< Ezekieli 18 >
Et la parole du Seigneur me fut adressée, disant:
2 « Bino bato, mpo na nini kati na mokili ya Isalaele bolobaka lisese oyo: ‹ Batata basili kolia bambuma ya vino ya mibesu, kasi minu ya bana nde ekomi ngayi; elakisi nini? ›
D’où vient que parmi vous vous tournez la parole en ce proverbe dans la terre d’Israël, disant: Des pères ont mangé du raisin vert, et les dents des enfants en sont agacées?
3 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, bokotikala lisusu koloba lisese oyo kati na Isalaele te.
Je vis, moi, dit le Seigneur Dieu, si cette parabole vous sera désormais tournée en proverbe dans Israël.
4 Pamba te bato nyonso ya bomoi bazali ya Ngai, ezala tata to mwana, bango mibale bazali ya Ngai; moto oyo akosala masumu, ye moko nde akokufa.
Voilà que toutes les âmes sont à moi; comme l’âme du père, ainsi aussi l’âme du fils est à moi; l’âme qui aura péché, mourra elle-même.
5 Tozwa ndakisa ya moto moko oyo asalaka makambo ya sembo mpe ya alima,
Et si un homme est juste, et qu’il pratique l’équité et la justice;
6 aliaka te bilei na bisika ya bule ya likolo ya bangomba, atalelaka banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele te, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza na ye,
Qu’il ne mange point sur les montagnes, et qu’il ne lève point ses yeux vers les idoles de la maison d’Israël; et qu’il ne viole point la femme de son prochain, et qu’il ne s’approche point d’une femme qui est dans ses mois;
7 anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu;
Et qu’il ne contriste personne; qu’il rende le gage à son débiteur; que par violence il ne ravisse rien; qu’il donne de son pain à celui qui a faim, et qu’il couvre d’un vêtement celui qui est nu;
8 adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo;
Qu’il ne prête point à usure et ne reçoive pas plus qu’il n’a prêté; que de l’iniquité il détourne sa main, et qu’il rende un jugement équitable entre un homme et un homme;
9 atosaka bikateli na Ngai mpe abatelaka mibeko na Ngai na bosembo: moto ya lolenge wana nde azali sembo; akozala solo na bomoi, elobi Nkolo Yawe.
Qu’il marche dans mes préceptes, et garde mes ordonnances, afin d’accomplir la vérité; celui-là est juste, il vivra de la vie, dit le Seigneur Dieu.
10 Kasi soki, ndakisa, moto yango azali na mwana moko ya mobulu, oyo asopaka makila ya bato to asalaka makambo ya ndenge wana,
Mais s’il engendre un fils voleur, répandant le sang, et qui commette l’une de ces choses,
11 atako tata na ye asalaki yango te, mwana oyo aliaka na bisika ya bule na likolo ya bangomba, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye,
Quand il ne les commettrait pas toutes, mais qui mange sur les montagnes, et qui souille la femme de son prochain,
12 anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo,
Et qui contriste l’indigent et le pauvre, qui commette des rapines, qui ne rende point le gage a son débiteur, qui lève ses yeux vers les idoles, qui fasse des abominations,
13 adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi? Te, akozala na bomoi te! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko!
Qui prête à usure et qui reçoive plus qu’il n’a prêté; est-ce qu’il vivra? non, il ne vivra point; lorsqu’il aura fait toutes ces choses détestables, il mourra de mort, son sang sera sur lui-même.
14 Kasi soki, ndakisa, mwana yango azali na mwana oyo, atako amonaka masumu nyonso oyo tata na ye asalaka, kasi asalaka ndenge moko te na tata na ye:
Que s’il engendre un fils qui, voyant tous les péchés que son père a faits, craigne et ne fasse rien de semblable à ces péchés:
15 aliaka te bilei na bisika ya bule na likolo ya bangomba mpe atalelaka te banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye,
Qu’il ne mange point sur les montagnes, et qu’il ne lève point les yeux vers les idoles de la maison d’Israël; qu’il ne viole point la femme de son prochain,
16 anyokolaka moto te, akangaka eloko ya moto te soki adefisi ye niongo, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala, alatisaka moto oyo azali bolumbu,
Et qu’il ne contriste personne; qu’il ne retienne pas le gage à son débiteur, et qu’il ne commette point de rapines; qu’il donne de son pain à celui qui a faim, et qu’il couvre d’un vêtement celui qui est nu;
17 abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye: akozala solo na bomoi.
Qu’il détourne sa main de toute injustice contre le pauvre; qu’il ne donne point à usure, et ne reçoive rien au-delà de ce qu’il a prêté; qu’il accomplisse mes ordonnances, qu’il marche dans mes préceptes; celui-là ne mourra point dans l’iniquité de son père, mais il vivra de la vie.
