< Ezekieli 24 >
1 Na mokolo ya zomi ya sanza ya zomi, na mobu ya libwa, Yawe alobaki na ngai:
Og Herrens ord kom til mig i det niende år, i den tiende måned, på den tiende dag i måneden, og det lød så:
2 « Mwana na moto, koma mokolo oyo kati na buku, mokolo ya lelo, pamba te ezali na mokolo oyo nde mokonzi ya Babiloni azingelaki engumba Yelusalemi.
Menneskesønn! Skriv op for dig navnet på denne dag, just denne dag! Babels konge har leiret sig mot Jerusalem just på denne dag.
3 Loba na libota oyo ya batomboki lisese oyo; yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Kamata nzungu moko ya kolambela, bongisa yango mpe tia mayi kati na yango.
Og sett frem en lignelse for den gjenstridige ætt og si til dem: Så sier Herren, Israels Gud: Sett gryten på, sett den på og øs så vann i den!
4 Tia biteni ya misuni kati na yango, biteni nyonso ya malamu: lokolo mpe lipeka; tondisa yango na mikuwa ya malamu.
Legg kjøttstykkene sammen i den, alle gode stykker, lår og bog! Fyll den med de beste ben!
5 Kamata bameme oyo ezanga mbeba kati na etonga mpe sangisa bakoni na se ya nzungu yango; pelisa moto mpe tokisa nzungu yango kino mikuwa ekobela penza!
Ta det beste av småfeet og legg så et bål under den for å koke benene! La det koke til gagns! Benene koker allerede i den.
6 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na engumba oyo esopaka makila, nzungu ya salite, nzungu oyo elongwaka salite te! Tika yango pamba, longola eteni moko na moko kino nyonso ekosila na kobeta zeke te.
Derfor sier Herren, Israels Gud, så: Ve blodstaden, den rustne gryte, som rusten ikke er gått av! Ta stykke for stykke ut av den! Det blir ikke kastet lodd derom.
7 Pamba te makila oyo esopaki ezali kati na yango; esopaki yango na likolo ya libanga, esopaki yango na mabele te epai wapi putulu ekokaki kozipa yango.
For det blod den har utøst, er ennu i den; den har helt det ut på nakne berget, den har ikke utøst det på jorden, så mulden kunde dekke over det.
8 Mpo na kopelisa kanda na Ngai mpe kozongisela yango mabe na mabe, natie makila na yango na likolo ya mabanga mpo ete ebombama te.
For å la min harme ha fritt løp, for å ta hevn lot jeg dens blod komme på nakne berget, så det ikke skulde bli tildekket.
9 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na engumba oyo esopaka makila! Ngai mpe nakosangisela yo bakoni ebele.
Derfor sier Herren, Israels Gud, så: Ve blodstaden! Også jeg vil gjøre bålet stort.
10 Sangisa bakoni mpe pelisa moto. Lamba misuni malamu, sangisa yango na biloko mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka mpe sala ete mikuwa ezika.
Legg meget ved på, tend op ilden! La kjøttet bli mørt og suppen koke inn, så benene blir forbrent,
11 Bongo tia nzungu ya pamba na likolo ya makala ya moto kino ekoma moto mpe linzanza na yango ekoma motane, mpo ete mbindo na yango elongwa mpe konzuluka na yango ekende na moto.
og la den bli stående tom på sine glør, forat den kan bli het, og dens kobber bli glødende, og dens urenhet smeltes bort og dens rust fortæres!
12 Kasi konzuluka na yango esilisi makasi ya bato, bosoto na yango etikali kolongwa te! Ezala moto, elongi te kolongola bosoto yango!
Trettende arbeid har den voldt mig, og allikevel er dens tykke rust ikke gått av den. I ilden med dens rust!
13 Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.
Din urenhet er en skam; fordi jeg har renset dig, men du ikke er blitt ren, skal du ikke mere bli fri for din urenhet før jeg får stilt min harme på dig.
