< Ezekieli 36 >

1 « Mwana na moto, sakola na tina na bangomba ya Isalaele mpe loba: ‹ Bino bangomba ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe!
“Now you, son of man, prophesy to the mountains of Israel and say, 'Mountains of Israel, listen to the word of Yahweh.
2 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Moyini alobaki na tina na bino: ‘Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso!’ ›
The Lord Yahweh says this: The enemy has said about you, “Aha!” and “The ancient high places have become our possession.”'
3 Yango wana, sakola! Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola babebisaki bino mpe bapanzaki bino bipai nyonso mpo ete bokoma libula ya bikolo mosusu mpe eloko ya masolo ya kotiola mpe ya kofinga kati na bato;
Therefore prophesy and say, 'The Lord Yahweh says this: Because of your desolation and because of the attacks that came on you from all sides, you have become a possession of the other nations; you have been the subject of slanderous lips and tongues, and of people's stories.
4 mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe: Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola;
Therefore, mountains of Israel, listen to the word of the Lord Yahweh: The Lord Yahweh says this to the mountains and the high hills, to the streambeds and valleys, to the uninhabited desolations and the forsaken cities that have become plunder and a subject of mocking for the other nations that surround them—
5 tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: na zuwa na Ngai ya makasi, natombokeli bikolo oyo etikali mpe mokili mobimba ya Edomi, pamba te na esengo nyonso mpe na mayele mabe kati na mitema na bango, bakomisi mokili na Ngai lokola libula na bango moko mpo ete babotola bilanga na yango nyonso na makasi. ›
therefore the Lord Yahweh says this: I have certainly spoken in the fire of my fury against the other nations, against Edom and all who took my land for themselves as a possession, against all those who had both joy in their heart and disdain in their spirit, as they seized my land that they might claim its pasturelands for themselves.'
6 Mpo na yango, sakola na tina na mokili ya Isalaele mpe loba na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nazali koloba na zuwa mpe na kanda na Ngai ya makasi, pamba te bikolo mosusu emonisi bino pasi na kotiola.
Therefore, prophesy to the land of Israel and say to the mountains and to the high hills, to the streambeds and to the valleys, 'the Lord Yahweh says this: Behold! In my fury and in my anger I am declaring this because you have borne the insults of nations.
7 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete ezali bikolo oyo ezingeli bino nde ekotiolama.
Therefore, the Lord Yahweh says this: I myself will lift up my hand to swear that the nations that surround you will certainly carry their own shame.
8 Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango.
But you, mountains of Israel, you will grow branches and bear fruit for my people Israel, since they will soon come back to you.
9 Nazali kolandela likambo na bino mpe nazali kotala bino na liso ya ngolu; bakobalola bino lisusu ndenge babalolaka mabele ya bilanga mpe bakolona lisusu bankona na mabele na bino.
For behold, I am for you, and I treat you with favor; you will be plowed and sown with seed.
10 Nakokomisa motango ya bato na bino ebele, na mabele na bino: yango nde libota mobimba ya Isalaele; bato bakozongela lisusu kovanda kati na bingumba na bino mpe bakotonga lisusu bandako na bino oyo ebukana.
So I will multiply upon you the number of your people, even the whole house of Israel. The cities will be inhabited and the ruins rebuilt.
11 Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino: bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
I will multiply man and beast on you mountains so that they will multiply and be fruitful. Then I will cause you to be inhabited as you previously were, and I will make you prosper more than you did in the past, for you will know that I am Yahweh.
12 Nakosala ete bato na Ngai, bana ya Isalaele, batambola na mokili na bino; bakozwa mabele na bino mpe bokozala libula na bango; bokotikala lisusu te koboma bana na bango.
I will bring men, my people Israel, to walk on you. They will possess you, and you will be their inheritance, and you will no longer cause their children to die.
13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola bato balobaka na tina na bino: Bobomaka bato mpe bozangisaka ekolo na bino bana na yango;
The Lord Yahweh says this: Because they are saying to you, “You devour men, bereaving your nation of children,”
14 mpo na yango, bokoboma lisusu bato te mpe bokozangisa lisusu ekolo na bino bana te, elobi Nkolo Yawe.
therefore you will not consume people any longer, and you will no longer make your nation mourn their deaths. This is the Lord Yahweh's declaration.
15 Nakosala ete boyoka lisusu kotiolama ya bikolo mosusu te, mpe bato ya bikolo mosusu bakofinga bino lisusu te; na bongo, bokokweyisa lisusu ekolo na bino te, elobi Nkolo Yawe. › »
Nor will I allow you to hear the insults of the nations any longer; you will no longer have to bear the shame of the peoples or cause your nation to fall—this is the Lord Yahweh's declaration.'”
16 Yawe alobaki na ngai lisusu:
Then the word of Yahweh came to me, saying,
17 « Mwana na moto, tango bana ya Isalaele bazalaki kovanda na mokili na bango, bazalaki kokomisa yango mbindo na ezaleli mpe na misala na bango; ezaleli na bango ezalaki mbindo na miso na Ngai lokola makila ya mwasi oyo azali komona sanza na ye.
“Son of man, when the house of Israel inhabited their land, they defiled it with their ways and their deeds. Their ways were like the unclean menstruation of a woman before me.
18 Boye, napeliselaki bango kanda na Ngai ya makasi, pamba te bazalaki kotangisa makila kati na mokili mpe bakomisaki yango mbindo na nzela ya banzambe na bango ya bikeko.
