< Ezekieli 40 >

1 Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, sima na biso kokokisa mibu tuku mibale na mitano wuta tango tokendeki na bowumbu, na ebandeli ya mobu, ezalaki mobu ya zomi na minei sima na kobebisama ya engumba Yelusalemi, kaka na mokolo wana, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe amemaki ngai kuna.
Huszonötödik évében számkivetésünknek, az év elején, a hónap tizedikén, a tizennegyedik évben, miután megveretett a város, ugyanezen napon rajtam volt az Örökkévaló keze, és elvitt engem oda.
2 Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.
Isteni látomásokban vitt el engem Izraél országába, letett engem igen magas hegyen, rajta pedig mint egy városnak építménye dél felől.
3 Tango amemaki ngai kuna, namonaki moto moko oyo lolenge na ye ezalaki lokola ebende ya bronze: atelemaki na ekuke ya engumba mpe asimbaki na loboko na ye singa moko ya lino mpe libaya oyo bamekelaka molayi.
Elvitt engem oda és íme egy férfi, látszata mint réznek látszata és lenzsinór a kezében és mérő nád; és ő a kapuban állt.
4 Moto yango alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »
És beszélt hozzám a férfi: Ember fia, lásd szemeiddel és füleiddel halljad és fordítsd szívedet mind arra, a mit neked mutatni akarok; mert azért hogy megmutassák neked, hozattál ide, jelentsd mind azt, amit látsz, Izraél házának.
5 Tala makambo oyo namonaki: mir moko ezingelaki lopango mobimba ya Tempelo. Kati na loboko ya moto yango, ezalaki na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki na bametele pene misato na molayi. Tango amekaki yango, amonaki ete monene na yango mpe bosanda na yango ezalaki ya kokokana, ezalaki na bametele pene misato.
És íme egy fal a házon kívül köröskörül; a férfi kezében pedig a mérő-nád hat könyöknyi – mindegyik egy könyök és egy tenyér – és megmérte az épület szélességét egy nádnyit és a magasságát egy nádnyit.
6 Akendeki na ekuke oyo etala na ngambo ya este, amataki na bibutelo na yango mpe amekaki molayi ya ekotelo ya ekuke: mokuse mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene misato.
És bejött a kapuba, melynek előrésze kelet felé volt, fölment a lépcsőjén és megmérte a kapu küszöbét, egy nádnyi a szélessége, és egy másik küszöböt, egy nádnyi a szélessége;
7 Longwa na ekotelo kino na Tempelo, ezalaki na bandako mike ya bakengeli: misato na ngambo ya loboko ya mwasi mpe misato na ngambo ya loboko ya mobali; molayi na yango mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene misato. Molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli mpe ndako mosusu ezalaki na bametele pene misato. Longwa na ekotelo ya ekuke oyo elandaki kino na ndako moke ya kokotela oyo etalana na Tempelo, ezalaki na bametele pene misato.
a szobát pedig: egy nádnyi a hosszúsága és egy nádnyi a szélessége, és a szobák között öt könyöknyit, és a kapu küszöbét a kapu csarnoka mellett, belülről egy nádnyit.
8 Amekaki molayi ya ndako moke ya kokotela na ekuke na libaya oyo bamekelaka molayi:
És megmérte a kapu csarnokát belülről egy nádnyit.
9 ezalaki na bametele pene minei. Makonzi na yango ezalaki pene na metele moko na monene; ndako moke ya kokotela ezalaki etala na ngambo ya Tempelo.
És megmérte a kapu csarnokát nyolcz könyöknyit és pilléreit két könyöknyit, a kapu csarnoka pedig belülről volt.
10 Ezalaki na bandako mike misato ya bakengeli, ngambo na ngambo, na ngambo ya ekuke ya este; bandako mike nyonso misato ezalaki ekokana, mpe molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli na ndako mosusu, ngambo na ngambo, ezalaki mpe ekokana.
A kapu szobái pedig kelet felé, három innen és három onnan, egy a mértéke hármajuknak és egy a mértéke a pilléreknek innen és onnan.
11 Amekaki molayi ya ekuke: mokuse na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene motoba na basantimetele tuku mitano.
