< Ezekieli 27 >

1 Yawe alobaki na ngai:
主の言葉がわたしに臨んだ、
2 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na Tiri!
「人の子よ、ツロのために悲しみの歌をのべ、
3 Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh engumba Tiri, olobaka: ‘Ngai, nakoka na kitoko na ngai!’
海の入口に住んで、多くの海沿いの国々の民の商人であるツロに対して言え、主なる神はこう言われる、ツロよ、あなたは言った、『わたしの美は完全である』と。
4 Etando na yo ezali kati na bibale minene; bato oyo batongaki yo nde bakomisaki yo kitoko makasi.
あなたの境は海の中にあり、あなたの建設者はあなたの美を完全にした。
5 Basalaki mipanzi na yo nyonso na mabaya ya sipele oyo ewutaki na Seniri; basalaki likonzi ya masuwa na yo na nzete ya sedele oyo ewutaki na Libani;
人々はセニルのもみの木であなたのために船板を造り、レバノンから香柏をとって、あなたのために帆柱を造り、
6 basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi;
バシャンのかしの木で、あなたのためにかいを造り、クプロの島から来る松の木に象牙をはめて、あなたのために甲板を造った。
7 basalaki vwale mpe bendele na yo na elamba ya lino ya kitoko oyo ewutaki na Ejipito, mpe batongaki bililingi kati na yango; bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane, ewutaki na bisanga ya Elisha.
あなたの帆はエジプトから来るあや布であって、あなたの旗に用いられ、あなたのおおいはエリシャの海岸から来る青と紫の布である。
8 Baluki nkayi na yo bazalaki bato ya Sidoni mpe ya Arivadi. Oh Tiri, bato na yo, oyo bazalaki na bwanya koleka, nde bazalaki kotambolisa yo.
あなたのこぎ手は、シドンとアルワデの住民、あなたのかじとりは、あなたのうちにいる熟練なゼメルの人々である。
9 Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya nde bazalaki kosala epai na yo mosala ya kobamba madusu na yo mpo ete mayi ekota te; bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka.
ゲバルの老人たち、およびその熟練な人々は、あなたのうちにいて漏りを繕い、海のすべての船およびその船員らはあなたのうちにいて、あなたの商品を交易する。
10 Bato ya Persi, ya Ludi mpe ya Puti bazalaki basoda kati na mampinga na yo: bazalaki kotia banguba mpe bikoti na bango na likolo ya bamir na yo; bazalaki kosala lokumu na yo.
ペルシャ人、ルデびと、プテびとはあなたの軍に加わって、あなたの戦士となる。彼らはあなたのうちに、盾とかぶとを掛け、あなたに輝きをそえた。
11 Bato ya Arivadi mpe basoda na yo ya mpiko bazalaki kotelema na bangambo nyonso ya bamir na yo, basoda ya Gamadi bazalaki kati na bandako na yo ya milayi: bazalaki kotia banguba na bango zingazinga ya bamir na yo, bazalaki kosala ete kitoko na yo ekoma ya kokoka.
アルワデとヘレクの人々は、あなたの周囲の城壁の上にあり、ガマデの人々は、あなたのやぐらの中にあり、彼らは、あなたの周囲の城壁にその盾を掛けて、あなたの美観を全うした。
12 Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi.
あなたはそのすべての貨物に富むゆえに、タルシシはあなたと交易をなし、銀、鉄、すず、鉛をあなたの商品と交換した。
13 Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka.
ヤワン、トバル、およびメセクはあなたと取引し、彼らは人身と青銅の器とを、あなたの商品と交換した。
14 Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile.
ベテ・トガルマは馬、軍馬、および騾馬をあなたの商品と交換した。
15 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni.
ローヅ島の人々はあなたと取引し、多くの海沿いの国々は、あなたの市場となり、象牙と黒たんとを、みつぎとしてあなたに持ってきた。
16 Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi.
あなたの製品が多いので、エドムはあなたと商売し、彼らは赤玉、紫、縫い取りの布、細布、さんご、めのうをもって、あなたの商品と交換した。
17 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
ユダとイスラエルの地は、あなたと取引し、麦、オリブ、いちじく、蜜、油、および乳香をもって、あなたの商品と交換した。
18 Bato ya Damasi bazalaki kosala mombongo elongo na yo, pamba te ozalaki na bambuma ebele mpe na biloko ebele; bazalaki komema epai na yo masanga ya vino oyo ezalaki kowuta na mboka Eliboni mpe bapwale ya bameme oyo ezalaki kowuta na mboka Tsakari, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
あなたの製品が多く、あなたの富が多いので、ダマスコはあなたと取引し、ヘルボンの酒と、さらした羊毛と、
19 Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
ウザルの酒をもって、あなたの商品と交換し、銑鉄、肉桂、菖蒲をもって、あなたの商品と交易した。
20 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo bilamba ya kitoko oyo batiaka na bampunda.
