango na mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na basonge nyonso minei ya moboko ya etumbelo mpe na mabaya oyo esimbaka ekuke ya lopango ya kati.
司祭應取贖罪祭祭牲的血,塗在聖殿的門框上,祭壇座的四角上,和內院的門框上。
20 Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo.
正月初七,為那不慎誤犯的人,也應照樣行,為聖殿取潔。
21 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire.
正月十四,你們應過逾越節,七天吃無酵餅。
22 Na mokolo yango, mokambi akopesa ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili.
在那一天,元首應為自己和本國人民獻一頭公牛犢,為贖罪祭。
23 Na mikolo nyonso sambo ya feti, mokonzi akopesa bangombe ya mibali sambo mpe bameme ya mibali sambo, oyo ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, mpe ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu.
七天的慶節,他應向上主獻全燔祭;七天內每天應獻七頭無瑕的公牛犢,和七隻無瑕的公羊;每天獻一隻小山羊,為贖罪祭。
24 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta; mpe mpo na meme moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta.
還應獻素祭:為每頭公牛犢獻一「厄法」麵;為一「厄法」麵加一「辛」油。
25 Na mikolo nyonso sambo ya feti oyo ebandaka na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, akobanda kobonza bambeka kaka wana: bambeka ya masumu, ya kotumba, ya bambuma mpe ya mafuta.
七月十五日的慶節,他應獻同樣的祭品;七天之久應獻同樣的贖罪祭、全燔祭、素祭和油。」