14 Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › »
Jeg, Herren, har talt; det kommer, og jeg vil gjøre det; jeg lar det ikke være og sparer ikke og angrer ikke; efter din ferd og dine gjerninger skal du bli dømt, sier Herren, Israels Gud.
Og Herrens ord kom til mig, og det lød så:
16 « Mwana na moto, nakolongola, na nzela ya kufa ya pwasa, mwasi oyo asepelisaka motema na yo. Kasi komitungisa te, kolela te mpe kotangisa mpinzoli te.
Menneskesønn! Se, jeg tar dine øines lyst fra dig ved en brå død; men du skal ikke klage og ikke gråte, og dine tårer skal ikke rinne.
17 Lela na se ya motema, kosala matanga na tina na ye te. Kanga kitendi na moto na yo mpe tia sandale na makolo na yo; kozipa mandefu ya elongi na yo te mpe kolia bilei ya matanga te, ndenge ezali ezaleli ya bokoko na bino. »
Sukk i stillhet og hold ikke sørgefest som efter en død! Bind din hue på dig og ta dine sko på dine føtter og dekk ikke skjegget til og et ikke mat som folk sender dig!
18 Boye, na tongo, nasololaki na bato; bongo na pokwa, mwasi na Ngai akufaki. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, nasalaki kolanda mitindo oyo epesamelaki ngai.
Så talte jeg til folket om morgenen, og min hustru døde om aftenen; og morgenen efter gjorde jeg som det var sagt mig.
19 Boye, bato batunaki ngai: — Okoki koyebisa biso te soki makambo oyo ozali kosala elakisi nini?
Da sa folket til mig: Vil du ikke si oss hvad det betyr at du gjør så?
20 Nazongiselaki bango: — Yawe alobaki na ngai:
Jeg svarte dem: Herrens ord kom til mig, og det lød så:
21 « Yebisa libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.
Si til Israels hus: Så sier Herren, Israels Gud: Se, jeg vanhelliger min helligdom, eders herlige stolthet, eders øines lyst og eders sjels lengsel, og eders sønner og døtre, som I har latt tilbake, skal falle for sverdet.
22 Boye, bokosala ndenge Ngai nasali: bokozipa mandefu na bino te mpe bokolia bilei ya matanga te;
Da skal I gjøre som jeg har gjort: Eders skjegg skal I ikke tildekke, og den mat som folk sender eder, skal I ikke ete;
23 bokokanga bitendi na mito na bino mpe bokolata basandale na makolo na bino, bokosala matanga te mpe bokolela te, kasi bokomona pasi mpo na masumu na bino mpe bokokoma kolelalela kati na bino.
eders huer skal I ha på hodet og eders sko på føttene; I skal ikke klage og ikke gråte; men I skal visne bort i eders misgjerninger og sukke med hverandre.
24 Ezekieli akozala lokola elembo mpo na bino: bokosala ndenge kaka ye asalaki. Tango makambo oyo ekosalema, bokososola ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. ›
Esekiel skal være til et tegn for eder; aldeles som han har gjort, skal I gjøre. Når det kommer, da skal I kjenne at jeg er Herren, Israels Gud.
25 Bongo yo, mwana na moto; na mikolo ekoya, nakobotola bandako na bango oyo batonga makasi mpe batielaka motema, oyo esalaka esengo mpe lokumu na bango, oyo esepelisaka miso na bango mpe esalaka esengo ya mitema na bango; nakobotola lisusu bana na bango ya mibali mpe ya basi.
Og du menneskesønn! På den dag da jeg tar deres vern, deres herlige fryd, deres øines lyst og deres sjels lengsel, deres sønner og døtre, fra dem,
26 Na mokolo wana, moto moko akokima mpe akoya kopesa yo basango.
på den dag skal det komme flyktninger til dig og forkynne det for folk.
27 Na mokolo wana, monoko na yo ekofungwama, okosolola na monoko yango mpe okokanga lisusu yango te. Boye, okozala elembo mpo na bango mpe bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
Den dag skal din munn åpnes, når flyktningene er kommet, og du skal tale og ikke mere være målløs, og du skal være til et tegn for dem, og de skal kjenne at jeg er Herren.