És megmérte a kapu bejáratának szélességét, ti könyöknyit; a kapu hosszúsága tizenhárom könyöknyi.
12 Liboso ya ndako moko na moko ya bakengeli, na bangambo nyonso mibale, ezalaki na mwa mir moko oyo ezalaki na bosanda ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ngambo moko na moko ya bandako nyonso ya bakengeli ezalaki na bametele pene misato.
És korlát a szobák előtt egy könyöknyi, és egy könyöknyi korlát amonnan; a szoba pedig hat könyöknyi innen és hat könyöknyi onnan.
13 Amekaki molayi ya ekuke, longwa na suka ya mir ya sima ya ndako moko ya bakengeli kino na suka ya mir ya sima ya ndako ya bakengeli mosusu oyo etalana na yango, molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano, longwa na suka moko kino na suka mosusu.
És megmérte a kaput szoba tetejétől szoba tetejéig: szélessége huszonöt könyök, bejárat szemben bejárattal.
14 Amekaki lisusu molayi ya bandako mike nyonso misato ya bakengeli elongo na molayi oyo ezalaki kokabola ndako moko ya moke mpe ndako mosusu: nyonso esalaki bametele pene zomi na mitano, longola veranda na yango.
És készítette a pilléreket hatvan könyöknyire és az udvar pillérének a kaput köröskörül.
15 Longwa na ebandeli ya ekuke kino na suka ya ndako moke ya kokotela, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano.
És a bejáró kapunak előrészétől a belső kapu csarnokának előrészéig ötven könyök.
16 Bandako mike ya bakengeli elongo na makonzi na yango ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Na likonzi moko na moko, basalaki bililingi ya banzete ya mbila.
És csukott ablakai, a szobákhoz és pilléreikhez belülről voltak a kapunak köröskörül, és éppúgy a fülkéknek; ablakok köröskörül belülről, a pilléren pedig pálmák.
17 Amemaki ngai lisusu kati na lopango ya libanda. Kuna, namonaki bashambre mpe mabanga moko babongisa malamu penza, na mabele ya lopango mobimba; na likolo ya mabanga oyo babongisa malamu, ezalaki na bashambre tuku misato.
És bevitt engem a külső udvarba és íme kamarák és kövezet, készítve az udvarnak köröskörül, harmincz kamara a kövezeten.
18 Mabanga yango ezalaki suka na suka ya bikuke, mpe molayi na yango ezalaki ekokana na molayi ya bikuke.
A kövezet pedig a kapuk oldalán volt a kapuk hosszának mentében: az alsó kövezet.
19 Amekaki molayi ya liboso ya ekuke ya se kino na liboso ya ekuke ya lopango ya kati: ezalaki na bametele pene tuku mitano na ngambo ya este.
És megmérte szélességét, az alsó kapu előrészétől a belső udvar előrészéig kívülről száz könyöknyit – keletre és északra.
20 Bongo na ngambo ya nor, amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke oyo etala na ngambo ya nor, ekuke oyo ememaka kino na lopango ya libanda.
A kaput pedig, melynek előrésze észak felé volt, a külső udvarra valót, megmérte hosszát és szélességét.
21 Ezalaki na bandako na yango ya mike ya bakengeli: misato na ngambo moko mpe misato na ngambo mosusu. Makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na ekuke ya liboso, na molayi mpe na mokuse: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
Szobái pedig, három innen és három onnan, és pillérei és fülkéi voltak az első kapu mértéke szerint: ötven könyök a hossza, szélessége pedig huszonöt könyöknyi.
22 Maninisa na yango, ndako na yango ya moke ya kokotela mpe bililingi na yango ya banzete ya mbila ezalaki ndenge moko na oyo ya ekuke ya ngambo ya este, na molayi mpe na mokuse. Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo ezalaki etalana na ndako moke ya kokotela.
És ablakai, fülkéi és pálmái azon kapu mértéke szerint, a melynek előrésze kelet felé volt, és hét lépcsőfokon mennek fel hozzá és fülkéi előttük.
