< Ezekieli 42 >
1 Moto yango amemaki ngai kino na lopango ya libanda, na nzela oyo ekenda kino na ngambo ya nor; bongo amemaki ngai na ndako oyo ezalaki na bashambre ya Banganga-Nzambe, oyo na ngambo ya sude, etalana na Tempelo; mpe na ngambo ya nor, etalana na mir.
他帶我出來向北,到外院,又帶我進入聖屋;這聖屋一排順着空地,一排與北邊鋪石地之屋相對。
2 Ndako yango ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe tuku mibale na mitano na mokuse, mpe ekuke na yango ezalaki na ngambo ya nor.
這聖屋長一百肘,寬五十肘,有向北的門。
3 Ezalaki na ndako moko ya etaje etalana na ndako ya ba-etaje misato oyo ezalaki na kati-kati ya lopango ya kati mpe lopango ya libanda; molayi oyo ekabolaki ndako ya ba-etaje misato na mir ya Tempelo ezalaki na bametele pene zomi.
對着內院那二十肘寬之空地,又對着外院的鋪石地,在第三層樓上有樓廊對着樓廊。
4 Nzela moko ya bametele pene mitano na mokuse mpe bametele pene tuku mitano na molayi ezalaki liboso ya bashambre yango. Bongo, bikuke na yango ezalaki na ngambo ya nor.
在聖屋前有一條夾道,寬十肘,長一百肘。房門都向北。
5 Bashambre ya etaje ya likolo ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe ya se, pamba te baveranda na yango ezalaki kozwa esika mingi koleka etaje ya kati-kati mpe ya se.
聖屋因為樓廊佔去些地方,所以上層比中下兩層窄些。
6 Bashambre ya etaje ya misato ezalaki na makonzi te ndenge ezalaki na lopango ya libanda. Boye, ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe oyo ya se.
聖屋有三層,卻無柱子,不像外院的屋子有柱子;所以上層比中下兩層更窄。
7 Mir ya libanda ezalaki etalana na bashambre, mpe lopango ya libanda ezalaki liboso ya ndako ya bashambre: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano.
聖屋外,東邊有牆,靠着外院,長五十肘。
8 Bashambre oyo ezalaki pene ya lopango ya libanda ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bashambre oyo ezalaki pene ya Tempelo ezalaki bametele pene tuku mitano na molayi.
靠着外院的聖屋長五十肘。殿北面的聖屋長一百肘。
9 Na se ya bashambre, ezalaki na ekotelo moko na ngambo ya este soki okoteli wuta na lopango ya libanda.
在聖屋以下,東頭有進入之處,就是從外院進入之處。
10 Bashambre yango ezalaki na ngambo ya sude, na molayi ya mir ya lopango ya libanda oyo ekenda kino na lopango ya Tempelo oyo etalana na mir ya libanda.
向南在內院牆裏有聖屋,一排與鋪石地之屋相對,一排順着空地。
11 Mwa nzela moko ezalaki liboso na yango. Bashambre yango ezalaki ndenge moko na bashambre ya nor, na mokuse mpe na molayi; mpe bikuke na yango ezalaki ndenge moko na monene. Bikuke ya bashambre oyo ezalaki na ngambo ya nor
這聖屋前的夾道與北邊聖屋的夾道長寬一樣;出入之處與北屋門的樣式相同。
12 ezalaki ndenge moko na bikuke ya bashambre ya ngambo ya sude. Ezalaki na ekuke moko na ebandeli ya mwa nzela oyo etalana na mir oyo ebatelaka, oyo ezali na ngambo ya este epai wapi bazalaki kokotela na bashambre.
正在牆前、夾道的東頭,有門可以進入,與向南聖屋的門一樣。
13 Bongo moto yango alobaki na ngai: « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule: makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.
他對我說:「順着空地的南屋北屋,都是聖屋;親近耶和華的祭司當在那裏吃至聖的物,也當在那裏放至聖的物,就是素祭、贖罪祭,和贖愆祭,因此處為聖。
14 Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »
祭司進去出了聖所的時候,不可直到外院,但要在聖屋放下他們供職的衣服,因為是聖衣;要穿上別的衣服才可以到屬民的外院。」
15 Tango asilisaki komeka molayi ya kati ya Tempelo, amemaki ngai na libanda, na nzela ya ekuke ya este, mpe amekaki molayi ya lopango zingazinga ya Tempelo.
他量完了內殿,就帶我出朝東的門,量院的四圍。
16 Amekaki molayi ya ngambo ya este na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
他用量度的竿量四圍,量東面五百肘,
17 Amekaki molayi ya ngambo ya nor na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
用竿量北面五百肘,
18 Amekaki molayi ya ngambo ya sude na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
用竿量南面五百肘,
19 Amekaki molayi ya ngambo ya weste na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
又轉到西面,用竿量五百肘。
20 Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.
他量四面,四圍有牆,長五百肘,寬五百肘,為要分別聖地與俗地。