< Ezekieli 3 >

1 Bongo alobaki na ngai: « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. »
And he said to me, Son of man, eat that which thou findest; eat this roll, and go, speak to the house of Israel!
2 Boye, nafungolaki monoko na ngai, mpe aleisaki ngai buku yango oyo elingama.
So I opened my mouth, and he gave me the roll to eat.
3 Alobaki na ngai lisusu: « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. » Boye, naliaki yango, mpe ezalaki elengi na monoko na ngai lokola mafuta ya nzoyi.
And he said to me, Son of man, let thy stomach eat, and fill thy body with this roll which I give thee! Then I ate it, and it was in my mouth as honey for sweetness.
4 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, kende sik’oyo na libota ya Isalaele mpe yebisa bango maloba na Ngai.
And he said to me: Son of man, go, get thee to the house of Israel, and speak my words to them!
5 Otindami te epai ya bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola, kasi epai ya bana ya Isalaele.
For not to a people of a dark speech and a hard language art thou sent, but to the house of Israel;
6 Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango.
not to many nations of a dark speech and a hard language, whose words thou canst not understand. Truly, had I sent thee to them, they would have hearkened to thee.
7 Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi.
But the house of Israel will not hearken to thee, for they will not hearken to me. For the whole house of Israel is brazen-faced and stiff-hearted.
8 Nakokomisa yo motema mpe moto makasi lokola bango.
Behold, I have made thy face strong against their faces, and thy forehead strong against their foreheads.
9 Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. »
As an adamant, harder than flint, have I made thy forehead; fear them not, nor be dismayed at their looks; for they are a rebellious house.
10 Alobaki na ngai lisusu: « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo.
Moreover, he said to me: Son of man, all my words, which I shall speak to thee, receive in thy heart, and hear with thine ears!
11 Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »
And go, get thee to them of the captivity, to the children of thy people, and speak to them, and say to them, Thus saith the Lord Jehovah; whether they will hear, or whether they will forbear.
12 Boye, Molimo atelemisaki ngai mpe nayokaki sima na ngai makelele moko ya makasi: « Tika ete nkembo ya Yawe epambolama wuta na esika oyo Ye avandaka! »
Then the spirit lifted me up, and I heard behind me the sound, as of a great rushing, saying, “Praised be the majesty of Jehovah from his place!”
13 Nayokaki lisusu makelele ya mapapu ya bikelamu ya bomoi, tango ezalaki kotutana lipapu moko na mosusu, makelele ya bapine mpe lokito moko ya makasi.
I heard also the noise of the wings of the living creatures, that touched one another, and the noise of the wheels beside them, even a noise of a great rushing.
14 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.
So the spirit lifted me up, and took me away, and I went in bitterness, in the heat of my spirit; but the hand of Jehovah was strong upon me.
15 Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo; nazalaki kokamwa mingi.
Then I came to them of the captivity at Tel-abib, that dwelt by the river Chebar; and I dwelt where they dwelt; I even dwelt astonished among them seven days.
16 Sima na mikolo sambo, Yawe alobaki na ngai:
And at the end of seven days, the word of Jehovah came to me, and said:
17 « Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai.
Son of man, I have set thee as a watchman to the house of Israel; therefore hear the word from my mouth, and warn them from me!
18 Soki Ngai nalobi na moto mabe: ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
When I say to the wicked, Thou shalt surely die! and thou givest him not warning, nor speakest to warn the wicked from his wicked way, so that he may live, that wicked man shall die for his iniquity; but his blood will I require at thy hand.
19 Kasi soki, yo, okebisi moto wana ya mabe, mpe atiki mabe na ye te to abongwani na nzela na ye ya mabe te, akokufa solo na masumu na ye, mpe yo okobikisa bomoi na yo.
Yet if thou warn the wicked, and he turn not from his wickedness, and from his wicked way, he shall die for his iniquity, but thou hast delivered thy soul.
20 Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
Again, when a righteous man turneth from his righteousness, and committeth iniquity, and I lay a stumbling-block before him, and he shall die because thou hast not given him warning, he will die for his sin; and his righteousness which he hath done will not be remembered; but his blood will I require at thy hand.
21 Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. »
Yet if thou warn the righteous man, that he sin not, and the righteous man doth not sin, he shall surely live, because he hath received warning; and thou hast delivered thy soul.
22 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai: « Telema mpe kende na lubwaku; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. »
And the hand of Jehovah was there upon me, and he said to me, Arise, go forth into the plain, and there will I speak with thee.
23 Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna: ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele.
Then I arose, and went forth into the plain, and lo, the glory of Jehovah stood there, as the glory which I saw by the river Chebar; and I fell upon my face.
24 Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai: « Kende komikangela kati na ndako na yo.
Then the spirit entered into me, and set me upon my feet. And he spake with me, and said to me: Go, shut thyself within thy house.
25 Yo, mwana na moto, bakokanga yo basinga, bakolinga-linga yo mpo ete okoka te kobima kati na bato.
And behold, O son of man, bands shall be put upon thee, and thou shalt be bound therewith; and thou shalt not go out among them.
26 Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki.
And I will make thy tongue cleave to the roof of thy mouth, that thou shalt be dumb, and shalt not be to them a reprover; for they are a rebellious house.
27 Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye! Pamba te bazali libota ya batomboki. »
But when I speak with thee, I will open thy mouth, and thou shalt say to them, Thus saith the Lord Jehovah: He that will hear, let him hear, and he that will forbear, let him forbear; for they are a rebellious house.

< Ezekieli 3 >