< Ezekieli 13 >

1 Yawe alobaki na ngai:
And the word of the Lord came to me, saying:
2 « Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko: ‹ Boyoka Liloba na Yawe!
Son of man, prophesy thou against the prophets of Israel that prophesy: and thou shalt say to them that prophesy out of their own heart: Hear ye the word of the Lord:
3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko! Nzokande bamonaki eloko moko te.
Thus saith the Lord God: Woe to the foolish prophets that follow their own spirit, and see nothing.
4 Oh Isalaele, basakoli na yo bazali lokola bambwa ya zamba kati na bisika oyo etonda na biloko ebeba.
Thy prophets, O Israel, were like foxes in the deserts.
5 Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe.
You have not gone up to face the enemy, nor have you set up a wall for the house of Israel, to stand in battle in the day of the Lord.
6 Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka: ‘Tala makambo oyo Yawe alobi,’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama!
They see vain things, and they foretell lies, saying: The Lord saith: whereas the Lord hath not sent them: and they have persisted to confirm what they have said.
7 Boni, bimoniseli na bino ezalaka ya pamba te, mpe masakoli na bino ezalaka ya lokuta te, atako bolobaka: ‘Tala makambo oyo Yawe alobi,’ nzokande Ngai nalobi na bino ata liloba moko te?
Have you not seen a vain vision and spoken a lying divination: and you say: The Lord saith: whereas I have not spoken.
8 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mpo ete bolobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta, Ngai moko natelemeli bino, elobi Nkolo Yawe.
Therefore thus saith the Lord God: Because you have spoken vain things, and have seen lies: therefore behold I come against you, saith the Lord God.
9 Loboko na Ngai ekobeta basakoli oyo balobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta: bakozala na esika te kati na lisanga ya bato na Ngai, bakombo na bango ekokomama te kati na buku ya libota ya Isalaele, bakokoma te kino na mokili ya Isalaele. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.
And my hand shall be upon the prophets that see vain things, and that divine lies: they shall not be in the council of my people, nor shall they be written in the writing of the house of Israel, neither shall they enter into the land of Israel, and you shall know that I am the Lord God.
10 Boye, lokola bapengwisaka bato na Ngai tango balobaka: ‘Kimia,’ na tango kimia ezali te; lokola bapakolaka potopoto ya pembe na mir oyo bato na Ngai basili kotonga,
Because they have deceived my people, saying: Peace, and there is no peace: and the people built up a wall, and they daubed it with dirt without straw.
11 yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka.
Say to them that daub without tempering, that it shall fall: for there shall be an overflowing shower, and I will cause great hailstones to fall violently from above, and a stormy wind to throw it down.
12 Tango mir yango ekokweya, bato bakotuna bino: ‘Mosala nini penza potopoto ya pembe esali?’
Behold, when the wall is fallen: shall it not be said to you: Where is the daubing wherewith you have daubed it?
13 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.
Therefore thus saith the Lord God: Lo, I will cause a stormy wind to break forth in my indignation, and there shall be an overflowing shower in my anger: and great hailstones in my wrath to consume.
14 Nakokweyisa mir oyo bopakolaki potopoto ya pembe mpe nakolalisa yango kino na se, mpo ete miboko na yango emonana. Tango mir yango ekokweya, ekoboma bino; mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
And I will break down the wall that you have daubed with untempered mortar: and I will make it even with the ground, and the foundation thereof shall be laid bare: and it shall fall, and shall be consumed in the midst thereof: and you shall know that I am the Lord.
15 Nakokweyisela mir mpe bato oyo bapakolaki yango potopoto ya pembe kanda na Ngai; nakoloba na bino: ‘Mir ezali lisusu te! Bato oyo bazalaki kopakola yango potopoto ya pembe bazali lisusu te;
And I will accomplish my wrath upon the wall, and upon them that daub it without tempering the mortar, and I will say to you: The wall is no more, and they that daub it are no more.
16 basakoli ya Isalaele oyo bazalaki kosakola na tina na Yelusalemi mpe komona bimoniseli ya kimia mpo na yango, nzokande kimia ezali na yango te, bazali lisusu te, elobi Nkolo Yawe.’ ›
Even the prophets of Israel that prophesy to Jerusalem, and that see visions of peace for her: and there is no peace, saith the Lord God.
17 Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko! Sakola mabe na tina na bango
And thou, son of man, set thy face against the daughters of thy people that prophesy out of their own heart: and do thou prophesy against them,
18 mpe loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na basi oyo balataka basinga ya maji na maboko na bango mpe batongaka bitambala mpo na mito ya bato ya ndenge na ndenge mpo na kotiela bomoi na bango mitambo! Bokanisi ete bokotiela bomoi ya bato na Ngai mitambo mpo ete botikala bino moko kaka na bomoi?
And say: Thus saith the Lord God: Woe to them that sew cushions under every elbow: and make pillows for the heads of persons of every age to catch souls: and when they caught the souls of my people, they gave life to their souls.
19 Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.
And they violated me among my people, for a handful of barley, and a piece of bread, to kill souls which should not die, and to save souls alive which should not live, telling lies to my people that believe lies.
20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natelemeli basinga na bino ya maji, oyo bozali kosalela mpo na kotiela bato na Ngai mitambo lokola bandeke, nakokata-kata yango mpe nakolongola yango na maboko na bino; mpe nakokangola bomoi ya bato oyo bokangaki na mitambo lokola bandeke.
Therefore thus saith the Lord God: Behold I declare against your cushions, wherewith you catch flying souls: and I will tear them off from your arms: and I will let go the souls that you catch, the souls that should fly.
21 Nakopasola bitambala na bino mpe nakokangola bato na Ngai na maboko na bino; bakokweya lisusu te na se ya bokonzi na bino! Mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
And I will tear your pillows, and will deliver my people out of your hand, neither shall they be any more in your hands to be a prey: and you shall know that I am the Lord.
22 Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te,
Because with lies you have made the heart of the just to mourn, whom I have not made sorrowful: and have strengthened the hands of the wicked, that he should not return from his evil way, and live.
23 bokomona lisusu te bimoniseli na bino wana ya pamba mpe bokoloba lisusu masakoli te; nakobikisa bato na Ngai na maboko na bino, mpe, na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
Therefore you shall not see vain things, nor divine divinations any more, and I will deliver my people out of your hand: and you shall know that I am the Lord.

< Ezekieli 13 >