< Ezekieli 34 >

1 Yawe alobaki na ngai:
And the word of Jehovah came to me, saying:
2 « Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele! Sakola mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele?
Son of man, prophesy against the shepherds of Israel; prophesy, and say to them, to the shepherds, Thus saith the Lord Jehovah: Woe to the shepherds of Israel, who feed themselves! Should not the shepherds feed the flocks?
3 Bolingi kaka kolia mafuta na yango, kolata bilamba oyo esalemi na bapwale na yango mpe koboma bibwele oyo eleki mafuta, kasi bolukaka bolamu ya bibwele yango te!
Ye eat the fat, and ye clothe you with the wool, ye kill that which is fatted; but ye feed not the flock.
4 Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango!
The weak do ye not strengthen, and the sick do ye not heal, and the wounded do ye not bind up; ye bring not back that which hath been driven away, neither seek ye that which hath been lost; but with force and with cruelty do ye rule them.
5 Boye, bibwele na Ngai epanzanaki bipai na bipai mpe ekomaki bilei ya banyama ya zamba, pamba te moto akobatela yango azalaki lisusu te.
Therefore are they scattered abroad, because there is no shepherd, and they are food to all the beasts of the field, or are scattered abroad.
6 Bibwele na Ngai ekomaki kotelengana na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse, epanzanaki na mokili mobimba; moto moko te azalaki koluka yango mpe koluka bolamu na yango.
My sheep wander through all the mountains, and upon every high hill; yea, over the whole face of the land is my flock scattered, and none careth for them, or seeketh them.
7 Mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe:
Therefore, ye shepherds, hear the word of Jehovah:
8 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai;
As I live, saith the Lord Jehovah, surely, because my flock is become a prey, and my flock is become meat to all the beasts of the field because there is no shepherd, and because my shepherds search not for my flock, and feed themselves, and feed not my flock, —
9 mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe:
therefore, ye shepherds, hear the word of Jehovah.
10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natombokeli babateli bibwele! Nakotuna bango bibwele na Ngai, nakobotola bibwele na Ngai na maboko na bango, nakotika bango lisusu te kobatela yango. Boye, bakokoka lisusu te komilukela bolamu na bango moko. Nakokangola bibwele na Ngai na minoko na bango, mpe ekotikala lisusu bilei na bango te.
Thus saith the Lord Jehovah: Behold, I am against the shepherds, and I will require my flock at their hand, and cause them to cease from feeding the flock; neither shall the shepherds feed themselves any more; for I will deliver my flock from their mouth, and they shall not be meat for them.
11 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ngai moko nakoluka bolamu ya bibwele na Ngai mpe nakobatela yango.
For thus saith the Lord Jehovah: Behold I, even I, will seek my flock, and look after them;
12 Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.
as a shepherd looketh after his flock in the day when he is among his sheep that are scattered, so will I look after my sheep, and will deliver them out of all the places where they have been scattered in the day of clouds and darkness.
13 Nakobimisa yango wuta na bikolo epai wapi ezali ya kopanzana, nakosangisa yango wuta na mikili mosusu mpe nakozongisa yango na mabele na yango moko; nakoleisa yango na likolo ya bangomba ya Isalaele, kati na mabwaku mpe kati na bamboka nyonso ya mike ya Isalaele.
And I will bring them out from the nations, and gather them from the countries; and I will bring them to their own land, and feed them upon the mountains of Israel, in the valleys, and in all the dwelling-places of the land.
14 Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko.
I will feed them in a good pasture, and upon the high mountains of Israel shall their fold be; there shall they lie down in a good fold, and in a fat pasture shall they feed upon the mountains of Israel.
15 Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe;
I will feed my flock, and I will cause them to lie down, saith the Lord Jehovah.
16 nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.
I will seek that which was lost, and bring back that which was driven away, and will bind up that which was broken, and will strengthen the sick; but the fat and the strong will I destroy; I will feed them as they deserve.
17 Mpo na bino, bibwele na Ngai, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu, kati na bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
And as for you, O my sheep, thus saith the Lord Jehovah: Behold, I will judge between the weak of the flock and the strong ones, even the rams and the he-goats.
18 Boni, ekoki te mpo na bino kolia na matiti ya kitoko? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino enyataka-nyataka matiti oyo etikali? Ekoki te mpo na bino komela mayi ya peto? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino ekomisa potopoto mayi oyo etikali?
Seemeth it a small thing to you to eat up the good pasture, but ye must tread down with your feet the residue of your pastures? and to drink of the clear waters, but ye must foul the residue with your feet?
19 Bolingi ete bibwele na Ngai elia matiti oyo matambe na bino enyati-nyati mpe emela mayi oyo matambe na bino ekomisi potopoto?
and that my sheep eat that which ye have trodden with your feet, and drink that which ye have fouled with your feet?
20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bango: Tala, nakokata, Ngai moko, makambo kati na ebwele oyo ya mafuta mpe oyo ekonda.
Therefore thus saith the Lord Jehovah to them: Behold I, even I, will judge between the fat and the lean of the flock.
21 Lokola bosalelaki mipanzi mpe mapeka na bino mpo na kotindika bibwele oyo ekonda, mpe maseke na bino mpo na kobundisa yango kino kopanza yango na libanda,
Because ye thrust with your side and with your shoulder, and push all the weak with your horns, till ye scatter them abroad,
22 nakobikisa bibwele na Ngai, mpe bakoyiba yango lisusu te; nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu.
therefore will I save my sheep, and they shall no more be a prey; and I will judge between sheep and sheep.
23 Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele: Davidi, mosali na Ngai; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango.
And I will raise up one shepherd over them, and he shall feed them, even my servant David; he shall feed them, and he shall be their shepherd.
24 Ngai Yawe, nakozala Nzambe na yango; mpe Davidi, mosali na Ngai, akozala mokambi kati na yango. Ngai Yawe nde nalobi.
And I, Jehovah, will be their God, and my servant David a prince among them. I, Jehovah, have spoken it.
25 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.
And I will make with them a covenant of peace, and will cause evil beasts to cease out of the land, so that they shall dwell safely in the desert, and sleep in the woods.
26 Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke; nakobetisa bamvula na tango na yango: ekozala bamvula ya mapamboli.
And I will make them, and the places round about my hill, a blessing; and I will cause the shower to come down in its season; showers rich in blessings shall there be.
27 Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango.
And the tree of the field shall yield her fruit, and the earth shall yield her increase; and they shall be secure in their land, and shall know that I am Jehovah, when I shall break the bands of their yoke and deliver them out of the hand of them that made them servants.
28 Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango.
And they shall no more be a prey to the nations, neither shall the beasts of the land devour them; but they shall dwell in security, and none shall make them afraid.
29 Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te.
And I will raise up for them a plantation for my glory; and they shall no more be consumed with hunger in the land, neither shall they bear the reproach of the nations any more.
30 Boye, bakoyeba solo ete Ngai Yawe, Nzambe na bango, nazali elongo na bango, mpe ete bango, libota ya Isalaele, bazali bato na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
Then shall they know, that I, Jehovah, their God, am with them, and that they, the house of Israel, are my people, saith the Lord Jehovah.
31 Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »
For ye, my flock, the flock of my pasture, are men, and I am your God, saith the Lord Jehovah.

< Ezekieli 34 >