< Ezekieli 26 >

1 Na mobu ya zomi na moko, na mokolo ya liboso ya sanza, Yawe alobaki na ngai:
در یازدهمین سال از تبعیدمان، در روز اول ماه، این پیام از جانب خداوند به من رسید:
2 « Mwana na moto, lokola Tiri alobaki mpo na kotiola Yelusalemi: ‹ Ozwi! Ekuke ya bikolo ebukani! Bikuke na yango efungwami mpo na kotondisa ngai na bomengo! Lokola esili kobebisama, Ngai sik’oyo, nakofuluka! ›
«ای پسر انسان، صور از سقوط اورشلیم خوشحال است و می‌گوید: «اورشلیم در هم شکسته است. او که با قومهای دیگر تجارت می‌کرد از بین رفته است. حال، من جای او را در تجارت می‌گیرم و ثروتمند می‌شوم.»
3 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh engumba ya Tiri, natombokeli yo! Nakotindela yo bikolo ebele lokola mbonge ya ebale monene, mpo ete eya kobundisa yo.
بنابراین، خداوند یهوه می‌فرماید: «ای صور، من در مقابل تو می‌ایستم و قومها را مثل امواج خروشان دریا بر ضد تو جمع می‌کنم.
4 Bakobuka bamir ya Tiri mpe bakokweyisa bandako na yango ya milayi; mpe Ngai, nakolongola putulu na yango nyonso mpe nakotika yango mabanga ya pamba.
آنها حصارهای تو را خراب می‌کنند و برج و باروهایت را فرو می‌ریزند. من خاک تو را جارو خواهم کرد تا چیزی جز صخره‌ای صاف برایت باقی نماند.
5 Engumba Tiri ekokoma, kati na ebale monene, esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango. Ezali Ngai nde nasili koloba, elobi Nkolo Yawe; engumba Tiri ekokoma bomengo ya bitumba ya bikolo,
جزیره‌ات غیر مسکون و جای ماهیگیران می‌شود تا تورهای خود را در آنجا پهن کنند. من که خداوند یهوه هستم این را گفته‌ام. صور تاراج ممالک خواهد گردید
6 mpe bakoboma na mopanga bamboka ya mike-mike oyo ezalaka pembeni ya ebale monene. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
و ساکنان سرزمین اصلی آن به ضرب شمشیر کشته خواهند شد، آنگاه خواهند دانست که من یهوه هستم.»
7 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Wuta na nor, nakotindela Tiri Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mokonzi ya bakonzi: akoya elongo na bampunda mpe bashar, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe mampinga monene ya basoda;
خداوند یهوه می‌فرماید: «من نِبوکَدنِصَّر، پادشاه بابِل شاه شاهان را از شمال با سپاهی عظیم و سواران و ارابه‌های بیشمار به جنگ تو می‌آورم.
8 akobebisa na mopanga bingumba na yo, oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, akozingela yo, akotimola mabulu ya kobombamela zingazinga ya bamir na yo mpe akotombola banguba na ye mpo na kobundisa yo.
او ساکنان خاک اصلی تو را خواهد کشت و شهر را محاصره کرده، در برابر آن سنگرها و پشته‌ها خواهد ساخت.
9 Akotindela bamir na yo makonga ya basoda na ye, oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe akobuka bandako na yo ya milayi na nzela ya bibundeli na ye ya nguya.
در مقابل حصار تو منجنیقها بر پا خواهد کرد و با تبر برج و باروهایت را در هم خواهد کوبید.
10 Bampunda na ye ekozala ebele penza kino putulu na yango ekozipa yo; bamir na yo ekoningana na makelele ya bampunda ya bitumba, ya bapine mpe ya shar, tango akokota na bikuke na yo ndenge bato bakotaka kati na engumba oyo bamir na yango ezali na madusu.
اسبانشان آنقدر زیاد خواهند بود که گرد و خاک آنها شهر را خواهد پوشاند. وقتی دشمن وارد دروازه‌های در هم شکسته‌ات شود، حصارهایت از صدای سواران و ارابه‌ها و کالسکه‌ها خواهند لرزید.
11 Makolo ya bampunda na ye ekokota na babalabala na yo nyonso, akoboma bato na yo na mopanga, mpe makonzi oyo esalaka makasi na yo ekokweya na mabele.
