< Ezekieli 31 >
1 Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai:
А једанаесте године, трећег месеца, првог дана, дође ми реч Господња говорећи:
2 « Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso: ‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu?
Сине човечји, кажи Фараону цару мисирском и народу његовом: На шта си налик у величини својој?
3 Tala mokili ya Asiri malamu! Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani: bitape na yango ezalaki kitoko mpe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa pio koleka banzete nyonso ya zamba; elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi, songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata.
Ето, Асирац беше кедар на Ливану, лепих грана и дебелог хлада и високог раста, коме врхови беху међу густим гранама.
4 Mayi ezalaki kokolisa yango, mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi; ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba.
Вода га одгоји, бездана га узвиси; она рекама својим течаше око његовог стабла и пушташе потоке своје к свим дрветима пољским.
5 Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi koleka banzete nyonso ya zamba; bitape na yango ekomaki milayi, mpe makasa na yango ekomaki ebele, pamba te ezalaki kozwa mayi ebele.
Зато раст његов надвиси сва дрвета пољска, и умножише се гране његове, и од мноштва воде раширише се одводе његове кад их пушташе.
6 Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koya kotonga bazala na bitape na yango, banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango. Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango.
На гранама његовим вијаху гнезда све птице небеске, и под гранама његовим све звери пољске лежаху се, и у хладу његовом сеђаху сви велики народи.
7 Ezalaki kitoko na monene na yango mpe na molayi ya bitape na yango, pamba te misisa na yango ezalaki ekita kino na mayi minene.
И беше леп величином својом и дужином грана својих, јер му корен беше код велике воде.
8 Kati na elanga ya Nzambe, nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango, nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape, nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa: nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango na kitoko.
Кедри у врту Божјем не могаху га заклонити, јеле не могаху се изједначити с његовим гранама, и јавори не беху као огранци његови; ниједно дрво у врту Божјем не беше на лепоту тако као он.
9 Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele; bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe, ezalaki kolula yango.
Учиних га лепог мноштвом грана да му завиђаху сва дрвета едемска што беху у врту Божјем.
10 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango,
Зато овако вели Господ Господ: Што је висок нарастао, и дигао врх свој међу густе гране, и срце се његово понело висином његовом,
11 nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango;
Зато га дадох у руку најсилнијем међу народима да чини с њим шта хоће, одвргох га за безбожност његову.
12 mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango; bongo etikalaki yango moko.
И туђинци, најљући између народа, посекоше га и оставише га; гране му попадаше по горама и по свим долинама, и огранци му се изломише по свим потоцима на земљи; и сви народи земаљски отидоше из хлада његовог и оставише га.
13 Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango.
На изваљеном пању његовом станују све птице небеске, и на гранама су његовим све звери пољске,
14 Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.
Да се не поноси висином својом ни једно дрво крај воде и не диже врха свог међу густе гране, и од свих што се натапају да се ни једно не узда у себе ради своје величине; јер су сви предани на смрт, бачени у најдоњи крај земље међу синове људске с онима који силазе у јаму.
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. (Sheol )
Овако вели Господ Господ: У који дан сиђе у гроб, учиних жалост, покрих бездану њега ради, и уставих реке њене, и велика вода стаде, и расцвелих за њим Ливан, и сва дрвета пољска повенуше за њим. (Sheol )
16 Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. (Sheol )
Праском падања његовог устресох народе, кад га свалих у гроб с онима који силазе у јаму; и утешише се на најдоњој страни земље сва дрвета едемска, што је најбоље и најлепше на Ливану, сва што се натапаху. (Sheol )
17 Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo. (Sheol )
И они сиђоше с њим у гроб к онима што су побијени мачем, и мишица његова, и који сеђаху у хладу његовом међу народима. (Sheol )
18 Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »
На које си међу дрветима едемским налик славом и величином? Али ћеш бити оборен с дрветима едемским у најдоњи крај земље, међу необрезанима ћеш лежати с онима који су побијени мачем. То је Фараон и сав народ његов, говори Господ Господ.