< Ezekieli 43 >
1 Moto yango amemaki ngai kino na ekuke oyo etala na ngambo ya este,
Y llevóme a la puerta, a la puerta que mira hacia el oriente,
2 mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye.
Y he aquí la gloria del Dios de Israel, que venía de hacia el oriente; y su sonido era como el sonido de muchas aguas, y la tierra resplandecía a causa de su gloria.
3 Emoniseli oyo namonaki ezalaki ndenge moko na oyo namonaki tango ayaki kobebisa engumba, mpe ndenge moko na oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye, nakweyaki elongi kino na mabele.
Y la visión que ví era como la visión, como aquella visión que ví, cuando vine para destruir la ciudad; y las visiones eran como la visión que ví junto al río de Cobar; y caí sobre mi rostro.
4 Nkembo na Yawe ekotaki kati na Tempelo na nzela ya ekuke oyo etala na ngambo ya este.
Y la gloria de Jehová entró en la casa por la vía de la puerta que tenía la haz camino del oriente.
5 Bongo, Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na lopango ya kati, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo.
Y alzóme el espíritu, y metióme en el patio de adentro; y he aquí que la gloria de Jehová hinchió la casa.
6 Tango moto yango atelemaki pene na ngai, nayokaki mongongo ya moto koloba na ngai wuta na kati ya Tempelo.
Y oí uno que me hablaba desde la casa; y un varón estaba junto a mí,
7 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.
Y díjome: Hijo del hombre, este es el lugar de mi asiento, y el lugar de las plantas de mis pies, en el cual habitaré entre los hijos de Israel para siempre; y nunca más la casa de Israel contaminará mi santo nombre, ellos y sus reyes, con sus fornicaciones, y con los cuerpos muertos de sus reyes, en sus altares.
8 Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai.
Poniendo ellos su umbral junto a mi umbral, y su poste junto a mi poste, y una pared entre mí y ellos, contaminaron mi santo nombre con sus abominaciones que hicieron, y yo los consumí en mi furor.
9 Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela.
Ahora echarán lejos de mí su fornicación, y los cuerpos muertos de sus reyes, y habitaré en medio de ellos para siempre.
10 Mwana na moto, lakisa epai ya libota ya Isalaele ndenge Tempelo ezali mpo ete bayoka soni mpo na masumu na bango; mpe tika ete bameka molayi mpe mokuse na yango.
Tú pues, hijo del hombre, anuncia a la casa de Israel esta casa, y avergüéncense de sus pecados, y midan la traza.
11 Soki bayoki penza soni mpo na makambo nyonso oyo basalaki, lakisa bango ndenge nini Tempelo ezali: ndenge basalela yango, bikuke mpe bikotelo na yango, ndenge batambolisaka yango, mibeko nini balandaka mpe ndenge nini basalaka losambo; koma yango, na miso na bango, mpo ete bakoka kolandela yango mpe kotia yango na misala.
Y si se avergonzaren de todo lo que han hecho, házles entender la figura de la casa, y su traza, y sus salidas, y sus entradas, y todas sus figuras, y todas sus descripciones, y todas sus pinturas, y todas sus leyes; y descríbelo delante de sus ojos, y guarden toda su forma, y todas sus leyes, y háganlas.
12 Tala mobeko oyo etali Tempelo: bisika nyonso oyo ezali zingazinga ya likolo ya ngomba ekozala bule koleka. Yango nde mobeko oyo etali Tempelo.
Esta es la ley de la casa: Sobre la cumbre del monte será edificada: todo su término al derredor será santísimo: he aquí que esta es la ley de la casa.
13 Tala molayi mpe mokuse ya etumbelo na bametele: zingazinga ya se ya etumbelo ezalaki na libulu moko ya bozindo ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ndenge moko na mokuse na yango; bazingelaki yango na eloko moko evimba ya basantimetele pene mwambe. Etumbelo ezalaki,
Y estas son las medidas del altar en codos: el codo de a codo y palmo. El medio de un codo, y de un codo la anchura; y su término, que estaba sobre su borde al derredor, de un palmo; y esta es la altura del altar.
