< Kobima 8 >
1 Sima na yango, Yawe atindaki Moyize: « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye: ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Entonces Yavé dijo a Moisés: Entra a Faraón y dile: Yavé dice Deja salir a mi pueblo para que me sirva.
2 Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba.
Si te niegas a dejarlo ir, ciertamente Yo castigaré todo tu territorio con una plaga de ranas.
3 Nili ekotonda na magorodo; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine.
El Nilo bullirá de ranas, las cuales subirán y penetrarán en tu palacio, en tu dormitorio y sobre tu propio lecho, así como en las casas de tus esclavos, entre tu pueblo, en tus hornos y en tus artesas de amasar.
4 Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › »
Las ranas subirán sobre ti, tu pueblo y todos tus esclavos.
5 Yawe alobaki na Moyize: « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »
Yavé dijo a Moisés: Dí a Aarón: Extiende tu mano con tu vara sobre los ríos, los arroyos y los estanques. Haz que suban ranas sobre la tierra de Egipto.
6 Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito.
Aarón extendió su mano sobre las aguas de Egipto, y subieron las ranas que cubrieron la tierra de Egipto.
7 Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka: bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.
Los hechiceros hicieron lo mismo con sus encantamientos, e hicieron subir ranas sobre la tierra de Egipto.
8 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.
Entonces Faraón llamó a Moisés y a Aarón y les dijo: Supliquen a Yavé que quite las ranas de mí y de mi pueblo, y dejaré ir al pueblo para que ofrezca sacrificio a Yavé.
9 Moyize alobaki na Faraon: — Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo; kasi etikala kaka na ebale Nili.
Moisés dijo a Faraón: Dígnate indicarme cuándo debo suplicar por ti, por tus esclavos y por tu pueblo, para que las ranas sean quitadas de ti y de tus casas, y sean dejadas solo en el Nilo.
10 Faraon azongisaki: — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki: — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.
Y él dijo: Mañana. Y Moisés respondió: Se hará conforme a tu palabra, para que entiendas que no hay como Yavé nuestro ʼElohim.
11 Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo; kasi ekotikala kaka na ebale Nili.
Se retirarán las ranas de ti, de tus casas, de tus esclavos y de tu pueblo. Solo serán dejadas en el Nilo.
12 Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.
Moisés y Aarón salieron de la presencia de Faraón. Moisés clamó a Yavé por el asunto de las ranas que Él envió sobre Faraón.
13 Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki: magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga.
Yavé hizo conforme a la súplica de Moisés, y murieron las ranas de las casas, de los patios y de los campos.
14 Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola.
Las pusieron en grandes montones, y el país hedía.
15 Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
Pero cuando Faraón vio que había un alivio, endureció su corazón y no los escuchó, como dijo Yavé.
16 Yawe alobaki na Moyize: — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.
Entonces Yavé dijo a Moisés: Dí a Aarón: Extiende tu vara y golpea el polvo de la tierra para que haya piojos en toda la tierra de Egipto.
17 Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi.
Y ellos lo hicieron así. Aarón extendió su mano con su vara, y golpeó el polvo de la tierra. Hubo piojos sobre hombres y bestias. ¡Todo el polvo de la tierra se convirtió en piojos en todo el país de Egipto!
18 Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama.
Los hechiceros intentaron sacar los piojos con sus encantamientos, pero no pudieron. Así que hubo piojos sobre los hombres y las bestias.
19 Boye bato ya maji balobaki na Faraon: « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.
Entonces los hechiceros dijeron a Faraón: ¡Esto es el dedo de ʼElohim! Pero el corazón de Faraón se endureció, y no los escuchó, como dijo Yavé.
20 Yawe alobaki na Moyize: — Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye: « Tala makambo oyo Yawe alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Yavé dijo a Moisés: Levántate temprano por la mañana, preséntate ante Faraón cuando sale al agua y dile: Yavé dice: Deja salir a mi pueblo para que me sirva.
21 Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka.
Porque si no dejas salir a mi pueblo, ciertamente enviaré una multitud de moscas sobre ti, tus esclavos, tu pueblo y tus casas. Las casas de los egipcios estarán llenas de podredumbre de moscas y también la tierra sobre la cual están.
22 Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango.
Sin embargo, el mismo día excluiré la tierra de Gosén en la cual vive mi pueblo para que no haya multitud de moscas en ella, y así entenderás que Yo, Yavé, estoy en medio de esta tierra.
23 Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »
Yo haré división entre mi pueblo y tu pueblo. Mañana ocurrirá esta señal.
24 Yawe asalaki bongo: banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.
Así Yavé lo hizo. Llegó una gran multitud de moscas a la casa de Faraón y a las casas de sus esclavos. En todo el país de Egipto la tierra se corrompió por causa de la multitud de moscas.
25 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: — Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo.
Entonces Faraón llamó a Moisés y a Aarón y les dijo: Vayan, ofrezcan sacrificio a su ʼElohim dentro del país.
26 Kasi Moyize azongisaki: — Ekoki kosalema bongo te; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te?
Pero Moisés respondió: No es correcto hacerlo así, porque ofreceríamos sacrificio a Yavé nuestro ʼElohim, lo cual es repugnancia para los egipcios. Si sacrificamos lo que es una repugnancia para los egipcios delante de ellos, ¿no nos apedrearían?
27 Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso.
Tenemos que hacer una jornada de tres días por el desierto y ofreceremos sacrificio a Yavé nuestro ʼElohim, según lo que Él nos manda.
28 Faraon alobaki: — Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai!
Faraón respondió: Los dejaré salir para que ofrezcan sacrificio a Yavé su ʼElohim en el desierto, con tal que no vayan más lejos. ¡Supliquen por mí!
29 Moyize azongisaki: — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.
Entonces Moisés dijo: Ciertamente voy a salir de tu presencia y suplicaré a Yavé que la multitud de moscas se aparte mañana de Faraón, de sus esclavos y de su pueblo, con tal que Faraón no siga engañándome al impedir al pueblo que salga a ofrecer sacrificios a Yavé.
30 Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe
Moisés salió de la presencia de Faraón y suplicó a Yavé.
31 mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki: banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki.
Yavé hizo conforme a la palabra de Moisés y apartó las moscas de Faraón, de sus esclavos y de su pueblo. No quedó ni una.
32 Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
Sin embargo Faraón endureció su corazón también esta vez, y no dejó salir al pueblo.