< Ezekieli 32 >
1 Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na mibale, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai:
And it comes to pass, in the twelfth year, in the twelfth month, on the first of the month, a word of YHWH has been to me, saying,
2 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye: ‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo, ozali lokola dalagona kati na bibale minene, otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo, opanzaka mayi na makolo na yo mpe okomisaka bibale potopoto.
“Son of man, lift up a lamentation for Pharaoh king of Egypt, and you have said to him: You have been like a young lion of nations, And you [are] as a dragon in the seas, And you come forth with your flowings, And trouble the waters with your feet, And you foul their flowings.
3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakotiela yo motambo na Ngai tango nakosangisa bato ya bikolo ebele; boye bakokanga yo na motambo yango.
Thus said Lord YHWH: And I have spread out My net for you, With an assembly of many peoples, And they have brought you up in My net.
4 Nakobwaka yo na mabele mpe nakosundola yo na libanda ya bilanga. Nakosala ete bandeke nyonso ya likolo eya komatela yo mpe banyama ya mokili mobimba eya kolia misuni ya nzoto na yo.
And I have left you in the land, I cast you out on the face of the field, And I have caused every bird of the heavens to dwell on you, And have satisfied every beast of the earth with you.
5 Nakopanza misuni ya nzoto na yo na bangomba mpe nakotondisa mabwaku na biteni oyo ekotikala.
And I have put your flesh on the mountains, And filled the valleys [with] your heap,
6 Nakotondisa mokili, na makila oyo ekowuta epai na yo, na balabala nyonso kino na bangomba; mpe mabulu minene ekotonda na misuni ya nzoto na yo.
And watered the land with your flowing, From your blood—to the mountains, And streams are filled with you.
7 Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda, nakozipa likolo, nakokomisa molili minzoto na yango; nakozipa moyi na mapata, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
And in quenching you I have covered the heavens, And have made their stars black, I cover the sun with a cloud, And the moon does not cause its light to shine.
8 Likolo na yo, nakokomisa molili biloko nyonso ya likolo, oyo ebimisaka pole, mpe nakoyeisa molili na mokili na yo, elobi Nkolo Yawe.
I make all luminaries of light in the heavens black over you, And I have given darkness over your land, A declaration of Lord YHWH,
9 Nakotungisa mitema ya bato ebele tango nakomema yo na bowumbu kati na bikolo ya bapaya, na mikili oyo otikala kutu koyeba te.
And I have distressed the heart of many peoples, In My bringing in your destruction among nations, To lands that you have not known.
10 Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo tango nakolakisa bango mopanga na Ngai. Na mokolo ya kokweya na yo, moko na moko kati na bango akokoma kolenga tango nyonso mpo na bomoi na ye.
And I have made many peoples astonished at you, And their kings are afraid because of you with trembling, In My brandishing My sword before their faces, And they have trembled every moment, Each for his life—in the day of your fall.
11 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mopanga ya mokonzi ya Babiloni ekobundisa yo.
For thus said Lord YHWH: A sword of the king of Babylon enters you,
12 Nakosala ete bato ebele bakufa kati na yo na mopanga ya bilombe ya bitumba ya ekolo oyo eleki bikolo nyonso na kanza. Bakosukisa lolendo ya mokili ya Ejipito mpe bato na yango nyonso bakobebisama.
I cause your multitude to fall by swords of the mighty, The terrible of nations—all of them, And they have spoiled the excellence of Egypt, And all her multitude has been destroyed.
13 Nakoboma ngombe na yango nyonso pembeni ya mayi ya mozindo oyo ekoningana lisusu te na makolo ya bato to ya banyama.
And I have destroyed all her beasts, From beside many waters, And a foot of man does not trouble them anymore, Indeed, the hooves of beasts do not trouble them.
14 Bongo nakosala ete mayi na yango evanda kimia mpe bibale na yango etiola lokola mafuta, elobi Nkolo Yawe.
Then I cause their waters to sink, And I cause their rivers to go as oil, A declaration of Lord YHWH.
15 Tango nakosala ete Ejipito etikala lisusu na bato te, tango nakobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na yango mpe nakoboma bavandi na yango nyonso; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
In My making the land of Egypt a desolation, And the land has been desolated of its fullness, In My striking all the inhabitants in it, Then they have known that I [am] YHWH.