14 longwa na se ya mabele kino na moboko, na metele pene moko na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse; kobanda na moboko ya moke kino na moboko ya monene, bametele pene mibale na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse.
Y desde el medio de la tierra hasta el lugar de abajo había dos codos, y la anchura de un codo; y desde el lugar menor hasta el lugar mayor había cuatro codos, y la anchura de un codo.
15 Etumbelo ezalaki na bametele pene mibale na bosanda, mpe maseke minei ezalaki likolo na yango.
Y el altar era de cuatro codos, y encima del altar había cuatro cuernos.
16 Likolo ya etumbelo ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso: bametele pene motoba.
Y el altar tenía doce codos en longitud, y doce en anchura, cuadrado a sus cuatro lados.
17 Moboko ya monene ezalaki ekokana na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso: bametele pene sambo. Eloko moko evimba ya basantimetele pene tuku mibale na mitano ezalaki zingazinga na yango. Mpe libulu moko ya basantimetele pene tuku mitano na bozindo ezalaki zingazinga na yango; mpe binyatelo ya etumbelo ezalaki na ngambo ya este. »
Y el patio era de catorce codos de longitud, y catorce de anchura en sus cuatro lados; y el término que tenía al derredor era de medio codo, el medio que tenía era de un codo al derredor, y sus gradas estaban al oriente.
18 Bongo alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila.
Y díjome: Hijo del hombre, así dijo el Señor Jehová: Estas son las leyes del altar el día que él será hecho, para ofrecer sobre él holocausto, y para esparcir sobre él sangre.
19 Okopesa mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi ya libota ya Tsadoki mpe babelemaka liboso na Ngai mpo na kosalela Ngai, elobi Nkolo Yawe;
Darás a los sacerdotes Levitas, que son del linaje de Sadoc, que son allegados a mí, dijo el Señor Jehová, para ministrarme, un becerro hijo de vaca para expiación.
20 okokamata ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na maseke minei ya etumbelo mpe na basonge minei ya moboko ya likolo mpe zingazinga ya eloko oyo evimba. Na bongo, okopetola etumbelo mpe okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yango.
Y tomarás de su sangre, y pondrás en sus cuatro cuernos, y en las cuatro esquinas del patio, y en el término al derredor, y limpiarlo has, y expiarlo has.
21 Okokamata ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu mpe okotumba yango na esika oyo babongisa na Tempelo mpo na yango, na libanda ya Esika ya bule.
Y tomarás el becerro de la expiación, y quemarle ha conforme a la ley de la casa, fuera del santuario.
22 Na mokolo ya mibale, okobonza ntaba moko ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka ya masumu; boye, etumbelo ekokoma peto ndenge ekomaki peto na nzela ya ngombe ya mobali.
Y al segundo día ofrecerás un macho de cabrío sin tacha para expiación; y expiarán el altar como lo expiaron con el becerro.
23 Tango okosilisa kopetola yango, okobonza mwana ngombe ya mobali mpe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele.
Cuando acabares de expiar, ofrecerás un becerro hijo de vaca entero, y un carnero entero de la manada.
24 Okobonza yango liboso ya Yawe; bongo, Banganga-Nzambe bakobwakela yango mungwa mpe bakobonza yango lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe.
Y ofrecerlos has delante de Jehová; y los sacerdotes echarán sobre ellos sal, y ofrecerlos han en holocausto a Jehová.
25 Mikolo sambo, okobanda kobonza, mokolo na mokolo, ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu; okobonza lisusu mwana ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele.
Siete días sacrificarás el macho cabrío de la expiación cada día; y el becerro hijo de vaca, y el carnero de la manada enteros sacrificará.
26 Bakosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo mpe kopetola yango mikolo sambo; bongo nde bakopetola mpe bakobulisa yango.
Siete días expiarán el altar, y lo limpiarán, y henchirán sus manos.
27 Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. »
Y acabados estos días, el octavo día, y desde en adelante, sacrificarán los sacerdotes sobre el altar vuestros holocaustos, y vuestros pacíficos; y serme heis aceptos, dijo el Señor Jehová.