< Ezekieli 20 >

1 Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai.
Godine sedme, petoga mjeseca, desetoga dana, dođoše k meni neke od starješina izraelskih da se s Jahvom svjetuju. Posjedaše preda me.
2 Bongo, Yawe alobaki na ngai:
I dođe mi riječ Jahvina:
3 « Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. ›
“Sine čovječji! Govori starješinama Izraelovim! Reci im: Ovako govori Jahve Gospod: 'Došli ste me pitati za savjet? Života mi moga, nećete me pitati!' - riječ je Jahve Gospoda.
4 Boni, mwana na moto, okosambisa bango? Okosambisa bango solo? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango
Hoćeš li im suditi, hoćeš li suditi, sine čovječji? Pokaži im gadosti otaca njihovih.
5 mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango: ‘Nazali Yawe, Nzambe na bino.’
Reci im: Ovako govori Jahve Gospod: 'Onoga dana kad izabrah Izraela i ruku stavih na potomstvo doma Jakovljeva te im se objavih u zemlji egipatskoj, zakleh im se: Ja sam Jahve, Bog vaš!
6 Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko.
Toga im se dana rukom podignutom zakleh da ću ih izvesti iz zemlje egipatske u zemlju koju za njih izabrah, u zemlju kojom teče med i mlijeko, od svih zemalja najljepšu.
7 Nalobaki na bango: ‘Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito! Nazali Yawe, Nzambe na bino.’
I rekoh im: Odbacite od sebe sve gadosti što vam oči privlače i ne kaljajte se kumirima egipatskim jer - ja sam Jahve, Bog vaš!'
8 Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.
Ali se oni odvrgoše od mene i ne htjedoše me poslušati: nijedan ne odbaci gadosti koje mu oči zaniješe i ne okani se kumira egipatskih. Tad odlučih izliti gnjev svoj na njih i iskaliti srdžbu na njima u zemlji egipatskoj.
9 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.
Ali radi imena svojega - da se ne kalja na oči naroda među kojima obitavahu i pred kojima im bijah objavio da ću ih izvesti -
10 Yango wana nabimisaki bango na Ejipito mpe namemaki bango na esobe.
izvedoh ih iz zemlje egipatske i odvedoh ih u pustinju;
11 Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango.
i dadoh im svoje uredbe i objavih svoje zakone, koje svatko mora vršiti da bi živio;
12 Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.
dadoh im i svoje subote, kao znak između sebe i njih, neka znaju da sam ja Jahve koji ih posvećujem.
13 Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.
Ali se i u pustinji dom Izraelov odmetnu od mene: nisu hodili po mojim uredbama; odbaciše moje zakone, koje svatko mora vršiti da bi živio; subote moje oskvrnjivahu. I zato odlučih u pustinji gnjev svoj na njih izliti da ih zatrem.
14 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
Ali ni toga ne učinih radi svojeg imena, da se ono ne kalja pred narodima kojima ih naočigled izvedoh.
15 Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko;
Ali im se zakleh u pustinji da ih neću uvesti u zemlju koju sam im bio dao, u zemlju kojom teče med i mlijeko, od svih zemalja najljepšu,
16 pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba: mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko.
jer odbaciše moje zakone, i ne hodiše po mojim uredbama, i subote moje oskvrnjivahu, a srce im iđaše za njihovim kumirima.
17 Kasi lokola natalaki bango na liso ya mawa, yango wana nabebisaki bango te mpe nasilisaki koboma bango te kati na esobe.
Oči se moje ipak sažališe da ih ne zatrem. I tako ih u pustinji ne uništih,
18 Nalobaki na bana na bango kati na esobe: ‘Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko!
nego rekoh sinovima njihovim u pustinji: 'Ne hodite po uredbama svojih otaca, ne čuvajte zakona njihovih i ne kaljajte se kumirima njihovim!
19 Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bolanda bikateli na Ngai mpe bobatela na bokebi mibeko na Ngai.
Ja sam Jahve, Bog vaš! Po uredbama mojim hodite, čuvajte i vršite moje zakone
20 Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino.’
i svetkujte moje subote, neka one budu znak između mene i vas, kako bi se znalo da sam ja Jahve, Bog vaš!'
21 Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.
Ali se i sinovi odmetnuše od mene: po mojim uredbama nisu hodili i nisu čuvali ni vršili mojih zakona, koje svatko mora vršiti da bi živio, a subote su moje oskvrnjivali. I zato odlučih gnjev svoj izliti i iskaliti srdžbu svoju na njima u pustinji.
22 Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
Ali opet ruku svoju sustegoh radi svojeg imena, da se ono ne kalja pred narodima kojima ih naočigled izvedoh.
23 Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya;
No zakleh se u pustinji da ću ih raspršiti među narode i rasijati po zemljama,
24 pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango.
jer nisu vršili mojih zakona i jer prezreše moje uredbe i jer subote moje oskvrnjivahu i oči upirahu u kumire svojih otaca.
25 Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te,
I zato im dadoh uredbe koje ne bijahu dobre, zakone koji usmrćuju:
26 natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
da se oskvrnjuju svojim prinosima, provodeći kroz oganj svoju prvorođenčad. Htjedoh tako da ih zastrašim, neka znaju da sam ja Jahve.
27 Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai.
Sine čovječji, reci domu Izraelovu: 'Ovako govori Jahve Gospod! I ovim me oci vaši još uvrijediše: nevjerom mi se iznevjeriše!
28 Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.
