< Kobima 40 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
L’Éternel parla à Moïse, et dit:
2 — Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani;
Le premier jour du premier mois, tu dresseras le tabernacle, la tente d’assignation.
3 okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.
Tu y placeras l’arche du témoignage, et tu couvriras l’arche avec le voile.
4 Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.
Tu apporteras la table, et tu la disposeras en ordre. Tu apporteras le chandelier, et tu en arrangeras les lampes.
5 Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo.
Tu placeras l’autel d’or pour le parfum devant l’arche du témoignage, et tu mettras le rideau à l’entrée du tabernacle.
6 Okotia etumbelo ya mbeka ya kotumba liboso ya ekotelo ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,
Tu placeras l’autel des holocaustes devant l’entrée du tabernacle, de la tente d’assignation.
7 mpe okotia sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
Tu placeras la cuve entre la tente d’assignation et l’autel, et tu y mettras de l’eau.
8 Okotonga lopango zingazinga na yango mpe okotia rido na ekotelo ya lopango.
Tu placeras le parvis à l’entour, et tu mettras le rideau à la porte du parvis.
9 Okozwa mafuta ya epakolami, okopakola Mongombo mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mpe okobulisa yango elongo na bisalelo na yango nyonso mpe yango ekozala bule.
Tu prendras l’huile d’onction, tu en oindras le tabernacle et tout ce qu’il renferme, et tu le sanctifieras, avec tous ses ustensiles; et il sera saint.
10 Okopakola mafuta na etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso; okobulisa etumbelo mpe yango ekozala bule koleka.
Tu oindras l’autel des holocaustes et tous ses ustensiles, et tu sanctifieras l’autel; et l’autel sera très saint.
11 Okopakola mafuta na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango, mpe okobulisa yango.
Tu oindras la cuve avec sa base, et tu la sanctifieras.
12 Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.
Tu feras avancer Aaron et ses fils vers l’entrée de la tente d’assignation, et tu les laveras avec de l’eau.
13 Sima na yango, okolatisa Aron bilamba ya bule, okopakola ye mafuta mpe okobulisa ye mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe.
Tu revêtiras Aaron des vêtements sacrés, tu l’oindras, et tu le sanctifieras, pour qu’il soit à mon service dans le sacerdoce.
14 Okomema mpe bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.
Tu feras approcher ses fils, tu les revêtiras des tuniques,
15 Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe: epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango.
et tu les oindras comme tu auras oint leur père, pour qu’ils soient à mon service dans le sacerdoce. Cette onction leur assurera à perpétuité le sacerdoce parmi leurs descendants.
16 Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.
Moïse fit tout ce que l’Éternel lui avait ordonné; il fit ainsi.
17 Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale.
Le premier jour du premier mois de la seconde année, le tabernacle fut dressé.
18 Tango Moyize atelemisaki Mongombo, atiaki bivandelo na esika na yango, atiaki bakadre, akotisaki mabaya mpe atelemisaki makonzi;
Moïse dressa le tabernacle; il en posa les bases, plaça les planches et les barres, et éleva les colonnes.
19 atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Il étendit la tente sur le tabernacle, et il mit la couverture de la tente par-dessus, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
20 Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango.
Il prit le témoignage, et le plaça dans l’arche; il mit les barres à l’arche, et il posa le propitiatoire au-dessus de l’arche.
21 Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Il apporta l’arche dans le tabernacle; il mit le voile de séparation, et il en couvrit l’arche du témoignage, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
22 Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido;
Il plaça la table dans la tente d’assignation, au côté septentrional du tabernacle, en dehors du voile;
23 mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
et il y déposa en ordre les pains, devant l’Éternel, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
24 Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo.
Il plaça le chandelier dans la tente d’assignation, en face de la table, au côté méridional du tabernacle;
25 Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
et il en arrangea les lampes, devant l’Éternel, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
26 Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido,
Il plaça l’autel d’or dans la tente d’assignation, devant le voile;
27 mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
et il y fit brûler le parfum odoriférant, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
28 Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo.
Il plaça le rideau à l’entrée du tabernacle.
29 Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Il plaça l’autel des holocaustes à l’entrée du tabernacle, de la tente d’assignation; et il y offrit l’holocauste et l’offrande, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
30 Atiaki sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo mpe atiaki kati na yango mayi ya kosukola.
Il plaça la cuve entre la tente d’assignation et l’autel, et il y mit de l’eau pour les ablutions;
31 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron basalelaki yango mpo na kosukola maboko mpe makolo na bango.
Moïse, Aaron et ses fils, s’y lavèrent les mains et les pieds;
32 Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
lorsqu’ils entrèrent dans la tente d’assignation et qu’ils s’approchèrent de l’autel, ils se lavèrent, comme l’Éternel l’avait ordonné à Moïse.
33 Moyize atelemisaki lopango pembeni-pembeni ya Mongombo mpe ya etumbelo, mpe atiaki rido na ekuke ya lopango. Ezali boye nde Moyize asilisaki mosala.
Il dressa le parvis autour du tabernacle et de l’autel, et il mit le rideau à la porte du parvis. Ce fut ainsi que Moïse acheva l’ouvrage.
34 Lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Bokutani mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo.
Alors la nuée couvrit la tente d’assignation, et la gloire de l’Éternel remplit le tabernacle.
35 Moyize akokaki lisusu te kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te lipata evandaki likolo na yango mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo.
Moïse ne pouvait pas entrer dans la tente d’assignation, parce que la nuée restait dessus, et que la gloire de l’Éternel remplissait le tabernacle.
36 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bana ya Isalaele bazalaki kotelema mpo na kokende na mobembo na bango.
Aussi longtemps que durèrent leurs marches, les enfants d’Israël partaient, quand la nuée s’élevait de dessus le tabernacle.
37 Kasi soki lipata elongwe te, bango mpe bazalaki kolongwa te, bazalaki kozela kino na mokolo oyo lipata ekolongwa.
Et quand la nuée ne s’élevait pas, ils ne partaient pas, jusqu’à ce qu’elle s’élevât.
38 Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.
La nuée de l’Éternel était de jour sur le tabernacle; et de nuit, il y avait un feu, aux yeux de toute la maison d’Israël, pendant toutes leurs marches.