< Ezekieli 2 >
1 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, telema na makolo na yo; pamba te nazali na likambo ya koyebisa yo. »
Egblɔ nam be, “Ame vi, tso, nànɔ tsitre, eye maƒo nu na wò.”
2 Wana azalaki nanu koloba, Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai; bongo nakomaki koyoka Ye koloba na ngai.
Esi wòƒo nu la, Gbɔgbɔ la ge ɖe menye, fɔm ɖe tsitre, eye mesee wònɔ nu ƒom nam.
3 Alobaki na ngai: « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai.
Egblɔ be, “Ame vi, mele ɖowòm ɖe Israelviwo gbɔ, ɖe dukɔ dzeaglã aɖe si dze aglã ɖe ŋunye la gbɔ. Woawo kple wo fofowo dze aglã ɖe ŋunye va se ɖe egbeŋkeke sia dzi.
4 Bato oyo epai wapi nazali kotinda yo, bazali mito makasi mpe mitema mabanga. Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. ›
Ame siwo gbɔ mele ɖowòm ɖo la nye kɔlialiatɔwo kple tosesẽtɔwo. Gblɔ na wo be, ‘Nya si Aƒetɔ Yehowa gblɔ la nye esi.
5 Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango.
Ne woɖo to wò alo womeɖo to wò o hã la, ame dzeaglãwo wonye, ke woanya be nyagblɔɖila nɔ yewo dome.
6 Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.
Eye wò la, ame vi, mègavɔ̃ woawo ŋutɔ loo alo woƒe nyawo o, togbɔ be dza kple aŋɔkawo ƒo xlã wò kpe ɖo, eye nèle ahɔ̃wo dome hã. Mègavɔ̃ nya si woagblɔ, eye mègana woado ŋɔdzi na wò o, togbɔ be wonye aglãdzelawo hã.
7 Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki.
Ele be nàgblɔ nye nyawo na wo ne woɖo to loo alo gbe toɖoɖo, elabena aglãdzelawo wonye.
8 Kasi yo, mwana na moto, yoka makambo oyo nazali koloba na yo. Kotombokela ngai te lokola libota ya batomboki oyo! Fungola monoko na yo mpe lia oyo nazali kopesa yo! »
Ke wò la, ame vi, lé to ɖe nya si gblɔm mele na wò la ŋu. Mègadze aglã abe ame dzeaglã mawo ene o; ke nu me, eye nàɖu nu si matsɔ na wò.’”
9 Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama.
Mekpɔ nu, eye mekpɔ wodo asi aɖe ɖe gbɔnye. Agbalẽ aɖe le asi la me.
10 Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki: basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.
Wokekee ɖe nye ŋkume. Woŋlɔ konyifanyawo, vevesenyawo kple nublanuinyawo ɖe agbalẽ la ƒe akpa eveawo.