< Ezekieli 12 >

1 Yawe alobaki na ngai:
Me fue dirigida la palabra de Yahvé en estos términos:
2 « Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.
“Hijo de hombre, tú habitas en medio de una casa de rebeldes, que tienen ojos para ver, y no ven; oídos para oír y no oyen; porque son una casa rebelde.
3 Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki.
Tú, pues, hijo de hombre, prepárate bagaje de cautiverio, y sal al cautiverio, en pleno día, viéndolo ellos. Trasládate de tu lugar a otro lugar ante sus ojos; tal vez comprendan, pues son casa rebelde.
4 Bimisa bisaka na yo na libanda, na moyi makasi na miso na bango; mpe na pokwa, kende ndenge bato bakendaka na bowumbu na miso na bango.
Sacarás tu bagaje, como bagaje de cautiverio, en pleno día, delante de sus ojos, y saldrás por la tarde a vista de ellos como uno que va al cautiverio,
5 Tobola mir na miso na bango mpe bimisa bisaka na yo na lidusu oyo okosala.
haciendo, en presencia de ellos, una abertura en la pared por la cual sacarás (el bagaje).
6 Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. »
Ante su vista te lo echarás al hombro, y lo llevarás de noche, cubierta tu cara para no ver la tierra; pues te he puesto como señal para la casa de Israel.”
7 Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai: na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango.
Yo hice así, como se me había mandado. Saqué en pleno día mi bagaje, como bagaje de cautiverio; por la tarde hice con la mano un agujero en la pared, y de noche saqué (el bagaje) y alzándolo a la vista de ellos lo eché al hombro:
8 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Yawe alobaki na ngai:
Y recibí por la mañana esta palabra de Yahvé:
9 « Mwana na moto, libota ya batomboki ya Isalaele oyo, batunaki yo te: ‹ Ozali kosala nini? ›
“Hijo de hombre, ¿no te han preguntado los de la casa de Israel, esta casa rebelde: «¿Qué estás haciendo?»
10 Yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lisakoli oyo ezali na tina na mokambi oyo azali na Yelusalemi elongo na libota mobimba ya Isalaele, oyo bazali kuna. ›
Dile: Así habla Yahvé, el Señor: Este oráculo es para el príncipe que está en Jerusalén, y para toda la casa de Israel que habita en medio de ella.
11 Loba na bango: ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango: bakokende na bowumbu lokola bakangami.
Dirás: Yo os sirvo de señal. Como yo he hecho, así se hará con ellos; al destierro, al cautiverio irán.
12 Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te.
El príncipe que está en medio de ellos se echará (su bagaje) al hombro, siendo de noche, y partirá; le harán un agujero en la pared para sacarlo por allí; y se cubrirá el rostro para que no vea con sus ojos la tierra.
13 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.
Mas Yo extenderé sobre él mi red, y quedará preso en mi lazo, y le haré llevar a Babilonia, tierra de los caldeos; pero no la verá, y allí morirá.
14 Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso: bakalaka mpe mampinga na ye; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu.
Y a todos los de su servicio, sus auxiliares y sus soldados todos los esparciré a todo viento y desenvainaré la espada en pos de ellos.
15 Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu.
Y conocerán que Yo soy Yahvé, cuando los haya dispersado entre las naciones y diseminado en los países.
16 Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
Pero preservaré a algunos de ellos de la espada, del hambre y de la peste, a fin de que cuenten todas sus abominaciones entre las naciones adonde llegaren. Y conocerán que Yo soy Yahvé.”
17 Yawe alobaki na ngai:
Y recibí de Yahvé esta palabra:
18 « Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo;
“Hijo de hombre, come tu pan con temor y bebe tu agua con temblor y angustia.
19 mpe loba na bato ya mokili oyo: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele: Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.
Y di al pueblo del país: Así habla Yahvé, el Señor, respecto de los habitantes de Jerusalén y de la tierra de Israel: Comerán su pan con angustia, y con espanto beberán su agua; porque la tierra será despojada de cuanto contiene, a causa de las injusticias de todos sus habitantes.
20 Bingumba oyo bato bavandaka ekobebisama mpe mokili ekotikala lisusu na bato te, mpe bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
Serán asoladas las ciudades pobladas, y el país se convertirá en desierto; y conoceréis que Yo soy Yahvé.”
21 Yawe alobaki na ngai:
Me fue dirigida la palabra de Yahvé que dijo:
22 « Mwana na moto, bolobaka lisese nini kati na mokili ya Isalaele: ‹ Mikolo ezali koleka mpe bimoniseli ezali kokokisama te? ›
“Hijo de hombre, ¿qué refrán es ese que tenéis en el país de Israel y que dice: «Se van prolongando los días, y no se cumplen las visiones»?
23 Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. › Loba na bango lisusu: ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama.
Por esto diles: Yo acabaré con este refrán; no lo repetirán más en Israel. Al contrario, diles: Ya están cerca los días y el cumplimiento de toda visión.
24 Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele.
Pues no habrá más visión vana ni adivinación lisonjera en la casa de Israel.
25 Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › »
Porque Yo, Yahvé, hablaré; y cuanto dijere se cumplirá; no se diferirá para más adelante; en vuestros días, oh casa rebelde, diré una palabra, y la cumpliré”, dice Yahvé, el Señor.
26 Yawe alobaki na ngai:
Y me fue dirigida la palabra de Yahvé en estos términos:
27 « Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba: ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. ›
“Hijo de hombre, mira lo que dice la casa de Israel: «La visión que este ve es para días lejanos; para tiempos remotos profetiza él».
28 Yango wana, loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »
Por lo tanto diles: Así dice el Señor, Yahvé: No se diferirá ya ninguna de mis palabras; la palabra que Yo dijere se cumplirá”, dice Yahvé, el Señor.

< Ezekieli 12 >