< Ezekieli 10 >
1 Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.
Pogledah, i gle: na svodu nad glavama kreubinÄa pojavi se nešto kao kamen safir, kao nekakvo prijestolje.
2 Yawe alobaki na moto oyo alataki bilamba ya lino: « Leka kati na bapine oyo ezali na se ya basheribe, tondisa maboko na yo na makala ya moto oyo okozwa kati na basheribe mpe panza yango na engumba. » Mpe asalaki bongo na miso na ngai.
I prozbori čovjeku odjevenom u lan: “Uđi među točkove pod kerubinima, uzmi pune pregršti žeravice između kerubina i prospi je nad gradom!” - I on na moje oči uđe među kerubine.
3 Nzokande, basheribe bazalaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo tango moto wana akotaki, mpe lipata moko etondisaki lopango na yango ya kati.
A kerubini stajahu s desne strane Doma kad čovjek uđe među njih. I oblak ispuni sve unutrašnje predvorje,
4 Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe.
a Slava Jahvina vinu se s kerubinÄa prema pragu Doma. Dom se ispuni oblakom, a predvorje napuni svjetlost Slave Jahvine.
5 Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.
Huka kerubinskih krila razliježe se do vanjskoga predvorja, kao kad zagrmi glas Svevišnjega.
6 Tango Yawe apesaki mitindo na moto oyo alataki bilamba ya lino: « Kamata moto kati na bapine mpe kati na basheribe, » moto yango akotaki mpe atelemaki pembeni ya pine moko.
A kad on zapovjedi čovjeku odjevenom u lan: “Uzmi ognja između točkova što su pod kerubinima”, čovjek uđe i stade kraj točkova.
7 Bongo moko kati na basheribe asembolaki loboko na ye kino na moto oyo ezalaki na kati-kati na bango; akamataki ndambo ya makala ya moto kati na moto mpe atiaki yango kati na maboko ya moto oyo alataki bilamba ya lino. Moto yango azwaki yango mpe abimaki na libanda.
Jedan kerubin pruži ruku prema ognju što bijaše među kerubinima, uze ga i stavi u ruke čovjeku odjevenom u lan. On ga primi i iziđe.
8 Na se ya mapapu ya basheribe, elilingi moko emonanaki lokola maboko ya moto.
A ispod kerubinskih krila ukaza se nešto kao ruka čovječja.
9 Tango natalaki, namonaki bapine minei pene ya basheribe: pine moko pembeni ya sheribe moko; bongo bapine yango ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite.
Pogledah, i gle: uz kerubine četiri točka, po jedan uza svakoga. A točkovi bijahu nalik na kamen krizolit;
10 Bapine yango minei ezalaki ndenge moko, ezalaki komonana lokola moko kati na mosusu.
sva četiri istog oblika i kao da je jedan točak u drugome.
11 Soki ezali kotambola, ekendaka na bangambo nyonso minei oyo elongi ya basheribe ekotala; mpe bapine yango ezalaki kotengama te soki basheribe bazali kotambola. Basheribe bazalaki kokende na bangambo nyonso oyo bilongi na bango ezalaki kotala, mpe bazalaki kobaluka na bangambo mosusu te.
U kretanju mogahu ići u sva četiri smjera, sve bez zakretanja. Kamo bi se glava usmjerila, onamo bi krenuli, a da se, krećući se, nisu morali okretati.
12 Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki.
Cijelo tijelo u kerubinÄa - leđa, ruke, krila i sva četiri točka njihova - sve im bijaše posvud naokolo puno očiju.
13 Nayokaki ete bazali kobenga bapine yango « bapine ya mopepe ya kayina. »
A točkovi, koliko sam čuo, zvahu se “Kovitlac”.
14 Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei: elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo.
Svaki imaše po četiri lica: lice prvoga kerubinsko, lice drugoga čovječje, a u trećega lice lavlje, u četvrtoga orlovsko.
15 Bongo basheribe bapumbwaki na likolo makasi. Ezalaki bikelamu ya bomoi oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari.
Tada se kerubini podigoše u visine. Bijahu to ista bića što ih vidjeh na rijeci Kebaru.
16 Soki basheribe bazali kotambola, bapine oyo ezalaki na mipanzi na bango ezalaki mpe kotambola. Soki bafungoli mapapu na bango mpo na kopumbwa longwa na se, bapine yango mpe ezalaki kokabwana na bango te, kasi nde ezalaki ya kokangana na mipanzi na bango.
Kad bi kerubini krenuli, krenuli bi i točkovi uz njih, kad bi kerubini krilima mahnuli da se od zemlje podignu, točkovi se ne bi od njih odmicali.
17 Soki basheribe batelemi, yango mpe ezalaki kotelema; soki bapumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na yango.
Kad bi se zaustavili, i točkovi bi stali; a kad bi se sa zemlje podigli, i točkovi se podizahu, jer duh bića bijaše u njima.
18 Nkembo ya Yawe elongwaki na ekotelo ya Tempelo mpe ekendeki kotelema na likolo ya basheribe.
Uto se Slava Jahvina vinu s praga Doma i stade nad kerubinima.
19 Wana nazalaki kotala, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapumbwaki longwa na se; mpe tango bazalaki kokende, bapine yango mpe ezalaki kokende elongo na bango. Batelemaki na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya este ya Tempelo ya Yawe, bongo nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki likolo na bango.
Tada kerubini raširiše krila i podigoše se sa zemlje pred mojim očima. A kad oni krenuše, i točkovi za njima krenuše. I zaustaviše se nad istočnim vratima Doma Jahvina, a Slava Boga Izraelova bijaše nad njima.
20 Ezalaki nde bikelamu ya bomoi oyo namonaki na se ya Nzambe ya Isalaele pembeni ya Kebari; mpe nasosolaki ete ezali basheribe.
Bijahu to ista bića što ih vidjeh pred Bogom Izraelovim na rijeci Kebaru. I tako spoznah da ono bijahu kerubini.
21 Moko na moko kati na bango azalaki na bilongi minei mpe mapapu minei; bongo na se ya mapapu na bango, ezalaki na elilingi moko lokola maboko ya moto.
U svakoga po četiri lica i po četiri krila, a pod krilima nešto kao ruka čovječja.
22 Bilongi na bango ezalaki ndenge moko na oyo namonaki pene ya Kebari. Moko na moko azalaki kotambola kaka liboso.
Lica im ista kao ona što ih vidjeh na rijeci Kebaru. I svako se naprijed kretaše.