< Ezekieli 22 >

1 Yawe alobaki na ngai:
پیغامی دیگر از جانب خداوند بر من نازل شد:
2 « Mwana na moto, okosambisa yango solo? Okosambisa solo engumba oyo esopaka makila? Lakisa yango misala na yango nyonso ya mbindo
«ای پسر انسان، اهالی جنایتکار اورشلیم را محکوم کن! گناهان کثیفشان را آشکارا اعلام نما!
3 mpe loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh engumba oyo emibendelaka bololo na nzela ya kosopa makila na kati-kati na yango mpe emikomisaka mbindo na nzela ya komisalela bikeko,
بگو خداوند یهوه چنین می‌فرماید: «ای شهر جنایتکاران که محکوم و ملعون هستی، ای شهر بتها که نجس و آلوده‌ای،
4 ozali na ngambo mpo na makila oyo osopaki mpe okomi mbindo mpo na bikeko oyo osalaki! Okomisi bomoi na yo mokuse mpe okomi na suka ya mibu ya bomoi na yo! Yango wana, nakokomisa yo eloko ya kotiola liboso ya bikolo mpe eloko ya maseki liboso ya mikili nyonso.
گناه تو آدمکشی و بت‌پرستی است! بنابراین، روز هلاکت تو نزدیک شده و پایان زندگی‌ات فرا رسیده است؛ تو را نزد قومهای جهان مسخره و رسوا خواهم نمود.
5 Yo, engumba ya mbindo, etonda na mobulu, bato oyo bazali pene mpe ba-oyo bazali mosika bakoseka yo!
ای شهر بدنام و سرکش، قومهای دور و نزدیک تو را به باد مسخره خواهند گرفت.
6 Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila.
«تمام بزرگان اسرائیل در اورشلیم از قدرت خود برای آدمکشی استفاده می‌کنند.
7 Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.
در این شهر، پدر و مادر احترامی ندارند؛ غریبان مظلوم می‌شوند و یتیمان و بیوه‌زنان مورد ظلم و ستم قرار می‌گیرند؛
8 Otiolaka biloko na Ngai ya bule mpe obebisaka bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
اماکن مقدّس مرا خوار می‌شمارند و حرمت روزهای شَبّات را نگاه نمی‌دارند؛
9 Na mboka na yo, bakoselaka bato makambo mpo na kobomisa bango. Na mboka na yo, baliaka biloko na bisika ya bule oyo ezalaka na likolo ya bangomba mpe basalaka makambo ya nkele.
مردم را به ناحق زندانی و محکوم به مرگ می‌کنند! «بر هر کوهی، بتخانه‌ای دیده می‌شود؛ شهوت‌پرستی و ناپاکی در همه جا به چشم می‌خورد؛
10 Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo.
عده‌ای با زن پدر خود زنا می‌کنند بعضی دیگر با زن خود در دوره قاعدگی‌اش همبستر می‌شوند!
11 Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye.
زنا با زن همسایه، با عروس و با خواهر ناتنی، امری عادی و رایج گشته است.
12 Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.
این شهر پر است از آدم کشی‌های مزدور، رباخواران و آنانی که به زور مال مردم را غصب می‌کنند و می‌خورند. ایشان مرا کاملاً به فراموشی سپرده‌اند.
13 Solo, nakobeta maboko na Ngai mpo na litomba oyo bozwaki na nzela ya mabe mpe mpo na makila oyo botangisaki kati na bino.
«پس اکنون، من به این سودهای نامشروع و خونریزیها پایان می‌دهم!
14 Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango.
آیا تصور می‌کنید در روز داوری من، تاب و توانی در ایشان باقی بماند؟ من یهوه این سخنان را گفته‌ام و آنها را عملی خواهم ساخت!
15 Nakopanza bino kati na bikolo, nakopalanganisa bino bipai na bipai kati na mokili mpe nakosukisa mbindo na bino.
ایشان را در سراسر جهان پراکنده خواهم کرد و شرارتها و گناهانی را که در میان ایشان است، از بین خواهم برد.
16 Omikomisaki mbindo na miso ya bikolo, kasi okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
آنها در میان قومها بی‌آبرو خواهند شد تا بدانند که من یهوه هستم.»
