< Ezekieli 21 >

1 Yawe alobaki na ngai:
A message from the Lord came to me, saying,
2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Yelusalemi, loba mpo na kotelemela bisika ya bule mpe sakola mpo na kotelemela Isalaele.
“Son of man, face towards Jerusalem and condemn their places of worship. Prophesy against the people living in Israel
3 Loba na mokili ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Natombokeli yo, nakobimisa mopanga na Ngai na ebombelo na yango mpe nakoboma bato, kati na mokili na yo, ezala bato ya sembo to bato mabe.
and tell them that this is what the Lord says: Watch out, because I'm going to attack you! I'm going to take out my sword and destroy you, both the good and the bad.
4 Mpo ete nakoboma bato ya sembo mpe ya mabe, mopanga na Ngai ekobima na ebombelo na yango mpo na koboma moto nyonso, wuta na sude kino na nor.
Because I'm going to destroy both the good and the bad, I will attack everyone from the north to the south.
5 Boye, bato nyonso bakososola ete Ngai Yawe nde nabimisi mopanga na Ngai wuta na ebombelo na yango, mpe ekozonga lisusu te. ›
Then the whole world will know that I, the Lord, have taken out my sword, and won't put it back again.
6 Yango wana, mwana na moto, lela! Kende kolela liboso na bango, na motema oyo ebukani mpe ya mawa.
You, son of man, you are to groan. Groan as if you're broken up inside, showing terrible sadness while they watch you.
7 Soki batuni yo: ‹ Mpo na nini ozali kolela? › Okozongisela bango: ‹ Ezali mpo na sango oyo ezali koya. › Mitema mpe maboko nyonso ekolemba lokola mayi, bato nyonso bakomitungisa mpe mabolongo nyonso ekolenga. Sango yango ezali koya; solo ekosalema, elobi Nkolo Yawe! »
When they ask, ‘What are you groaning for?’ you are to tell them, ‘Because of the news that's coming. All of you will lose your courage and you'll be paralyzed with fear. All of you will be weak with worry—you won't be able to stand up!’ Watch out, because it's coming! It's going to happen! declares the Lord God.”
8 Yawe alobaki na ngai:
Another message from the Lord came to me, saying,
9 « Mwana na moto, sakola. Loba: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Mopanga, mopanga! Bangalisi mpe bapelisi yango!
“Son of man, prophesy! Tell them this is what the Lord says: There's a sword, a sword that's being sharpened and polished.
10 Bapelisi yango mpo na koboma, bangalisi yango mpo na kobimisa mikalikali! Boni, tosepela kaka na lingenda ya bokonzi ya mwana na ngai ya mobali? Mopanga ya mwana na ngai esambwisaka banzete nyonso.
It's sharpened for killing and polished so it will flash like lightning! (Are we to be happy, saying, ‘The scepter of my son despises every other stick’?)
11 Mopanga epesami mpo ete bangalisa yango, mpo ete basimba yango na loboko; bangalisi yango mpe bapelisi yango mpo ete mobomi asalela yango.
The sword is being polished right now, ready to be used. It's sharp and polished, ready to be handed over to the killer.
12 Mwana na moto, ganga mpe lela makasi! Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai, mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele; babongisami mpo na kokufa na mopanga elongo na bato na ngai. Yango wana, beta tolo na yo!
Weep and wail, son of man, and slap your thigh in grief, for the sword is going to be used to attack my people, to attack all the leaders of Israel! They will be thrown away, killed by the sword along with my people.
13 Komekama ekoya penza; mpe likambo nini ekosalema soki lingenda ya bokonzi, oyo mopanga esili kotiola, etikali lisusu te, elobi Nkolo Yawe? ›
They will be tested. What if the scepter that despises others doesn't continue? declares the Lord God.
14 Boye mwana na moto, sakola mpe beta maboko na yo! Tika ete mopanga eboma mbala mibale to mbala misato! Ezali mopanga oyo ebomaka; ezali solo mopanga oyo ebomaka mingi, mopanga oyo ezingeli bango bisika nyonso.
So son of man, prophesy and clap your hands. The sword will attack twice, and then a third time. It is a sword of death, killing many people by coming at them from every direction.
15 Mpo ete mitema na bango ekoka kolenga mpe bakufi bazala ebele, nasili kotia mopanga oyo ebomaka na bikuke nyonso ya bingumba na bango. Tala, bangalisi yango mpo ete epela lokola mikalikali; basimbi yango mpo na koboma!
I have placed a sword at all the gates of their city so that they may lose their courage, and many may fall. Oh no! It's made to flash like lightning and used to kill.
16 Oh mopanga, beta na ngambo ya loboko ya mobali mpe beta na ngambo ya loboko ya mwasi; beta na esika nyonso oyo minu na yo etali!
Slash right and left, whichever way you're facing.
