< Kobima 7 >
1 Yawe alobaki na Moyize: « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo.
And Jehovah said unto Moses, See, I have made thee as God to Pharaoh; and Aaron thy brother shall be thy prophet.
2 Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
Thou shalt speak all that I command thee; and Aaron thy brother shall speak unto Pharaoh, that he let the children of Israel go out of his land.
3 Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito.
And I will harden Pharaoh’s heart, and multiply my signs and my wonders in the land of Egypt.
4 Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.
But Pharaoh will not hearken unto you, and I will lay my hand upon Egypt, and bring forth my hosts, my people the children of Israel, out of the land of Egypt by great judgments.
5 Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »
And the Egyptians shall know that I am Jehovah, when I stretch forth my hand upon Egypt, and bring out the children of Israel from among them.
6 Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango.
And Moses and Aaron did so; as Jehovah commanded them, so did they.
7 Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe; mpe Aron, tuku mwambe na misato.
And Moses was fourscore years old, and Aaron fourscore and three years old, when they spake unto Pharaoh.
8 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
And Jehovah spake unto Moses and unto Aaron, saying,
9 « Tango Faraon akoloba na bino: ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron: ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »
When Pharaoh shall speak unto you, saying, Show a wonder for you; then thou shalt say unto Aaron, Take thy rod, and cast it down before Pharaoh, that it become a serpent.
10 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka.
And Moses and Aaron went in unto Pharaoh, and they did so, as Jehovah had commanded: and Aaron cast down his rod before Pharaoh and before his servants, and it became a serpent.
11 Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka.
Then Pharaoh also called for the wise men and the sorcerers: and they also, the magicians of Egypt, did in like manner with their enchantments.
12 Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango.
For they cast down every man his rod, and they became serpents: but Aaron’s rod swallowed up their rods.
13 Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.
And Pharaoh’s heart was hardened, and he hearkened not unto them; as Jehovah had spoken.
14 Yawe alobaki na Moyize: « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende.
And Jehovah said unto Moses, Pharaoh’s heart is stubborn, he refuseth to let the people go.
15 Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka.
Get thee unto Pharaoh in the morning; lo, he goeth out unto the water; and thou shalt stand by the river’s brink to meet him; and the rod which was turned to a serpent shalt thou take in thy hand.
16 Bongo okoloba na ye: ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo: ‘Tala makambo oyo Yawe alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.
And thou shalt say unto him, Jehovah, the God of the Hebrews, hath sent me unto thee, saying, Let my people go, that they may serve me in the wilderness: and, behold, hitherto thou hast not hearkened.
17 Tala makambo oyo Yawe alobi: Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe: Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila.
Thus saith Jehovah, In this thou shalt know that I am Jehovah: behold, I will smite with the rod that is in my hand upon the waters which are in the river, and they shall be turned to blood.
18 Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te.’ › »
And the fish that are in the river shall die, and the river shall become foul; and the Egyptians shall loathe to drink water from the river.
19 Yawe alobaki na Moyize: « Yebisa Aron: ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito: etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. »
And Jehovah said unto Moses, Say unto Aaron, Take thy rod, and stretch out thy hand over the waters of Egypt, over their rivers, over their streams, and over their pools, and over all their ponds of water, that they may become blood; and there shall be blood throughout all the land of Egypt, both in vessels of wood and in vessels of stone.
20 Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila.
And Moses and Aaron did so, as Jehovah commanded; and he lifted up the rod, and smote the waters that were in the river, in the sight of Pharaoh, and in the sight of his servants; and all the waters that were in the river were turned to blood.
21 Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
And the fish that were in the river died; and the river became foul, and the Egyptians could not drink water from the river; and the blood was throughout all the land of Egypt.
22 Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
And the magicians of Egypt did in like manner with their enchantments: and Pharaoh’s heart was hardened, and he hearkened not unto them; as Jehovah had spoken.
23 Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.
And Pharaoh turned and went into his house, neither did he lay even this to heart.
24 Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale.
And all the Egyptians digged round about the river for water to drink; for they could not drink of the water of the river.
25 Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili.
And seven days were fulfilled, after that Jehovah had smitten the river.