16 Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. »
It [is] a lamentation, and they have lamented her, Daughters of the nations lament her, For Egypt, and for all her multitude, they lament her, A declaration of Lord YHWH.”
17 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana kaka, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai:
And it comes to pass, in the twelfth year, on the fifteenth of the month, a word of YHWH has been to me, saying,
18 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya.
“Son of man, Wail for the multitude of Egypt, And cause it to go down, It, and the daughters of majestic nations, To the lower parts of the earth, With those going down to the pit.
19 Loba na bango: ‹ Boni, boleki bato mosusu na nini? Bokita mpe bolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te! ›
Whom have you surpassed in beauty? Go down, and be laid with [the] uncircumcised.
20 Bakokweya kati na bato oyo bakufaki na mopanga. Mopanga esili kobima! Tika ete eboma Ejipito mpe bato na yango nyonso!
They fall in the midst of the pierced of the sword, She has been given [to] the sword, They drew her out, and all her multitude.
21 Wuta na mboka ya bakufi, bankumu bakoloba na Ejipito mpe na bikolo oyo esanganaki na yango: ‹ Bakiti mpe balali elongo na bato oyo bakatama ngenga te, esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga. › (Sheol )
The gods of the mighty speak to him out of the midst of Sheol, With his helpers—they have gone down, They have lain with the uncircumcised, The pierced of the sword. (Sheol )
22 Mokili ya Asiri ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, ezingelami na malita ya bato na yango nyonso oyo babomaki: bango nyonso oyo bakufaki na mopanga.
There [is] Asshur, and all her assembly, His graves [are] around him, All of them [are] wounded, who are falling by sword,
23 Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga.
Whose graves are appointed in the sides of the pit, And her assembly is around her grave, All of them wounded, falling by sword, Because they gave terror in the land of the living.
24 Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
There [is] Elam, and all her multitude, Around her grave, All of them wounded, who are falling by sword, Who have gone down uncircumcised to the lower parts of the earth, Because they gave their terror in the land of the living, And they bear their shame with those going down to the pit.
25 Basalaki mbeto moko mpo na mokili yango kati na bato oyo bakufaki na mopanga, esika moko na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te. Lokola somo na bango epanzanaki na mokili ya bato ya bomoi, bamemaki soni na bango elongo na bato oyo bakitaka na libulu; bazali kolala esika moko na bato oyo babomaki na mopanga.
They have appointed a bed for her in the midst of the wounded, With all her multitude, Her graves [are] around them, All of them uncircumcised, pierced of the sword, For their terror was given in the land of the living, And they bear their shame with those going down to the pit, He has been set in the midst of the pierced.
26 Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi.
There [is] Meshech, Tubal, and all her multitude, Her graves [are] around them, All of them uncircumcised, pierced by the sword, For they gave their terror in the land of the living,
27 Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo. (Sheol )
And they do not lie with the mighty, Who are falling of the uncircumcised, Who have gone down to Sheol with their weapons of war, And they put their swords under their heads, And their iniquities are on their bones, For the terror of the mighty [is] in the land of the living. (Sheol )
28 Oh Faraon, yo mpe okobukana, okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufaki na mopanga!
And you are broken in the midst of the uncircumcised, And lie with the pierced of the sword.
29 Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu.
There [is] Edom, her kings, and all her princes, Who have been given up in their might, With the pierced of the sword, They lie with the uncircumcised, And with those going down to the pit.
30 Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
There [are] princes of the north, All of them, and every Zidonian, Who have gone down with the pierced in their terror, They are ashamed of their might, And they lie uncircumcised with the pierced of the sword, And they bear their shame with those going down to the pit.
31 Ye Faraon elongo na mampinga na ye nyonso bakomona bango mpe bakobondisama na tina na bato nyonso oyo bakufaki na mopanga, elobi Nkolo Yawe.
Then Pharaoh sees, And he has been comforted for all his multitude, The pierced of the sword—Pharaoh and all his force, A declaration of Lord YHWH.
32 Atako nayeisaki somo na mokili ya bato ya bomoi na nzela na ye, Faraon mpe bato na ye nyonso bakolala kati na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufa na mopanga, elobi Nkolo Yawe. »
For I have given his terror in the land of the living, And he has been laid down in [the] midst of [the] uncircumcised, With [the] pierced of [the] sword—Pharaoh, and all his multitude, A declaration of Lord YHWH!”