< Ezekieli 4 >

1 « Sik’oyo mwana na moto, kamata biliki ya kotumba, tia yango liboso na yo mpe koma na likolo na yango elilingi ya engumba Yelusalemi.
Tu pois, ó filho do homem, toma um tijolo, e pô-lo-ás diante de ti, e grava nele a cidade de Jerusalém.
2 Sala yango lokola engumba oyo bazingela, oyo batonga mabulu ya kobombamela zingazinga na yango mpe oyo batelemisa bamir ya zelo mpo na kobombama, engumba oyo batonga milako zingazinga na yango, mpe telemisa bakonzi ya basoda oyo babongami mpo na kobundisa yango na zingazinga.
E põe contra ela um cerco, e edifica contra ela uma fortificação, e levanta contra ela uma tranqueira, e põe contra ela arraiais, e põe-lhe vai e vens em redor.
3 Kamata eteni ya linzanza, tia yango lokola mir ya ebende na kati-kati na yo mpe elilingi ya engumba oyo osili kokoma, mpe tika ete miso na yo etala yango. Bakozingela engumba yango ndenge kaka yo osili kozingela yango. Yango nde ekozala elembo mpo na libota ya Isalaele.
E tu toma uma sertã de ferro, e põe-na por muro de ferro entre ti e entre a cidade; e dirige para ela o teu rosto, e assim será cercada, e a cercarás; isto servirá de sinal à casa de Israel.
4 Bongo yo, lala na ngambo ya loboko na yo ya mwasi, tia na ngambo wana masumu ya libota ya Isalaele. Okomema masumu na bango mikolo nyonso oyo okolala na ngambo wana.
Tu também deita-te sobre o teu lado esquerdo, e põe a maldade da casa de Israel sobre ele: conforme o número dos dias que te deitares sobre ele, levarás as suas maldades.
5 Ngai moko nakokatela yo motango ya mikolo, oyo ekokokana na motango ya mibu oyo libota ya Isalaele asali masumu: mikolo nkama misato na tuku libwa; mpe okomema solo masumu ya libota ya Isalaele na mikolo oyo.
Porque eu já te tenho dado os anos da sua maldade, conforme o número dos dias, trezentos e noventa dias; e levarás a maldade da casa de Israel.
6 Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei: mokolo moko mpo na mobu moko na moko.
E, quando cumprires estes, tornar-te-ás a deitar sobre o teu lado direito, e levarás a maldade da casa de Judá quarenta dias: um dia te dei por cada ano.
7 Talisa elongi mpe loboko na yo na ngambo ya Yelusalemi oyo bazingela mpe sakola mabe na tina na yango.
Dirigirás pois o teu rosto para o cerco de Jerusalém, e o teu braço estará descoberto, e profetizarás contra ela.
8 Nakolinga-linga yo na basinga mpo ete okoka kobaluka na ngambo mosusu te kino tango okokokisa mikolo na yo ya etumbu.
E eis que porei sobre ti cordas: assim tu não te voltarás dum lado para o outro, até que cumpras os dias do teu cerco.
9 Kamata ble mpe orje, madesu mpe misili, soya mpe masango, tia yango nyonso kati na mbeki moko kaka oyo babombelaka biloko. Ezali yango nde ekozala bilei oyo okobanda kolia tango nyonso, na mikolo nkama misato na tuku libwa oyo okowumela ya kolala na ngambo moko.
E tu toma trigo, e cevada, e favas, e lentilhas, e milho, e aveia, e mete-os num vaso, e faze deles pão: conforme o número dos dias que tu te deitares sobre o teu lado, trezentos e noventa dias, comerás disso.
10 Bilei na yo ya mokolo na mokolo ekozala ya bagrame nkama mibale na tuku mibale, mpe okobanda kolia yango tango nyonso.
E a tua comida, que as de comer, será do peso de vinte siclos cada dia: de tempo em tempo a comerás.
11 Okobanda komela tango nyonso litele moko ya mayi.
Também beberás a água por medida, a saber, a sexta parte dum hin: de tempo em tempo beberás.
12 Okolia bilei basala lokola gato ya orje mpe okobanda kotumba yango na miso ya bato nyonso, na moto oyo bapelisa na nyei ya bato. »
E o comerás como bolos de cevada, e o cozerás com o esterco que sai do homem, diante dos olhos deles.
13 Yawe alobaki: — Ezali na nzela wana nde bana ya Isalaele bakolia bilei ya mbindo kati na bikolo epai wapi nakobengana bango.
E disse o Senhor: Assim comerão os filhos de Israel o seu pão imundo, entre as nações às quais os lançarei.
14 Bongo nalobaki: — Te, Nkolo Yawe! Natikala nanu komikomisa mbindo te! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te!
Então disse eu: Ah! Senhor, Senhor! eis que a minha alma não foi contaminada, porque nunca comi coisa morta, nem despedaçada, desde a minha mocidade até agora: nem carne abominável entrou na minha boca.
15 Alobaki na ngai: — Malamu mingi! Na esika ya nyei ya bato, napesi yo nyei ya ngombe mpo ete okoka kotumbela gato na yo.
E disse-me: Vê, tenho-te dado bosta de vacas, em lugar de esterco de homem; e com ela prepararás o teu pão.
16 Alobaki na ngai lisusu: — Mwana na moto, nakobebisa bilei nyonso oyo ezali na bibombelo ya Yelusalemi. Bato bakolia biteni mike ya mapa, na pasi na motema, mpe bakomela mayi na bakopo ya mike, na somo;
Então me disse: Filho do homem, eis que eu quebranto o sustento do pão em Jerusalém, e comerão o pão por peso, e com desgosto; e a água beberão por medida, e com espanto;
17 pamba te bilei mpe mayi ya komela ekokoma pasi mpo na kozwa. Moko na moko akokamwa mpo na moninga na ye mosusu; mpe bakobebisama likolo ya masumu na bango.
Para que o pão e a água lhes falte, e se espantem uns com os outros, e se consumam nas suas maldades.

< Ezekieli 4 >