< Ezekieli 39 >
1 Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela Gogi! Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali, natombokeli yo!
Et toi, fils d’homme, prophétise contre Gog, et dis: Ainsi dit le Seigneur, l’Éternel: Voici, j’en veux à toi, Gog, prince de Rosh, de Méshec et de Tubal;
2 Nakozongisa yo mpe nakotambolisa yo; nakomema yo longwa na suka ya etuka ya ngambo ya nor mpe nakosala ete okoma na likolo ya bangomba ya Isalaele.
et je te ferai retourner, et je te mènerai, et je te ferai monter du fond du nord, et je te ferai venir sur les montagnes d’Israël.
3 Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali.
Et j’abattrai ton arc de ta main gauche, et je ferai tomber tes flèches de ta main droite;
4 Yo, mampinga na yo nyonso ya basoda mpe bato ya bikolo oyo bakosangana na yo, bokokweya na likolo ya bangomba ya Isalaele; nakokaba yo lokola bilei epai ya bandeke nyonso oyo eliaka misuni mpe epai ya banyama ya zamba.
tu tomberas sur les montagnes d’Israël, toi et toutes tes bandes, et les peuples qui seront avec toi; je te donnerai en pâture aux oiseaux de proie de toute aile, et aux bêtes des champs;
5 Okokweya solo na zamba, pamba te ezali Ngai nde nalobaki, elobi Nkolo Yawe.
tu tomberas sur la face des champs; car moi, j’ai parlé, dit le Seigneur, l’Éternel.
6 Nakotinda moto kati na mokili ya Magogi mpe kati na bato oyo bavandi na kimia kati na bisanga; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
Et j’enverrai un feu en Magog et parmi ceux qui habitent les îles en sécurité; et ils sauront que je suis l’Éternel.
7 Nakosala ete bosantu ya Kombo na Ngai eyebana kati na bato na Ngai, Isalaele; nakotika lisusu te ete bosantu ya Kombo na Ngai esambwa; boye bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Mosantu kati na Isalaele.
Et je ferai connaître mon saint nom au milieu de mon peuple Israël, et je ne profanerai plus mon saint nom; et les nations sauront que je suis l’Éternel, le Saint en Israël.
8 Makambo wana nyonso ezali koya! Nyonso ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. Ezali mokolo oyo nalobelaki.
Voici, cela vient et s’accomplit, dit le Seigneur, l’Éternel: c’est ici le jour dont j’ai parlé.
9 Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso: banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene; bakopelisela yango moto mibu sambo.
Et les habitants des villes d’Israël sortiront et allumeront du feu, et brûleront les armes, et les écus, et les boucliers avec les arcs, et les flèches, et les épieux, et les piques; et ils en feront du feu pendant sept ans.
10 Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe.
Et ils n’apporteront point de bois des champs et ils n’en couperont point des forêts, car ils feront du feu avec des armes; et ils butineront ceux qui les ont butinés, et ils pilleront ceux qui les ont pillés, dit le Seigneur, l’Éternel.
11 Na mokolo wana, nakopesa Gogi lilita kati na mokili ya Isalaele: lubwaku ya bato oyo basalaka mibembo, longwa na ngambo ya este kino na ebale monene. Ekokanga nzela ya bato oyo basalaka mibembo, pamba te bakokunda Gogi elongo na mampinga na ye nyonso kuna. Bakokoma kobenga lubwaku yango lubwaku ya Amoni Gogi.
Et il arrivera, en ce jour-là, que je donnerai là à Gog un lieu pour sépulcre en Israël, la vallée des passants, à l’orient de la mer; et le chemin sera [ainsi] fermé aux passants, et on enterrera là Gog et toute la multitude; et on l’appellera la vallée de Hamon-Gog.
12 Libota ya Isalaele bakosala basanza sambo mpo na kokunda bibembe na bango kolanda ndenge ekatama mpo na kopetola mokili.
Et la maison d’Israël les enterrera pendant sept mois, pour purifier le pays;
13 Bato nyonso ya Isalaele bakokunda bato ya Gogi; bongo ekozala likambo ya lokumu mpo na bango, mokolo oyo nakomonisa nkembo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
et tout le peuple du pays les enterrera; et ce sera un renom pour eux, le jour où je me glorifierai, dit le Seigneur, l’Éternel.
14 Sima na basanza sambo, bakopona bato oyo mosala na bango ekozala: kotambola na mokili mpo na koluka bibembe oyo ekotikala na mabele mpe kokunda yango, na lisungi ya bato ya mobembo mpo na kopetola mokili.
Et ils mettront à part, pour un [service] continuel, des hommes qui parcourront le pays [et] qui, avec les passants, enterreront ceux qui seront demeurés sur la face du pays, pour le purifier: au bout de sept mois ils en chercheront.
15 Tango bakozala kotambola kati na mokili, soki moko kati na bango amoni mikuwa ya moto, akotia elembo pembeni na yango, kino tango bato oyo bakundaka bibembe bakokunda yango na lubwaku ya Amoni Gogi.
