< Ezekieli 14 >

1 Kati na bakambi ya Isalaele, ndambo bayaki epai na ngai mpe bavandaki liboso na ngai.
Then came certain of the elders of Israel to me, and sat before me.
2 Bongo Yawe alobaki na ngai:
The word of the LORD came to me, saying,
3 « Mwana na moto, bato oyo bazali kotia mitema epai ya banzambe ya bikeko. Bongo lokola bazali kotia banzambe ya bikeko liboso na bango, ekobetisa bango mabaku oyo ekokweyisa bango na masumu. Boni, natikela bango lisusu nzela ya kotuna Ngai toli?
"Son of man, these men have taken their idols into their heart, and put the stumbling block of their iniquity before their face: should I be inquired of at all by them?
4 Mpo na yango, loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Soki moto ya Isalaele atie motema epai ya banzambe ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo atie yango liboso na ye mpe akei epai ya mosakoli, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye kolanda motango ya banzambe na ye ya bikeko.
Therefore speak to them, and tell them, 'Thus says the LORD: "Every man of the house of Israel who takes his idols into his heart, and puts the stumbling block of his iniquity before his face, and comes to the prophet; I the LORD will answer him in it according to the multitude of his idols;
5 Nakosala bongo mpo na kozongisa lisusu epai na Ngai, mitema ya bana ya Isalaele oyo batikaki Ngai mpo na kolanda banzambe ya bikeko. ›
that I may take the house of Israel in their own heart, because they are all estranged from me through their idols."'
6 Yango wana, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Bobongola mitema! Bopesa banzambe na bino ya bikeko mikongo mpe botika misala na bino ya mbindo!
"Therefore tell the house of Israel, 'Thus says the LORD: "Return, and turn yourselves from your idols; and turn away your faces from all your abominations.
7 Soki moto moko ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na Isalaele akabwani na Ngai, atie motema na ye na banzambe ya bikeko mpe atie liboso na ye banzambe yango ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo akei epai ya mosakoli mpo na kotuna Ngai toli na nzela na ye, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye.
For everyone of the house of Israel, or of the strangers who live in Israel, who separates himself from me, and takes his idols into his heart, and puts the stumbling block of his iniquity before his face, and comes to the prophet to inquire for himself of me; I the LORD will answer him by myself:
8 Nakotombokela moto wana, nakokomisa ye elembo mpe lisese epai na bato mpe nakolongola ye na molongo ya bato na Ngai. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
and I will set my face against that man, and will make him an astonishment, for a sign and a proverb, and I will cut him off from the midst of my people; and you shall know that I am the LORD.
9 Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele.
"'"If the prophet is deceived and speaks a word, I, the LORD, have deceived that prophet, and I will stretch out my hand on him, and will destroy him from the midst of my people Israel.
10 Bango mibale, mosakoli yango mpe moto oyo akei kotuna ye toli, bakomema mikumba ya masumu na bango.
They shall bear their iniquity: the iniquity of the prophet shall be even as the iniquity of him who seeks him;
11 Na bongo, bato ya Isalaele bakokabwana na Ngai lisusu te mpe bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya masumu na bango; kasi bakozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bango, elobi Nkolo Yawe. › »
that the house of Israel may go no more astray from me, neither defile themselves any more with all their transgressions; but that they may be my people, and I may be their God," says the LORD.'"
12 Yawe alobaki na ngai:
The word of the LORD came to me, saying,
13 « Mwana na moto, soki bato ya ekolo moko basali masumu liboso na Ngai mpe batamboli na boyengebene te, bongo Ngai nasemboli loboko na Ngai mpo na kopimela bango bilei mpe kotindela bango nzala makasi mpo ete ezala bato to banyama bakufa,
"Son of man, when a land sins against me by committing a trespass, and I stretch out my hand on it, and break the staff of its bread, and send famine on it, and cut off from it man and animal;
14 ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe.
though these three men, Noah, Daniel, and Job, were in it, they should deliver but their own souls by their righteousness, says the LORD."
15 To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango;
"If I cause evil animals to pass through the land, and they ravage it, and it be made desolate, so that no man may pass through because of the animals;
16 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi; bango misato kaka nde balingaki kobika, kasi ekolo elingaki kotikala lisusu na bato te.
though these three men were in it, as I live," says the LORD, "they should deliver neither sons nor daughters; they only should be delivered, but the land should be desolate.
17 To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi: ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango;
"Or if I bring a sword on that land, and say, 'Sword, go through the land'; so that I cut off from it man and animal;
18 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi; bango misato kaka nde balingaki kobika.
though these three men were in it, as I live, says the LORD, they should deliver neither sons nor daughters, but they only should be delivered themselves.
19 To soki natindi kati na mokili yango bokono oyo ebomaka mpe nasopeli yango kanda na Ngai mpo na kosopa makila, koboma bato mpe bibwele ya mokili yango;
"Or if I send a pestilence into that land, and pour out my wrath on it in blood, to cut off from it man and animal;
20 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango.
though Noah, Daniel, and Job, were in it, as I live, says the LORD, they could not save either son nor daughter; they would save only their own souls by their righteousness.
21 Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo: mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,
"For thus says the LORD: 'How much more when I send my four severe judgments on Jerusalem, the sword, and the famine, and the evil animals, and the pestilence, to cut off from it man and animal.
22 ekozala na ndambo ya bato oyo bakobika: bana mibali mpe ya basi. Bakoya epai na bino; mpe tango bokomona bizaleli mpe misala na bango, bokobondisama mpo na pasi oyo natindelaki Yelusalemi, mpo na bitumbu nyonso oyo natindelaki yango.
Yet, look, there shall be left a remnant that shall be carried forth, both sons and daughters: look, they shall come forth to you, and you shall see their way and their doings; and you shall be comforted concerning the evil that I have brought on Jerusalem, even concerning all that I have brought on it.
23 Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. »
They shall comfort you, when you see their way and their doings; and you shall know that I have not done without cause all that I have done in it,' says the LORD."

< Ezekieli 14 >