17 Yawe alobaki na ngai:
سپس خداوند فرمود:
18 « Mwana na moto, libota ya Isalaele ekomi lokola fulu na miso na Ngai; bango nyonso bakomi lokola ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, ebende mpe mbodi oyo babwaka na etumbelo ya bibende. Solo, bakomi kaka lokola bosoto ya palata.
«ای پسر انسان، قوم اسرائیل مانند تفاله بی‌ارزشی هستند که پس از ذوب نقره باقی می‌ماند. آنان مس و روی، آهن و سرب هستند که در کوره از نقره جدا می‌شود. چون تفاله‌های بی‌ارزشی هستند، از این رو من ایشان را به کورهٔ زرگری خود در اورشلیم خواهم آورد تا با آتش خشم خود ذوبشان کنم.
19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola bino nyonso bokomi kaka lokola bosoto, nakosangisa bino na Yelusalemi.
20 Ndenge bato basangisaka palata, ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, mbodi mpe ebende kati na etumbelo ya bibende mpo na kolamba yango, ndenge wana mpe Ngai nakosangisa bino na kanda mpe na kotomboka na Ngai, mpe nakobwaka bino kati na engumba mpo na kozikisa bino.
21 Nakosangisa bino mpe nakofula bino mopepe ya moto ya kanda na Ngai; bongo nakozikisa bino kati na Yelusalemi.
آتش خشم خود را بر آنان خواهم دمید،
22 Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › »
و همچون نقره، در کورهٔ آتش گداخته خواهند شد تا بدانند که من یهوه خشم خود را بر ایشان افروخته‌ام.»
23 Yawe alobaki na ngai lisusu:
بار دیگر خداوند با من سخن گفت و فرمود:
24 « Mwana na moto, loba na Yelusalemi: ‹ Ozali mabele oyo epetolamaki te mpe enokelaki mvula te na mokolo ya kanda na Ngai ya makasi. ›
«ای پسر انسان، به قوم اسرائیل بگو که سرزمینشان ناپاک است و از این رو من خشم خود را بر ایشان فرو خواهم ریخت.
25 Basakoli na yo bazali kosala likita; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali.
بزرگانشان توطئه می‌چینند و همچون شیری که غرش‌کنان شکار را می‌درد، بسیاری را می‌کشند، اموال مردم را غصب می‌کنند و از راه زور و تجاوز، ثروت می‌اندوزند و باعث افزایش شمار بیوه‌زنان می‌گردند.
26 Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.
کاهنانشان احکام و قوانین مرا می‌شکنند، خانه مقدّس مرا نجس می‌سازند؛ فرقی بین مقدّس و نامقدّس قائل نمی‌شوند؛ فرق میان نجس و طاهر را تعلیم نمی‌دهند و حرمت روز شَبّات را نگاه نمی‌دارند. به همین جهت، نام مقدّس من در میان آنها بی‌حرمت شده است.
27 Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.
رهبرانشان مانند گرگ شکار خود را می‌درند و برای نفع خود دست به جنایت می‌زنند،
28 Basakoli na yango bazali kopakola misala na bango ya mabe potopoto ya pembe na nzela ya bimoniseli mpe masakoli ya lokuta; bazali koloba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi, › na tango Yawe alobi na Ye eloko moko te.
انبیایشان از فکر خود رؤیاهایی تعریف می‌کنند و به دروغ می‌گویند که پیامهایشان از جانب خداوند است؛ حال آنکه من حتی کلمه‌ای نیز با ایشان سخن نگفته‌ام. با این کار، گناهان را می‌پوشانند تا زشتی آن دیده نشود، همان‌گونه که دیوار را با گچ می‌پوشانند.
29 Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.
حتی مردم عادی نیز مال یکدیگر را می‌خورند، فقرا و نیازمندان را ظالمانه غارت می‌کنند و اموال اشخاص غریب و بیگانه را با بی‌انصافی از دستشان می‌گیرند.
30 Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.
«اما من کسی را جستجو می‌کردم که بار دیگر دیوار عدالت را در این سرزمین بنا کند؛ کسی را می‌جستم که بتواند در شکاف دیوار شهر بایستد تا به هنگام ریزش غضب من، از شهر دفاع کند. ولی کسی را نیافتم!
31 Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »
بنابراین، خشم خود را بر آنها خواهم ریخت و در آتش غضب خود هلاکشان خواهم ساخت، و آنها را به سزای همه گناهانشان خواهم رساند.» این را خداوند یهوه می‌گوید.

< Ezekieli 22 >