デダンは乗物の鞍敷をもって、あなたと取引した。
21 Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
アラビヤびと、およびケダルのすべての君たちは小羊、雄羊、やぎをもって、あなたと取引し、これらの物をあなたと交易した。
22 Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo.
シバとラアマの商人は、あなたと取引し、もろもろの尊い香料と、もろもろの宝石と金とをもって、あなたの商品と交換した。
23 Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo;
ハラン、カンネ、エデン、アッスリヤ、キルマデはあなたと取引した。
24 bazalaki kosala elongo na yo mombongo ya biloko ya kitoko: bakazaka ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bitoko ya balangi ya ndenge na ndenge mpe mikaba makasi mpe ya kitoko.
彼らは、はなやかな衣服と、青く縫い取りした布と、ひもで結んで、じょうぶにした敷物などをもって、あなたと取引した。
25 Bamasuwa minene ya Tarsisi ezalaki komema biloko na yo ya koteka. Otondaki meke na biloko mpe okendeki sango kati na bibale minene.
タルシシの船はあなたの商品を運んでまわった。あなたは海の中にいて満ち足り、いたく栄えた。
26 Baluki nkayi na yo bamemaki yo kino na kati-kati ya bibale minene. Kasi mopepe ya este ebukaki-bukaki yo na biteni na kati-kati ya ebale monene:
あなたのこぎ手らはあなたを大海の中に進め、海の中で東風があなたの船を破った。
27 bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, mombongo na yo, baluki nkayi na yo, bato na yo, oyo basalaka na masuwa, basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, bato oyo basalaka mombongo elongo na yo mpe basoda na yo nyonso elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, bakokufa na kati-kati ya bibale minene na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda.
あなたの財宝、あなたの貨物、あなたの商品、あなたの船員、あなたのかじ取り、あなたの漏りを繕う者、あなたの商品を商う者、あなたの中にいるすべての軍人、あなたの中にいるすべての仲間は皆、あなたの破滅の日に海の中に沈む。
28 Tango baluki nkayi na yo bakoganga, bituka ya ngambo ya ebale monene ekolenga na somo.
あなたのかじ取りの叫び声に、近郷は震い、
29 Baluki nkayi nyonso mpe bato mosusu oyo basalaka na masuwa bakosundola masuwa; bakotelema na libongo,
すべてかいをとる者は船からくだる。船員および海のすべてのかじ取りは海べに立ち、
30 bakoganga na mongongo makasi mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo; bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele.
あなたのために声をあげて泣き、はげしく叫び、ちりをこうべにかぶり、灰の中にまろび、
31 Bakomikokola suki ya mito mpe bakolata basaki. Bakolela yo na mawa na motema mpe bakomitungisa makasi na mitema.
あなたのために髪をそり、荒布をまとい、あなたのために心を痛めて泣き、はげしく嘆く。
32 Kati na pasi mpe kolela na bango, bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo: ‘Nani azalaki lokola Tiri, lokola engumba oyo ekomi kimia kati na ebale monene?’
彼らは悲しんで、あなたのために悲しみの歌をのべ、あなたを弔って言う、『だれかツロのように海の中で滅びたものがあるか。
33 Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima wuta na ebale monene, ozalaki kokokisa baposa ya bikolo ebele; ebele ya bomengo mpe ya nkita na yo ezalaki kokomisa bakonzi ya mokili bazwi.
あなたの商品が海を越えてきた時、あなたは多くの民を飽かせ、あなたの多くの財宝と商品とをもって、地の王たちを富ませた。
34 Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo, ebwaki yo kati na mozindo ya mayi: biloko na yo mpe basali na yo nyonso bazindi elongo na yo.
今あなたは海で破船し、深い水に沈み、あなたの商品と、あなたのすべての船員とは、あなたと共に沈んだ。
35 Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo; bakonzi na bango bazali kolenga na somo, mpe bilongi na bango ebebi likolo ya kobanga.
海沿いの国々に住む者は皆あなたについて驚き、その王たちは大いに恐れてその顔を震わす。
36 Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi koseka mpe kowolola yo: Osuki eh! Osuki! Okotikala kozala lisusu te! › »
もろもろの民の中の商人らはあなたをあざける。あなたは恐るべき終りを遂げ、永遠にうせはてる』」。

< Ezekieli 27 >