17 Ngai mpe, nakobeta maboko na Ngai; mpe kanda na Ngai ya makasi ekokita. Ngai Yawe nde nalobi. »
I will also clap my hands, and then my anger will be over. I, the Lord, have spoken.”
18 Yawe alobaki na ngai:
Another message from the Lord came to me, saying,
19 « Mwana na moto, sala banzela mibale oyo mopanga ya mokonzi ya Babiloni ekoki kolekela; banzela nyonso mibale ebimela na mokili moko. Na ekotelo ya nzela moko na moko, tia elembo oyo ekolakisa nzela ya engumba.
“Son of man, mark the two roads that the king of Babylon's army could take, beginning from the same country. Make a signpost where the road forks, leading to two different cities.
20 Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda.
Have one sign point down the road for an attack on the Ammonite city of Rabbah, and another to attack Judah and the fortified city of Jerusalem.
21 Pamba te mokonzi ya Babiloni akotelema na esika oyo banzela mibale ekutana mpo na kosala makambo ya soloka, akobeta zeke na koningisa makonga ya mike, akotuna banzambe na ye ya bikeko mpe akotala mabale ya banyama.
The king of Babylon is standing at the fork in the road where the two roads meet looking for a prophetic sign: he casts lots using arrows, he asks advice from idols, and he examines the liver of sacrificial animals.
22 Zeke oyo ekotalisa Yelusalemi ezali kati na loboko na ye ya mobali: kuna na Yelusalemi, akopesa mitindo ya koboma, akobeta mololo ya bitumba, akotia bashar ya bitumba liboso ya bikuke ya engumba, akotonga bamir ya zelo mpe akotimola mabulu ya kobombamela.
He holds the sign for Jerusalem in his right hand. This is where he is going to set up battering rams, to give the command to attack, to shout the war-cry. There he will order the battering rams to smash the gates, set up an attack ramp, and build a siege wall.
23 Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu.
To those who have sworn to be loyal to Nebuchadnezzar this will look like a false sign, but it will reveal their guilt and they will be taken prisoner.
24 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola mabe na bino ezongeli bino na makanisi, lokola bolakisi Ngai na polele botomboki na bino mpe bomonisi masumu na bino kati na misala na bino nyonso; lokola bosali bongo, bokokende na bowumbu.
So this is what the Lord God says: Because you have revealed your guilt and demonstrated your rebellion, showing your sins in everything you've done, now that you've made all this clear, you will be taken prisoner.
25 Yo mokambi ya Isalaele, moto ya mbindo mpe moto mabe, mikolo ezali koya, tango na yo ya etumbu, mpo na kosukisa mabe na yo!
As for you, you unclean, wicked prince of Israel, the time has come to complete your punishment.
26 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Longola ye eteni ya elamba ya moto, longola ye motole! Makambo ekobongwana, ekozala lisusu te ndenge ezalaki liboso! Bato oyo bakitisama bakotombwama, mpe ba-oyo batombwama bakokitisama.
This is what the Lord God says: Take off your turban, and your crown. Things won't continue as they were. Give power to the common people and bring down the powerful!
27 Libebi! Libebi! Nakokomisa yango libebi. Ekotikala kobonga lisusu te kino tango moto oyo akopesa etumbu, oyo nakopesa ye makoki mpo na yango, akoya. ›
I'm going to destroy everything, make it all a ruin! It won't be restored until its owner arrives, the one I've given the authority to judge.
28 Mpe yo, mwana na moto, sakola mpe loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na bato ya Amoni mpe mafinga na bango: Mopanga, babimisi mopanga mpo na koboma, bapelisi yango mpo na koboma mpe mpo na kongenga lokola mikalikali!
Prophesy, son of man, and announce that this is what the Lord God says about the Ammonites and their insults: A sword! A sword is ready for killing, polished to destroy, to flash like lightning,
29 Atako bapesaki yo bimoniseli mpe masakoli ya lokuta, mopanga ekokata bakingo ya bato ya mbindo oyo mokolo ya suka mpo na mabe na bango esili kokoka.
even as your prophets give you false visions and prophecies that are lies. This sword will cut the necks of the wicked, killing them—those whose day has come for their punishment to be completed.
30 Zongisa mopanga na ebombelo na yango. Nakosambisa yo na esika oyo okelamaki, na mokili ya bakoko na yo.
Sword, go back to where you came from! I'm going to judge you right where you were created, in your homeland.
31 Nakokitisela yo kanda na Ngai ya makasi mpe nakofula yo moto ya kanda na Ngai; bongo nakokaba yo na maboko ya bato ya mobulu oyo babebisaka.
I will deal with you in my anger; I will breathe my fire of anger on you; I will hand you over to cruel men who are experts in destruction.
32 Okozika na moto, makila na yo ekopanzana kaka na mokili na yo mpe bakokanisa yo lisusu te; pamba te Ngai Yawe nde nalobi. › »
You will be burned up like firewood. Your blood will be shed where you live. You will be forgotten, for I, the Lord, have spoken.”

< Ezekieli 21 >