< Ezekieli 25 >

1 Yawe alobaki na ngai:
Then the word of the LORD came to me, saying,
2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya bato ya Amoni mpe sakola mpo na kotelemela bango.
“Son of man, set your face against the Ammonites and prophesy against them.
3 Yebisa bato ya Amoni: ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu,
Tell the Ammonites to hear the word of the Lord GOD, for this is what the Lord GOD says: ‘Because you exclaimed, “Aha!” when My sanctuary was profaned, when the land of Israel was laid waste, and when the house of Judah went into exile,
4 nakokaba bino na maboko ya bato ya mikili ya este lokola libula, bakotonga milako na bango mpe bakotelemisa bandako na bango ya kapo kati na mokili na bino; bakolia bambuma na bino mpe bakomela miliki na bino.
therefore I will indeed give you as a possession to the people of the East. They will set up their camps and pitch their tents among you. They will eat your fruit and drink your milk.
5 Nakokomisa engumba ya Raba lopango ya koleisela bashamo, mpe nakokomisa mokili ya bato ya Amoni esika oyo bibwele epemelaka. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
I will make Rabbah a pasture for camels, and Ammon a resting place for sheep. Then you will know that I am the LORD.’
6 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele,
For this is what the Lord GOD says: ‘Because you clapped your hands and stomped your feet and rejoiced over the land of Israel with a heart full of contempt,
7 nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokaba yo na maboko ya bikolo ya bapaya lokola bomengo ya bitumba; nakolongola yo na molongo ya bikolo, nakosilisa bato na yo mpe nakobebisa yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
therefore I will indeed stretch out My hand against you and give you as plunder to the nations. I will cut you off from the peoples and exterminate you from the countries. I will destroy you, and you will know that I am the LORD.’
8 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba: ‘Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso.’
This is what the Lord GOD says: ‘Because Moab and Seir said, “Look, the house of Judah is like all the other nations,”
9 Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko: Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi;
therefore I will indeed expose the flank of Moab beginning with its frontier cities—Beth-jeshimoth, Baal-meon, and Kiriathaim—the glory of the land.
10 nakokaba Moabi mpe bato ya Amoni na maboko ya Este lokola libula, mpo ete bakanisa lisusu bato ya Amoni te kati na molongo ya bikolo;
I will give it along with the Ammonites as a possession to the people of the East, so that the Ammonites will no longer be remembered among the nations.
11 nakopesa Moabi etumbu. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
So I will execute judgments on Moab, and they will know that I am the LORD.’
12 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo;
This is what the Lord GOD says: ‘Because Edom acted vengefully against the house of Judah, and in so doing incurred grievous guilt,
13 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani.
therefore this is what the Lord GOD says: I will stretch out My hand against Edom and cut off from it both man and beast. I will make it a wasteland, and from Teman to Dedan they will fall by the sword.
14 Nakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe na nzela ya bato na Ngai, Isalaele: bakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe, kolanda kanda na Ngai mpe kotomboka na Ngai. Na bongo, bakoyeba solo ete Ngai, nazongisaka mabe na mabe, elobi Nkolo Yawe. ›
I will take My vengeance on Edom by the hand of My people Israel, and they will deal with Edom according to My anger and wrath. Then they will know My vengeance, declares the Lord GOD.’
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Mpo ete bato ya Filisitia bazongisaki mabe na mabe, mpo ete bakokisaki makanisi mabe ya mitema na bango tango balukaki kobebisa mokili ya Yuda, mpo ete bayina bango wuta kala;
This is what the Lord GOD says: ‘Because the Philistines acted in vengeance, taking vengeance with malice of soul to destroy Judah with ancient hostility,
16 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene.
therefore this is what the Lord GOD says: Behold, I will stretch out My hand against the Philistines, and I will cut off the Cherethites and destroy the remnant along the coast.
17 Nakozongisela bango mabe na mabe mpe nakopesa bango etumbu na nzela ya kanda na Ngai. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakozongisela bango mabe na mabe. › »
I will execute great vengeance against them with furious reproof. Then they will know that I am the LORD, when I lay My vengeance upon them.’”

< Ezekieli 25 >