< Ezekieli 23 >

1 Yawe alobaki na ngai:
И бысть слово Господне ко мне глаголя:
2 « Mwana na moto, ezalaki na basi mibale, bana ya mama moko.
сыне человечь, две жене бесте дщери матере единыя
3 Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.
и соблудисте во Египте, в юности своей соблудисте: тамо спадоша сосцы их, и тамо растлисте девство.
4 Oyo ya kulutu, kombo na ye ezalaki Ohola; mpe oyo ya leki, kombo na ye ezalaki Oholiba: bazalaki basi na Ngai mpe babotaki bana mibali mpe bana basi. Ohola azali Samari mpe Oholiba azali Yelusalemi.
Имена же има: Оола старейшая, Оолива же меншая сестра ея: и бысте Мне и родисте сыны и дщери: имена же има: Самариа Оола, и Иерусалим Оолива.
5 Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba
И соблуди Оола от Мене и возложися на похотники своя, на Ассирианы приближающыяся ей,
6 oyo balataka bilamba ya lokumu ya langi ya ble, bayangeli mpe bakonzi ya basoda; bango nyonso bazalaki bilenge mibali ya kitoko oyo bayebaki malamu kotambola na bampunda.
облеченныя в червленицы, старейшины и воеводы: юноши избраннии, вси конницы яздящии на конех:
7 Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo.
и даде блужение свое к ним: избранным сыном Ассирийским всем, и ко всем, на няже возлагашеся, во всех нечистотах их оскверняшеся:
8 Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye.
и блужения своего, еже из Египта, не остави, яко с нею спаху в юности ея, и тии растлиша девство ея и излияша блужение свое на ню.
9 Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela.
Того ради предах ю в руце похотником ея, в руце сыном Ассирийским, на нихже возлагашеся.
10 Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu.
Тии открыша стыд ея, сыны и дщери ея пояша и самую мечем усекнуша: и бысть поношение в женах, и отмщение сотвориша в ней во дщерех ея.
11 Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi.
И виде сестра ея Оолива, и растли возложение свое паче ея, и блуд свой паче блуда сестры своея умножи:
12 Ye mpe akufelaki kolinga mibali ya Asiri: bayangeli, bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo balataka kitoko mpe batambolaka malamu likolo ya bampunda; bango nyonso bazalaki bilenge mibali kitoko.
на сынов Ассирийских возложися, на старейшины и воеводы, иже близ ея, облеченны во благоистканны, на конники яздящыя на конех, юноши избранни вси.
13 Namonaki ete ye mpe amikomisaki mbindo: bango mibale balandaki kaka nzela moko.
И видех, яко осквернися путь един обою.
14 Nzokande, ye kutu akendeki mosika koleka na kindumba na ye; amonaki bililingi ya mibali na mir, bililingi ya bato ya Chalide, oyo basala na langi ya motane;
И приложи ко блужению своему, и виде мужы написаны на стене, образы Халдейски написаны шарами,
15 mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide.
препоясаны пестротами о чреслех своих, и превои крашеннии на главах их, вид троякий всех, подобие сынов Вавилонских, Халдейских, земли отечества их:
16 Tango kaka amonaki bango, akufelaki bango na bolingo mpe atindaki bantoma epai na bango, na mokili ya Chalide.
и возложися на ня зрением очей своих, и посла послы к ним в землю Халдейску.
17 Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango.
И приидоша к ней сынове Вавилонстии на ложе витающих и оскверниша ю в блужении ея, и осквернися в них, и отступи душа ея от них:
18 Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi.
и откры блужение свое и откры срамоту свою. И отступи душа Моя от нея, якоже отступи душа Моя от сестры ея.
19 Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito.
И умножила еси блужение твое, еже помянути дни юности твоея, в няже блудила еси во Египте,
20 Kuna, akufelaki kolinga bamakangu na ye, oyo nzoto na bango ya mibali ezalaka lokola nzoto ya mibali ya ane mpe oyo bazalaka na nguya ya kosangisa nzoto lokola mpunda.
и возлегла еси на Халдеи, ихже плоти быша аки плоти осли, и яко лона конская лона их,
21 Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge.
и посетила еси беззаконие юности твоея, яже творила еси во Египте во виталищи твоем, идеже сосцы юности твоея спадоста.
22 Yango wana, Oholiba, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosala ete bamakangu na yo, ba-oyo yo oboyaki, babalukela yo; mpe nakosala lisusu ete babimela yo na bangambo nyonso:
Того ради, Ооливо, сия глаголет Адонаи Господь: се, Аз воздвигну похотники твоя на тя, от нихже отступи душа твоя, и наведу их на тя окрест,
23 mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.
сынов Вавилонских и всех Халдеев, Факуда и Суда и Куда, и вся сыны Ассирийски с ними, юношы избранны, старейшины и воеводы, вся тристаты и нарочитыя, конники на конех вси.
24 Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango.
И приидут на тя вси от севера, колесницы и колеса со многим народом, щиты и сулицы и шлемы, и поставят стражбу окрест тебе, и дам пред лицем их суд, и отмстят ти в судех своих:
25 Nakotelemela yo na kanda na Ngai mpe bakosala yo mabe, na mitema ya kanda penza. Bakokata yo zolo mpe matoyi; bongo bato na yo, oyo bakotikala bakokufa na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, bongo ba-oyo bakotikala bakokufa na moto.