23 Ezalaki mpe lisusu na ekuke moko kati na lopango oyo ezalaki etalana na ekuke ya ngambo ya nor, ndenge kaka ezalaki na ngambo ya este. Amekaki molayi, longwa na ekuke ya liboso kino na ekuke oyo ezalaki etalana na yango: ezalaki na bametele pene tuku mitano.
És a belső udvarra való kapu az északra és keletre való kapuval szemben volt; és megmért kaputól kapuig száz könyöknyit.
24 Amemaki ngai lisusu na ngambo ya sude, mpe namonaki ekuke moko oyo etala na ngambo ya sude; amekaki molayi ya makonzi mpe ya ndako na yango ya moke ya kokotela: ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe mokuse.
Erre vezetett engem dél felé és íme a dél felé való kapu, és megmérte pilléreit és fülkéit a méretek szerint.
25 Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda lokola maninisa ya bikuke mosusu: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
És ablakai voltak neki és fülkéinek köröskörül ez ablakok szerint; ötven könyök a hossza, szélessége pedig huszonöt könyök.
26 Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo etalana na ndako moke ya kokotela. Bililingi ya nzete ya mbila ezalaki na makonzi na yango na bangambo nyonso.
És hét lépcsőfok a feljárata és fülkéi előttük; és pálmái voltak egy innen és egy onnan a pillérein.
27 Lopango ya kati ezalaki na ekuke moko etala na ngambo ya sude. Boye, amekaki molayi na yango, longwa na ekuke wana kino na ekuke ya libanda na ngambo ya sude: ezalaki bametele pene tuku mitano.
És a belső udvarra való kapu dél felé volt és megmért kaputól kapuig dél felé száz könyöknyit.
28 Amemaki ngai na kati ya lopango ya kati, na nzela ya ekuke ya sude; amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke ya ngambo ya sude: ezalaki ndenge moko kaka na bikuke mosusu.
Ekkor bevitt engem a belső udvarba a déli kapun át; és megmérte a déli kaput e méretek szerint.
29 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe bandako na yango ya mike ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
Szobái pedig és pillérei és fülkéi a méretek szerint és ablakai voltak neki és fülkéinek köröskörül; ötven könyök a hossza, szélessége pedig huszonöt könyök.
30 Bandako moke ya kokotela ya bikuke, zingazinga ya lopango, ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
És fülkék köröskörül, hossza huszonöt könyök, szélessége pedig öt könyök.
31 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda. Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
És fülkéi voltak a külső udvaron és pálmák a pilléreken, és nyolcz lépcsőfok a feljárata.
32 Amemaki ngai lisusu na lopango ya kati, na ngambo ya este, mpe amekaki molayi ya ekuke na yango: ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse.
Erre bevitt engem a belső udvarba kelet felé és megmérte a kaput a méretek szerint.
33 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
Szobái pedig és pillérei és fülkéi e méretek szerint és ablakai voltak neki és fülkéinek köröskörül; a hossza ötven könyök, szélessége pedig huszonöt könyök.
34 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda na yango; ezalaki na bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango, na bangambo nyonso, mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
És fülkéi voltak a külső udvarra és pálmák a pillérein innen és onnan, és nyolcz lépcsőfok a feljárata.
35 Amemaki ngai na ekuke ya ngambo ya nor mpe amekaki molayi na yango: ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse.
Erre elvitt engem az északi kapuhoz és mért a méretek szerint.
36 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki mpe na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
Szobái, pillérei, fülkéi és ablakai voltak köröskörül; hossza ötven könyök, szélessége pedig huszonöt könyök.
37 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda; batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
És pillérei voltak a külső udvarra és pálmák a pillérein innen és onnan, és nyolcz lépcsőfok a feljárata.
38 Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke.
És kamara, meg ajtaja a kapuk pilléreinél; ott mossák az égőáldozatot.
39 Kati na ndako moke ya kokotela na ekuke, ezalaki na bamesa mibale, ngambo na ngambo, epai wapi bazalaki kobomela banyama mpo na mbeka ya kotumba, mbeka ya masumu mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani.
És a kapu csarnokában két asztal innen és két asztal onnan, hogy levágják azokon az égőáldozatot és a vétekáldozatot és a bűnáldozatot.