So I poured out my fury against them for the blood that they poured out on the land and for their pollution of it by their idols.
19 Napanzaki bango kati na bikolo, mpe bapalanganaki kati na mikili mosusu; nasambisaki bango kolanda etamboli mpe misala na bango.
I scattered them among the nations; they were dispersed through the lands. I judged them according to their ways and their deeds.
20 Nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, babebisaki bosantu ya Kombo na Ngai, pamba te bazalaki koloba na tina na bango: ‹ Bato wana bazali solo bato ya Yawe, kasi tala ndenge batiki mokili na Ye! ›
Then they went to the nations, and wherever they went, they profaned my holy name when people said of them, 'Are these really the people of Yahweh? For they have been thrown out of his land.'
21 Boye, nabatelaki lokumu mpe bosantu ya Kombo na Ngai, oyo libota ya Isalaele babebisaki bosantu na yango kati na bikolo epai wapi bakendeki.
But I had compassion for my holy name that the house of Israel had defiled among the nations, when they went there.
22 Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki.
Therefore say to the house of Israel, 'The Lord Yahweh says this: I am not doing this for your sake, house of Israel, but for my holy name, which you have profaned among the nations everywhere you have gone.
23 Nakolakisa bosantu ya Kombo monene na Ngai, oyo esambwaki kati na bikolo, Kombo oyo bobebisaki bosantu na yango kati na bikolo yango. Boye, bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, elobi Nkolo Yawe, tango nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na bino na miso na bango.
For I will make my great name holy, which you have profaned among the nations—in the midst of the nations, you profaned it. Then the nations will know that I am Yahweh—this is the Lord Yahweh's declaration—when you see that I am holy.
24 Pamba te nakobimisa bino na bikolo, nakosangisa bino wuta na bikolo mpe nakozongisa bino na mabele na bino moko.
I will take you from the nations and gather you from every land, and I will bring you to your land.
25 Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.
Then I will sprinkle pure water on you so you will be purified from all of your impurities, and I will purify you from all of your idols.
26 Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.
I will give you a new heart and a new spirit in your innermost parts, and I will take away the heart of stone from your flesh. For I will give you a heart of flesh.
27 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino mpe nakosala ete botosa bikateli na Ngai mpe bobatela mibeko na Ngai na bokebi.
I will set my Spirit in you and enable you to walk in my statutes and keep my decrees, so you will do them.
28 Bokovanda kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino; bokozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bino.
Then you will inhabit the land that I gave to your ancestors; you will be my people, and I will be your God.
29 Nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso, nakobotisa mbuma ya ble mpe nakokomisa yango ebele penza; bongo nakotindela bino lisusu nzala te.
For I will save you from all of your uncleanness. I will summon the grain and multiply it. I will no longer put famine upon you.
30 Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala.
I will multiply the fruit of the tree and the produce of the field so that you will no longer bear the shame of famine among the nations.
31 Boye, tango bokokanisa lisusu etamboli mabe na bino mpe misala na bino ya mabe, bino moko bokomiyina likolo ya masumu mpe ya misala na bino ya nkele.
Then you will think of your wicked ways and your deeds that were not good, and you will show loathing on your faces because of your own sins and your disgusting deeds.
32 Nalingi bososola ete nazali kosala makambo oyo mpo na bino te, elobi Nkolo Yawe! Oh libota ya Isalaele, boyoka mawa mpe soni mpo na etamboli na bino!
I am not doing this for your sake—this is the Lord Yahweh's declaration—let this be known to you. So be ashamed and disgraced because of your ways, house of Israel.
33 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo nakopetola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato bazongela kovanda na bingumba na bino mpe batonga yango lisusu;
The Lord Yahweh says this: On the day that I purify you from all your iniquity, I will cause you to inhabit the cities and to rebuild the ruined places.
34 nakosala ete basala lisusu bilanga na mabele oyo ekomaki esobe, na esika ete etikala pamba na miso ya bato nyonso oyo bakoleka wana.
For you will plow the ruined land until it is no longer a ruin before the eyes of all who pass by.
35 Bongo, bakoloba: ‘Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna.’
Then they will say, “This land was desolate, but it has become like the garden of Eden; the desolate cities and the uninhabited ruins that were torn down are now fortified and inhabited.”
36 Boye, bikolo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe; Ngai nde natongi lisusu bingumba oyo ebukana, mpe naloni lisusu biloko oyo ebebisama. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakokokisa yango. ›
Then the other nations around you will know that I am Yahweh, that I built up the ruins and replanted the abandoned places. I am Yahweh. I have declared it and I will do it.
37 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mbala oyo lisusu, nakosala ete libota ya Isalaele eluka Ngai mpo ete natalisa bango ngolu na Ngai: nakosala ete bato na yango bakoma ebele lokola bibwele.
The Lord Yahweh says this: Again I will be asked by the house of Israel to do this for them, to increase them like a flock of people.
38 Bingumba oyo ebebisama ekotonda lisusu na bato ebele lokola bibwele oyo bapesaka na mbeka, lokola bibwele oyo bamemaka na Yelusalemi na tango ya bafeti oyo ekatama. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
Like the flock is set apart for sacrifices, like the flock in Jerusalem at her appointed feasts, so will the ruined cities be filled with flocks of people and they will know that I am Yahweh.'”

< Ezekieli 36 >