и дам рвение Мое в тебе, и сотворят с тобою гнев ярости Моея, ноздри твоя и ушы твои обрежут, и оставших твоих мечем изсекут: тии сынов твоих и дщерей твоих возмут, и оставших твоих потребит огнь:
26 Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo.
и совлекут с тебе ризы твоя и возмут сосуды хвалы твоея.
27 Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te.
И отвращу нечестия твоя от тебе и блуд твой от земли Египетския: и не воздвигнеши очес твоих на них и Египта не помянеши ктому.
28 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te.
Понеже сия глаголет Адонаи Господь: се, Аз предаю тя в руце, ихже ненавидиши, от нихже отступи душа твоя:
29 Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo
и сотворят в тебе в ненависти, и возмут вся труды твоя и дела твоя, и будеши нага и посрамлена, и открыется студ блуда твоего и нечестие твое.
30 nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko.
И блужение твое сотвори сия тебе, егда блудила еси вслед языков и осквернялася в кумирех их:
31 Lokola olandaki nzela ya ndeko na yo ya mwasi, nakotia kopo oyo ye amelaki na loboko na yo.
в пути сестры твоея ходила еси, и дам чашу ея в руце твои.
32 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Okomela kopo oyo ndeko na yo ya mwasi amelaki, kopo moko ya monene mpe ya mozindo; ekomemela yo kosambwa mpe soni, pamba te ezali monene penza.
Сия глаголет Адонаи Господь: чашу сестры твоея испиеши глубокую и широкую, и будет на смех и подражнение, изюбилную ко совершению пиянства,
33 Ekolangwisa yo na pasi: kopo ya kobebisama mpe ya somo, kopo ya ndeko na yo ya mwasi, Samari.
и разслабления наполнишися: чаша же потребления и погубления чаша сестры твоея Самарии:
34 Okomela yango kino ekokawuka, okobuka-buka yango na biteni, mpe ekozokisa-zokisa mabele na yo, pamba te Ngai Nkolo Yawe nde nalobi.
и испиеши ю и истощиши, и чреп ея ядущи потребиши, и сосца твоя отторгнеши: и праздники и новомесячия твоя отвращу: понеже Аз глаголах, рече Адонаи Господь.
35 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »
Сего ради сия глаголет Адонаи Господь: понеже забыла Мя еси и отвергла Мене назад тела твоего, и ты возми нечестие твое и блуд твой.
36 Yawe alobaki na ngai: « Mwana na moto, okosambisa penza Ohola mpe Oholiba? Lakisa bango misala na bango ya mbindo;
И рече Господь ко мне: сыне человечь, не будеши ли судити Ооле и Ооливе, и возвестиши ли има беззакония ею?
37 pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko.
Яко любодействовасте, и кровь в руках ею, и в кумирех ею прелюбодействовасте, и чада своя, яже родисте Мне, провождасте им сквозе огнь.
38 Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai: kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
Даже и сия сотвористе Ми, осквернясте святая Моя в той день, и субботы Моя осквернясте:
39 Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai.
и внегда закаласте чада своя кумиром своим, и вхождасте во святая Моя в той день, еже сквернити я: и се, тако творясте среде дому Моего:
40 Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju.
и посыласте ко мужем грядущым издалеча, к нимже послов посыласте. И егда приходити им, абие умывалася еси и утваряла еси очи твои и украшалася утварию,
41 Ovandaki na mbeto moko ya kitoko; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai.
и седела еси на одре постлане, и трапеза украшенна пред лицем ея, и фимиам Мой и елей Мой предлагала пред ними, и веселяхуся в них:
42 Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango.
и гласом сличным возглашаху, и ко мужем от множества человеча приходящым от пустыни, и даяху перстни на руки их и венец хвалы на главы их.
43 Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba: ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba! ›
И рекох: не в сих ли прелюбодействуют? И дела блудницы, и сама соблуди.
44 Mpe basangisaki na ye nzoto: ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba.
И вхождаху к ней: якоже влазят к жене блуднице, тако влазяху ко Ооле и ко Ооливе, женам беззаконницам, еже сотворити беззаконие.
45 Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila.
Мужие же праведнии, тии и отмстят има отмщением любодейниц и отмщением проливающих кровь, яко любодейцы суть, и кровь в руках их.
46 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi!
Сия глаголет Адонаи Господь: приведи на них народы и даждь на них мятеж и разграбление,
47 Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto.
и вержи камение на них, камение народов, и да избодут их мечьми своими: сыны их и дщери их избиют и домы их огнем сожгут:
48 Na nzela wana nde nakosukisa kindumba kati na mokili, mpo ete basi nyonso bazwa mayele mpe balanda ndakisa na bango te.
и отвращу нечестие от земли, и накажутся вся жены и не сотворят по нечестием их:
49 Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. »
и дастся нечестие ваше на вы: и (вся) грехи кумир ваших приимете и уразумеете, яко Аз Адонаи Господь.

< Ezekieli 23 >