< Ezekieli 33 >

1 Yawe alobaki na ngai:
And the word of the Lord came to me, saying:
2 « Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango: ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango;
Son of man, speak to the children of thy people, and say to them: When I bring the sword upon a land, if the people of the land take a man, one of their meanest, and make him a watchman over them:
3 soki mokengeli yango amoni banguna koya kobundisa mokili na bango mpe abeti kelelo mpo na kokebisa bato.
And he see the sword coming upon the land, and sound the trumpet, and tell the people:
4 Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko.
Then he that heareth the sound of the trumpet, whosoever he be, and doth not look to himself, if the sword come, and cut him off: his blood shall be upon his own head.
5 Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye.
He heard the sound of the trumpet and did not look to himself, his blood shall be upon him: but if he look to himself, he shall save his life.
6 Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›
And if the watchman see the sword coming, and sound not the trumpet: and the people look not to themselves, and the sword come, and cut off a soul from among them: he indeed is taken away in his iniquity, but I will require his blood at the hand of the watchman.
7 Mwana na moto, nakomisi yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele. Boye, yokaka maloba oyo nakobanda koloba mpo na kokebisa bango na Kombo na Ngai.
So thou, O son of man, I have made thee a watchman to the house of Israel: therefore thou shalt hear the word from my mouth, and shalt tell it them from me.
8 Soki nalobi na moto mabe: ‹ Oh moto mabe, okokufa solo! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
When I say to the wicked: O wicked man, thou shalt surely die: if thou dost not speak to warn the wicked man from his way: that wicked man shall die in his iniquity, but I will require his blood at thy hand.
9 Kasi soki okebisi moto mabe ete abongola bizaleli na ye, bongo asaleli yango te, akokufa solo mpo na masumu na ye; mpe yo, okobikisa bomoi na yo.
But if thou tell the wicked man, that he may be converted from his ways, and he be not converted from his way: he shall die in his iniquity: but thou hast delivered thy soul.
10 Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala maloba oyo bozali koloba: ‘Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso?’ ›
Thou therefore, O son of man, say to the house of Israel: Thus you have spoken, saying: Our iniquities, and our sins are upon us, and we pine away in them: how then can we live?
11 Loba na bango: ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa? ›
Say to them: As I live, saith the Lord God, I desire not the death of the wicked, but that the wicked turn from his way, and live. Turn ye, turn ye from your evil ways: and why will you die, O house of Israel?
12 Mwana na moto, loba na bandeko na yo: ‹ Boyengebene ya moto ya sembo ekobikisa ye te soki asali mabe, mpe mabe ya moto mabe ekokweyisa ye te soki atiki yango; moto ya sembo akobika te likolo ya boyengebene na ye ya kala soki asali masumu. ›
Thou therefore, O son of man, say to the children of thy people: The justice of the just shall not deliver him, in what day soever he shall sin: and the wickedness of the wicked shall not hurt him, in what day soever he shall turn from his wickedness: and the just shall not be able to live in his justice, in what day soever he shall sin.
13 Ata soki nalobi na moto ya sembo ete akowumela solo na bomoi, soki atie elikya na bosembo na ye mpe asali mabe, bosembo na ye nyonso ekotangama lisusu te mpe akokufa mpo na mabe oyo asali.
Yea, if I shall say to the just that he shall surely live, and he, trusting in his justice, commit iniquity: all his justices shall be forgotten, and in his iniquity, which he hath committed, in the same shall he die.
14 Soki nalobi na moto mabe: ‹ Okokufa solo; › kasi atiki masumu na ye mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima,
And if I shall say to the wicked: Thou shalt surely die: and he do penance for his sin, and do judgment and justice,
15 soki azongisi ndanga oyo asimbaki na niongo mpe biloko oyo ayibaki, soki atosi mitindo oyo epesaka bomoi mpe atiki kosala mabe, akobika penza, akokufa te.
And if that wicked man restore the pledge, and render what he had robbed, and walk in the commandments of life, and do no unjust thing: he shall surely live, and shall not die.
16 Mabe nyonso oyo asalaki ekotangama lisusu te, akobika solo; pamba te asali oyo ezali alima mpe sembo.
None of his sins, which he hath committed, shall be imputed to him: he hath done judgment and justice, he shall surely live.