18 Ezali tata na ye nde akokufa mpo na masumu na ye moko, pamba te abotolaki bato biloko na makasi, ayibaki ndeko na ye mpe asalaki mabe kati na bato na ye.
Son père, qui a calomnié et a fait violence à son frère, et a commis le mal au milieu de son peuple, voilà qu’il est mort dans sa propre iniquité.
19 Bozali koloba: ‹ Mpo na nini mwana amema te ngambo ya bambeba ya tata na ye? › Ezali mpo ete mwana asalaki makambo ya sembo mpe ya alima, abatelaki mpe asalelaki na bokebi bikateli na Ngai nyonso, akozala solo na bomoi.
Et vous dites: Pourquoi le fils n’a-t-il point porté l’iniquité de son père? Il est clair que c’est parce que le fils a agi selon l’équité et selon la justice, qu’il a gardé tous mes préceptes, et qu’il les a pratiqués, qu’il vivra de la vie.
20 Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye.
L’âme qui a péché mourra elle-même; un fils ne portera pas l’iniquité de son père, et un père ne portera pas l’iniquité de son fils: la justice du juste sera sur lui et l’impiété de l’impie sera sur lui.
21 Kasi soki moto mabe atiki masumu na ye nyonso, soki akomi kotosa bikateli na Ngai nyonso mpe kotambola kolanda bosembo mpe makambo ya alima, akozala solo na bomoi, akokufa te.
Mais si l’impie fait pénitence de tous ses péchés qu’il a commis, et qu’il garde tous mes préceptes, et qu’il accomplisse le jugement et la justice, il vivra de la vie et ne mourra point.
22 Mabe moko te oyo asalaki ekotangama lisusu na moto na ye; akozala solo na bomoi mpo na makambo ya sembo oyo azali kosala.
Je ne me souviendrai d’aucune de ses anciennes iniquités; à cause de la justice qu’il a pratiquée, il vivra.
23 Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi?
Est-ce que je veux la mort de l’impie, dit le Seigneur Dieu, et non qu’il se détourne de ses voies et qu’il vive?
24 Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.
Mais si le juste se détourne de sa justice, et qu’il fasse l’iniquité selon toutes les abominations que l’impie a coutume de commettre, est-ce qu’il vivra? toutes les œuvres de justice qu’il avait faites seront oubliées, et dans la prévarication par laquelle il a prévariqué, et dans le péché par lequel il a péché, il mourra.
25 Bozali koloba: ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo!
Et vous avez dit: Elle n’est pas juste, la voie du Seigneur. Ecoutez donc, maison d’Israël: Est-ce ma voie qui n’est pas juste, et ne sont-ce pas plutôt les vôtres qui sont corrompues?
26 Soki moto ya sembo atiki bosembo na ye, asali masumu mpe akufi mpo na yango, akufi nde mpo na masumu oyo asali.
Car lorsqu’un juste se sera détourné de sa justice, et qu’il aura commis l’iniquité, il y mourra; dans l’injustice qu’il a commise, il mourra.
27 Kasi soki moto mabe atiki mabe na ye oyo azalaki kosala mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, abikisi solo bomoi na ye.
Et lorsqu’un impie se sera détourné de son impiété qu’il a commise, et qu’il agira selon l’équité et selon la justice, il vivifiera lui-même son âme.
28 Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.
Car réfléchissant, et se détournant de toutes ses iniquités, il vivra de la vie, et il ne mourra point.
29 Libota ya Isalaele ezali koloba: ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, nzela na Ngai ezali sembo te? Boni, ezali te penza banzela na bino nde ezangi bosembo?
Et les enfants d’Israël disent: Elle n’est pas juste, la voie du Seigneur. Sont-ce mes voies qui ne sont pas justes, maison d’Israël, et ne sont-ce pas plutôt les vôtres qui sont corrompues?
30 Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te!
C’est pour cela que je jugerai chacun selon ses voies, maison d’Israël, dit le Seigneur Dieu. Convertissez-vous, et faites pénitence de toutes vos iniquités, et l’iniquité ne vous sera pas à ruine.
31 Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele?
Rejetez loin de vous toutes les prévarications par lesquelles vous avez prévariqué, et faites-vous un cœur nouveau et un esprit nouveau; et pourquoi mourrez-vous, maison d’Israël?
32 Solo, Ngai nasepelaka na kufa ya moto moko te, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana mpe bozala na bomoi! »
Car je ne veux point la mort de celui qui meurt, dit le Seigneur Dieu; revenez, et vivez.