40 Pene ya mir ya libanda ya ndako moke ya kokotela na ekuke, pene ya ematelo ya ekotelo ya ekuke ya nor, ezalaki na bamesa minei na ngambo moko ya ematelo.
És az oldalnál kívülről, a kapu bejáratába fölmenőtől északra két asztal és a másik oldalnál, mely a kapu csarnokához való, két asztal.
41 Liboso ya ekuke, ezalaki na bamesa mwambe oyo bazalaki kobomela bambeka: minei na ngambo moko mpe minei na ngambo mosusu.
Négy asztal innen és négy asztal onnan a kapu oldalánál: nyolcz asztal, azokon vágnak.
42 Ezalaki na bamesa minei oyo basala na mabanga bakata mpo na bambeka ya kotumba; bazalaki kosalela yango mpo na kotia bisalelo oyo babomelaka bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Bamesa yango nyonso ezalaki ndenge moko: na molayi, na mokuse mpe na bosanda; molayi na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano, mokuse na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango ezalaki na basantimetele tuku mitano.
És négy asztal az égőáldozatnak, faragott kövekből, hosszuk egy és fél könyök, szélességük pedig egy és fél könyök, magasságuk egy könyök; azokra teszik a szerszámokat, a melyekkel levágják az égőáldozatot és a vágóáldozatot.
43 Batobolaki nzela moko ya basantimetele pene mwambe na zingazinga ya bamesa moko na moko; bazalaki kotia misuni ya bambeka na likolo ya bamesa yango.
És egy tenyérnyi horgok oda erősítve befelé köröskörül, és az asztalokon az áldozat húsa.
44 Na libanda ya ekuke ya kati, kati na lopango ya kati, ezalaki na bashambre mibale mpo na bayembi: moko ezalaki na ngambo ya ekuke ya nor, etalana na ngambo ya sude, mpe mosusu ezalaki na ngambo ya ekuke ya sude, etalana na ngambo ya nor.
És a belső kapun kívül az énekesek kamarái a belső udvarban, a mely az északi kapu oldalánál van, előrésze dél felé van, a melyik a keleti kapu oldalánál van, előrésze észak felé van.
45 Moto yango alobaki na ngai: « Shambre oyo etala na ngambo ya sude ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na Tempelo;
És beszélt hozzám: Ez a kamara, melynek előrésze dél felé van, a papoké, akik a háznak őrizetét őrzik;
46 mpe shambre oyo etala na ngambo ya nor ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala ya etumbelo. Kati na bakitani ya Levi, bana mibali ya Tsadoki kaka nde bakoki kokota na Tempelo mpo na kosala mosala liboso ya Yawe. »
a kamara pedig, melynek előrésze észak félé van, a papoké, akik az oltár őrizetét őrzik; Czádók fiai azok, akik Lévi fiai közül az Örökkévalóhoz közelednek, hogy őt szolgálják.
47 Amekaki molayi ya lopango: ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe na mokuse. Etumbelo ezalaki liboso ya Tempelo.
És megmérte az udvart száz könyöknyi hosszúságra és száz könyöknyi szélesre négyzetesen; az oltár pedig a ház előtt volt.
48 Amemaki ngai na ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe amekaki molayi ya makonzi na yango: ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na bangambo nyonso; mokuse ya ekotelo ezalaki na bametele pene sambo, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo.
Erre elvitt engem a ház csarnokához és megmérte a csarnok pillérét: öt könyöknyi innen és öt könyöknyi onnan, a kapu szélessége pedig három könyöknyi innen és három könyöknyi onnan.
49 Ndako moke ya kokotela ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe motoba na mokuse. Bazalaki komata na ematelo ya bibutelo zomi mpo na kokota na ndako moke ya kokotela, na bangambo nyonso mibale. Batelemisaki likonzi moko na ngambo moko na moko ya ekotelo.
A csarnok hossza húsz könyök, szélessége pedig tizenegy könyök és lépcsőfokokon mennek fel hozzá; és a pillérek mellett oszlopok, egy innen és egy onnan.

< Ezekieli 40 >