سواران، تمام کوچه‌های شهر را اشغال می‌کنند، مردم تو را می‌کشند و بناهای عظیم و معروفت را واژگون می‌سازند.
12 Bakobotola lokola bomengo ya bitumba bozwi mpe biloko na yo ya koteka, bakokweyisa bamir na yo, bakobuka bandako na yo ya kitoko mpe, na sima, bakobwaka nyonso na ebale: mabanga, mabaya mpe putulu na yo.
تمام ثروت و کالاهای تو را غارت و دیوارهایت را خراب می‌کنند. خانه‌های زیبایت را ویران می‌سازند. سنگها، چوبها و خاک تو را به دریا می‌ریزند.
13 Nakosukisa makelele ya banzembo na yo, mpe mindule ya lindanda na yo ekotikala koyokana lisusu te.
من به تمام آوازهای تو پایان خواهم داد و دیگر صدای چنگ در میان تو شنیده نخواهد شد.
14 Nakokomisa yo mabanga ya pamba, mpe okokoma esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango; okotikala kotongama lisusu te, pamba te ezali Ngai Yawe nde nalobi, elobi Nkolo Yawe.
جزیرهٔ تو را به صخره‌ای صاف تبدیل می‌کنم و آن، مکانی برای ماهیگیران می‌شود که تورهای خود را در آن بگسترانند. بار دیگر هرگز آباد نخواهی شد، زیرا من که خداوند یهوه هستم این را گفته‌ام.»
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na Tiri: Boni, bisanga ekolenga te na lokito ya kokweya na yo, na kolela ya bato na yo, oyo bazokisi bango bapota minene mpe na kufa ya somo kati na yo?
خداوند یهوه به صور چنین می‌گوید: «تمام جزایر از سقوط تو تکان خواهند خورد و مردم آن نقاط از فریاد ساکنان تو که به دست دشمن کشته می‌شوند به وحشت خواهند افتاد.
16 Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo.
آنگاه تمام پادشاهان سرزمینهای ساحلی از تختهای خود پایین می‌آیند و رداها و لباسهای فاخر خود را از تن در می‌آورند. ترس آنها را فرا می‌گیرد و آنها از وحشت به خود می‌لرزند و بر خاک می‌نشینند.
17 Bakoyembela yo nzembo ya mawa mpe bakoloba: ‹ Oh engumba oyo ekenda sango, ndenge nini babebisi yo, engumba ya bato ya ebale monene! Yo mpe bato na yo, bozalaki na nguya kati na ebale monene, bozalaki kolengisa na somo bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna.
آنها برایت ماتم می‌گیرند و این مرثیه را می‌خوانند: ای جزیرهٔ مقتدر که قدرت تو در دریا باعث وحشت مردم ساحل‌نشین شده بود، چگونه تباه شدی!
18 Sik’oyo bisanga ekomi kolenga, na mokolo ya kokweya na yo, bisanga ya ebale monene ekomi na somo makasi mpo na suka na yo. ›
ببین جزیره‌ها بر اثر سقوط تو چطور بر خود می‌لرزند! آنها از نابودی تو حیرانند!»
19 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tango nakokomisa yo engumba oyo ezalaka lisusu na bato te lokola bingumba oyo etikala nanu kozala na bato te, tango nakoyeisa epai na yo mayi ya mozindo mpe bambonge na yango ekozindisa yo,
خداوند یهوه می‌فرماید: «من تو را ای شهر صور، با خاک یکسان می‌کنم. آبها تو را خواهند بلعید و تو در زیر موجهای دریا غرق خواهی شد.
20 nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.
تو را به قعر دنیای مردگان سرنگون می‌کنم تا به آنانی که مدتها پیش بدانجا رفته‌اند، ملحق شوی. تو را مثل اجساد کسانی که سالها پیش به خاک سپرده شده‌اند، به زیر زمین فرو خواهم برد. در این دنیا دیگر هرگز زیبا و آباد نخواهی شد.
21 Nakokomisa yo eloko ya koyoka somo, mpe okokoma eloko pamba; bakobanda koluka yo kasi bakomona yo lisusu te, elobi Nkolo Yawe. »
تو را به سرنوشت وحشتناکی دچار می‌کنم و تو به کلی نابود خواهی شد، به طوری که مردم هر قدر تو را جستجو کنند نتوانند تو را بیابند.» این است آنچه خداوند یهوه می‌فرماید.

< Ezekieli 26 >