Kad ih uvedoh u zemlju koju im se zakleh dati, gdje god bi ugledali povišen brežuljak ili stablo krošnjato, prinosili bi žrtve, donosili izazovne prinose, metali mirise ugodne, nalijevali ljevanice.
29 Boye, natunaki bango: Esambelo ya likolo ya ngomba epai wapi bozali kokende elakisi nini? › Mpe babengaki yango, kino na mokolo ya lelo: ‹ Esambelo ya likolo ya ngomba. ›
Upitah ih: što li znači ta uzvišica na koju se penjete?' I tako osta ime 'bama', uzvišica, do dana današnjega.
30 Yango wana, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko?
Zato reci domu Izraelovu: 'Ovako govori Jahve Gospod: Ne kaljate li se i vi kao oci vaši, ne provodite li i vi blud s gadostima njihovim?
31 Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai.
Kaljate se prinoseći im darove, provodeći kroz oganj svoje sinove u čast svim kumirima svojim sve do dana današnjega. I da me onda za savjet pitaš, dome Izraelov! Života mi moga - riječ je Jahve Gospoda - nećete me za savjet pitati!
32 Bozali koloba: ‘Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga.’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te.
I neće se zbiti o čemu sanjate kad govorite: 'Bit ćemo kao drugi narodi, kao narodi ostalih zemalja što služe drveću i kamenju.'
33 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi;
Života mi moga - riječ je Jahve Gospoda - vladat ću vama rukom krepkom i mišicom uzdignutom, u svoj žestini svoje jarosti.
34 nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi.
Izvest ću vas iz naroda, skupiti vas iz svih zemalja u koje bijaste raspršeni rukom krepkom i mišicom uzdignutom, u svem plamu jarosti moje!
35 Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu.
Odvest ću vas u pustinju naroda i ondje vam licem u lice suditi!
36 Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe.
Kao što sudih ocima vašim u pustinji zemlje egipatske, i vama ću suditi - riječ je Jahve Gospoda!
37 Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani.
Provest ću vas ispod štapa svojega, podvrći vas brojenju:
38 Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
razlučit ću između vas sve koji se pobuniše i odvrgoše od mene: izvest ću ih iz zemlje u kojoj kao došljaci borave, ali - u zemlju Izraelovu nikad ući neće! I znat ćete da sam ja Jahve!'
39 Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.
'A vi, dome Izraelov' - ovako govori Jahve Gospod - 'samo idite i dalje služite svaki svom kumiru! Jednom ćete, kunem vas se, poslušati i nećete više kaljati moje sveto ime svojim prinosima i kumirima:
40 Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule.
na Svetoj gori mojoj, na visokoj gori Izraelovoj - riječ je Jahve Gospoda - služit će mi sav dom Izraelov, u svojoj zemlji. Ondje će mi oni omiljeti i ondje ću iskati vaše podizanice i prinose vaših prvina sa svim svetinjama.
41 Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo.
Omiljet ćete mi kao miris ugodan kad vas izvedem iz narodÄa i skupim iz zemalja u kojima bjeste rasijani. I na vama ću očitovati svetost svoju naočigled svih naroda.
42 Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakokotisa bino na mokili ya Isalaele, mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa epai ya batata na bino.
Tada ćete znati da sam ja Jahve, kada vas dovedem u zemlju Izraelovu, u zemlju koju se zakleh dati očevima vašim.
43 Mpe kuna, bokokanisa lisusu bizaleli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango, bomikosaki mbindo mpe bokokoma komiyokela nkele likolo ya mabe nyonso oyo bosalaki.
Ondje ćete se spomenuti svih svojih putova i nedjela kojima se okaljaste: sami ćete sebi omrznuti zbog nedjela što ih počiniste.
44 Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »
I tada ćete spoznati da sam ja Jahve kad, radi imena svojega, ne postupim s vama po zloći vaših putova ni po vašim pokvarenim djelima, dome Izraelov! Tako govori Jahve Gospod!'”
45 Yawe alobaki na ngai:
I dođe mi riječ Jahvina:
46 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya sude, loba mpo na kotelemela etuka ya sude mpe sakola mpo na kotelemela zamba ya mokili ya sude.
“Sine čovječji, okreni lice k jugu i prospi besjedu prema jugu te prorokuj protiv šume u kraju negepskom.
47 Loba na zamba ya mokili ya sude: ‹ Yoka Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakopelisa moto kati na yo, mpe ekotumba banzete na yo nyonso, ezala banzete ya mobesu to ya kokawuka. Moto yango ya makasi ekotikala kokufa te mpe ekotumba bilongi nyonso, wuta na nor kino na sude.
Reci šumi negepskoj: 'Poslušaj riječ Jahvinu! Ovako govori Jahve Gospod: Evo, zapalit ću usred tebe oganj i on će proždrijeti u tebi svako drvo, zeleno i suho! Razgorjeli se oganj neće utrnuti dok sve ne izgori od sjevera do juga.
48 Bato nyonso bakomona ete ezali Ngai Yawe nde napelisi yango; mpe ekotikala kokufa te. › »
I svi će vidjeti da sam ja, Jahve, zapalio taj oganj i neće se ugasiti.'”
49 Bongo nalobaki: « Ah! Nkolo Yawe, bazali kotonga ngai: ‹ Ezali ye te oyo alobaka na masese? › »
Rekoh na to: “Jao, Jahve Gospode, tÓa oni će za mene reći: 'Evo opet pričalice s pričama!'”

< Ezekieli 20 >