< Kobima 6 >

1 Yawe alobaki na Moyize: — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon: na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
And the Lord said to Moses, Now you will see what I am about to do to Pharaoh; for by a strong hand he will be forced to let them go, driving them out of his land because of my outstretched arm.
2 Nzambe alobaki lisusu na Moyize: — Nazali Yawe.
And God said to Moses, I am Yahweh:
3 Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai: Yawe.
I let myself be seen by Abraham, Isaac, and Jacob, as God, the Ruler of all; but they had no knowledge of my name Yahweh.
4 Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya.
And I made an agreement with them, to give them the land of Canaan, the land of their wanderings.
5 Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai.
And truly my ears are open to the cry of the children of Israel whom the Egyptians keep under their yoke; and I have kept in mind my agreement.
6 Yango wana, loba na bana ya Isalaele: « Nazali Yawe! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
Say then to the children of Israel, I am Yahweh, and I will take you out from under the yoke of the Egyptians, and make you safe from their power, and will make you free by the strength of my arm after great punishments.
7 Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
And I will take you to be my people and I will be your God; and you will be certain that I am the Lord your God, who takes you out from under the yoke of the Egyptians.
8 Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »
And I will be your guide into the land which I made an oath to give to Abraham, to Isaac, and to Jacob; and I will give it to you for your heritage: I am Yahweh.
9 Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango.
And Moses said these words to the children of Israel, but they gave no attention to him, because of the grief of their spirit and the cruel weight of their work.
10 Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord said to Moses,
11 — Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
Go in and say to Pharaoh, king of Egypt, that he is to let the children of Israel go out of his land.
12 Kasi Moyize azongiselaki Yawe: — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma?
And Moses, answering the Lord, said, See, the children of Israel will not give ear to me; how then will Pharaoh give ear to me, whose lips are unclean?
13 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito.
And the word of the Lord came to Moses and Aaron, with orders for the children of Israel and for Pharaoh, king of Egypt, to take the children of Israel out of the land of Egypt.
14 Tala bakambi ya mabota na bango: Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.
These are the heads of their fathers' families: the sons of Reuben the oldest son of Israel: Hanoch and Pallu, Hezron and Carmi: these are the families of Reuben.
15 Bana mibali ya Simeoni: Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo abotamaki na mwasi ya Kanana. Wana nde mabota ya Simeoni.
And the sons of Simeon: Jemuel and Jamin and Ohad and Jachin and Zohar and Shaul, the son of a woman of Canaan: these are the families of Simeon.
16 Tala bakombo ya bana mibali ya Levi oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo kolanda ndenge babotamela: Gerishoni, Keati mpe Merari.
And these are the names of the sons of Levi in the order of their generations: Gershon and Kohath and Merari: and the years of Levi's life were a hundred and thirty-seven.
17 Bana mibali ya Gerishoni kolanda mabota na bango: Libini mpe Shimei.
The sons of Gershon: Libni and Shimei, in the order of their families.
18 Bana mibali ya Keati oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na misato: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
And the sons of Kohath: Amram and Izhar and Hebron and Uzziel: and the years of Kohath's life were a hundred and thirty-three.
19 Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Wana nde mabota ya Levi kolanda ndenge babotamela.
And the sons of Merari: Mahli and Mushi: these are the families of the Levites, in the order of their generations.
20 Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo.
And Amram took Jochebed, his father's sister, as wife; and she gave birth to Aaron and Moses: and the years of Amram's life were a hundred and thirty-seven.
21 Bana mibali ya Yitseari: Kore, Nefegi mpe Zikiri.
And the sons of Izhar: Korah and Nepheg and Zichri.
22 Bana mibali ya Uzieli: Mishaeli, Elitsafani mpe Sitiri.
And the sons of Uzziel: Mishael and Elzaphan and Sithri.
23 Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
And Aaron took as his wife Elisheba, the daughter of Amminadab, the sister of Nahshon; and she gave birth to Nadab and Abihu, Eleazar and Ithamar.
24 Bana mibali ya Kore: Asiri, Elikana mpe Abiazafi. Wana nde mabota ya Kore.
And the sons of Korah: Assir and Elkanah and Abiasaph: these are the families of the Korahites.
25 Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali: Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
And Eleazar, Aaron's son, took as his wife one of the daughters of Putiel; and she gave birth to Phinehas. These are the heads of the families of the Levites, in the order of their families.
26 Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki: « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. »
These are the same Aaron and Moses to whom the Lord said, Take the children of Israel out of the land of Egypt in their armies.
27 Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana.
These are the men who gave orders to Pharaoh to let the children of Israel go out of Egypt: these are the same Moses and Aaron.
28 Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito:
And on the day when the word of the Lord came to Moses in the land of Egypt,
29 Yawe ayebisaki Moyize: — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo.
The Lord said to Moses, I am the Lord: say to Pharaoh, king of Egypt, everything I am saying to you.
30 Kasi Moyize azongiselaki Yawe: — Tala, nazali na likukuma; ndenge nini Faraon akoyoka ngai?
And Moses said to the Lord, My lips are unclean; how is it possible that Pharaoh will give me a hearing?

< Kobima 6 >