Et les passants passeront par le pays, et s’ils voient un ossement d’homme, ils élèveront à côté de lui un signal, jusqu’à ce que les enterreurs l’aient enterré dans la vallée de Hamon-Gog;
16 Engumba moko oyo ekobengama Amona ekotongama na esika yango. Ekozala ndenge wana nde bakopetola mokili. ›
et le nom de la ville aussi sera Hamona. Ainsi on purifiera le pays.
17 Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Loba na bandeke nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba: ‹ Boya kosangana, bino nyonso elongo, wuta na bisika nyonso, mpo na mbeka na Ngai, oyo nazali kobonza Ngai moko mpo na bino, mbeka monene na likolo ya bangomba ya Isalaele! Kuna, bokolia misuni mpe bokomela makila.
Et toi, fils d’homme, ainsi dit le Seigneur, l’Éternel: Dis aux oiseaux de toute aile, et à toutes les bêtes des champs: Assemblez-vous et venez, réunissez-vous de toutes parts vers mon sacrifice que je sacrifie pour vous, un grand sacrifice sur les montagnes d’Israël, et mangez de la chair et buvez du sang.
18 Bokolia misuni ya bilombe ya bitumba mpe bokomela makila ya bakambi ya mabele, ndenge basalaka na bameme ya mibali oyo ekemba, na bana meme ya mibali, na bantaba ya mibali to na bana ngombe ya mibali: nyonso esengeli kozala ya mafuta mpe kowuta na Bashani.
Vous mangerez la chair des forts, et vous boirez le sang des princes de la terre, – des béliers, des agneaux, des boucs, des bœufs, tous, bêtes grasses de Basan.
19 Na mbeka na Ngai, oyo nabongisi mpo na bino, bokolia mafuta kino bokotonda, mpe bokomela makila kino bokolangwa.
Vous mangerez de la graisse à satiété, et vous boirez du sang à en être enivrés, du sacrifice que j’ai sacrifié pour vous.
20 Na mesa na Ngai, bokolia mpe bokotonda misuni ya bampunda, ya batambolisi na yango, ya bilombe ya bitumba mpe ya basoda nyonso, › elobi Nkolo Yawe.
Et à ma table vous serez rassasiés de chevaux et d’attelages, d’hommes forts et de toute sorte d’hommes de guerre, dit le Seigneur, l’Éternel.
21 Nakomonisa lokumu na Ngai kati na bikolo; bongo bikolo nyonso ekomona etumbu oyo napesi bango, mpe loboko na Ngai oyo nasemboli likolo na bango.
Et je mettrai ma gloire parmi les nations; et toutes les nations verront mon jugement, que j’aurai exécuté, et ma main, que j’aurai mise sur eux.
22 Kobanda na mokolo wana kino na mikolo ekoya, libota ya Isalaele bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango.
Et la maison d’Israël saura que je suis l’Éternel, leur Dieu, dès ce jour-là et dans la suite.
23 Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga.
Et les nations sauront que la maison d’Israël est allée en captivité à cause de son iniquité, parce qu’ils ont été infidèles envers moi, et que je leur avais caché ma face, et que je les avais livrés en la main de leurs ennemis; et ils sont tous tombés par l’épée.
24 Napesaki bango etumbu kolanda mbindo mpe masumu na bango, mpe napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai.
Je leur ai fait selon leur impureté et selon leurs transgressions, et je leur ai caché ma face.
25 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai.
C’est pourquoi, ainsi dit le Seigneur, l’Éternel: Maintenant je rétablirai les captifs de Jacob et j’aurai compassion de toute la maison d’Israël, et je serai jaloux de mon saint nom,
26 Boye wana bakovanda na kimia na mabele na bango mpe ekozala na moto moko te mpo na kobangisa bango, bakobanda koyoka soni mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mabe nyonso oyo basalaki liboso na Ngai Yawe.
et ils porteront [en eux] leur confusion, et toutes leurs infidélités par lesquelles ils ont été infidèles envers moi, alors qu’ils habiteront en sécurité dans leur terre et qu’il n’y aura personne qui les effraie,
27 Tango nakozongisa bango epai na bango wuta na bikolo, tango nakosangisa bango wuta na mikili ya banguna na bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo ebele.
quand je les aurai ramenés d’entre les peuples et que je les aurai rassemblés des pays de leurs ennemis, et que je serai sanctifié en eux aux yeux de beaucoup de nations.
28 Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna.
Et ils sauront que je suis l’Éternel, leur Dieu, parce que je les ai emmenés captifs parmi les nations, et que je les aurai rassemblés dans leur terre, et que je n’en aurai laissé là aucun de reste.
29 Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. »
Et je ne leur cacherai plus ma face, parce que j’aurai répandu mon Esprit sur la maison d’Israël, dit le Seigneur, l’Éternel.