17 Bandeko na yo bazali koloba: ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te. › Nzokande, nzela na bango moko nde ezalaka mabe.
And the children of thy people have said: The way of the Lord is not equitable: whereas their own way is unjust.
18 Soki moto ya sembo atiki boyengebene na ye mpe akomi kosala mabe, akokufa mpo na mabe yango.
For when the just shall depart from his justice, and commit iniquities, he shall die in them.
19 Soki moto mabe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, akobika solo mpo ete asali bongo.
And when the wicked shall depart from his wickedness, and shall do judgments, and justice: be shall live in them.
20 Oh bino, libota ya Isalaele, ndenge nini bokoki penza koloba: ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te! › Solo, nakosambisa moko na moko kati na bino kolanda etamboli na ye! »
And you say: The way of the Lord is not right, I will judge every one of you according to his ways, O house of Israel.
21 Na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi na mibale ya bowumbu na biso, moko kati na bato oyo babikaki na Yelusalemi ayaki epai na ngai mpe alobaki: « Babebisi engumba! »
And it came to pass in the twelfth year of our captivity, in the tenth month, in the fifth day of the month, that there came to me one that was fled from Jerusalem, saying: The city is laid waste.
22 Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba.
And the hand of the Lord had been upon me in the evening, before he that was fled came: and he opened my mouth till he came to me in the morning, and my mouth being opened, I was silent no more.
23 Bongo Yawe alobaki na ngai:
And the word of the Lord came to me, saying:
24 « Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba: ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula; nzokande biso, tozali ebele; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula! ›
Son of man, they that dwell in these ruinous places in the land of Israel, speak, saying: Abraham was one, and he inherited the land, but we are many, the land is given us in possession.
25 Yango wana, loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula!
Therefore say to them: Thus saith the Lord God, You that eat with the blood and lift up your eyes to your uncleannesses, and that shed blood: shall you possess the land by inheritance?
26 Bozali kotia elikya na mopanga na bino, bozali kosala makambo ya mbindo, mpe moko na moko kati na bino azali kokomisa mbindo mwasi ya moninga na ye, mpe bozwa penza mokili lokola libula! ›
You stood on your swords, you have committed abominations, and every one hath defiled his neighbour’s wife; and shall you possess the land by inheritance?
27 Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka;
Say thou thus to them: Thus saith the Lord God: As I live, they that dwell in the ruinous places, shall fall by the sword: and he that is in the field, shall be given to the beasts to be devoured: and they that are in holds, and caves, shall die of the pestilence.
28 nakokomisa mokili libebi mpe nakosala ete etikala lisusu na bato te: nakosukisa lolendo na yango, bangomba ya Isalaele ekotikala lisusu na bato te, mpe bato bakotika kolekela wana.
And I will make the land a wilderness, and a desert, and the proud strength thereof shall fail, and the mountains of Israel shall be desolate, because there is none to pass by them.
29 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokomisa mokili libebi mpe esobe, likolo ya makambo na bango nyonso ya mbindo oyo bazali kosala. ›
And they shall know that I am the Lord, when I shall have made their land waste and desolate, for all their abominations which they have committed.
30 Mpo na yo, mwana na moto, bandeko na yo bazali kolobana bango na bango na bamir mpe na bikuke ya bandako na bango na tina na kombo na yo: ‹ Boya koyoka maloba oyo ewuti epai na Yawe! ›
And thou son of man: the children of thy people, that talk of thee by the walls, and in the doors of the houses, and speak one to another each men to his neighbour, saying: Come, and let us hear what is the word that cometh forth from the Lord.
31 Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
And they come to thee, as if a people were coming in, and my people sit before thee: and hear thy words, and do them not: for they turn them into a song of their mouth, and their heart goeth after their covetousness.
32 Mpo na bango, ozalaka na yo kaka lokola moto oyo ayembaka malamu banzembo ya kitoko, na mongongo ya kitoko, mpe abetaka mindule kitoko; pamba te bayokaka na bango maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te.
And thou art to them as a musical song which is sung with a sweet and agreeable voice: and they hear thy words, and do them not.
33 Tango makambo oyo nyonso ekokokisama —mpe ekokokisama solo— bakososola penza ete mosakoli moko azalaki kati na bango. »
And when that which was foretold shall come to pass, (for behold it is coming, ) then shall they know that a prophet bath been among them.

< Ezekieli 33 >