< Kobima 4 >

1 Moyize azongisaki: — Bongo soki bandimi ngai te, bayoki ngai te? Solo, bakoloba kaka: « Yawe amonanaki na yo te. »
respondens Moses ait non credent mihi neque audient vocem meam sed dicent non apparuit tibi Dominus
2 Yawe atunaki ye: — Ozali na nini na loboko na yo? Moyize azongisaki: — Nazali na lingenda.
dixit ergo ad eum quid est hoc quod tenes in manu tua respondit virga
3 Yawe alobaki: — Bwaka yango na mabele. Moyize abwakaki lingenda yango na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Bongo Moyize akimaki mosika na yango.
ait proice eam in terram proiecit et versa est in colubrum ita ut fugeret Moses
4 Kasi Yawe alobaki na ye: — Sembola loboko na yo mpe kanga nyoka yango na mokila! Moyize asembolaki loboko mpe akangaki nyoka; mpe nyoka yango ebongwanaki lisusu lingenda na loboko na ye.
dixitque Dominus extende manum tuam et adprehende caudam eius extendit et tenuit versaque est in virgam
5 Yawe alobaki na ye: — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo.
ut credant inquit quod apparuerit tibi Dominus Deus patrum tuorum Deus Abraham Deus Isaac Deus Iacob
6 Sima, Yawe alobaki na ye lisusu: — Tia loboko na yo na tolo na yo. Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe.
dixitque Dominus rursum mitte manum in sinum tuum quam cum misisset in sinum protulit leprosam instar nivis
7 Yawe alobaki na ye: — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye.
retrahe ait manum in sinum tuum retraxit et protulit iterum et erat similis carni reliquae
8 Yawe alobaki na ye: — Soki bandimi yo te to soki babeti tembe mpo na elembo ya liboso, bakondima na elembo ya mibale.
si non crediderint inquit tibi neque audierint sermonem signi prioris credent verbo signi sequentis
9 Kasi soki na bilembo oyo mibale, bandimi kaka te to bayoki te, wana okotoka mayi na ebale Nili, okosopa yango na esobe. Mayi oyo okozwa na ebale Nili ekokoma makila tango okosopa yango na mabele.
quod si nec duobus quidem his signis crediderint neque audierint vocem tuam sume aquam fluminis et effunde eam super aridam et quicquid hauseris de fluvio vertetur in sanguinem
10 Moyize alobaki na Yawe: — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo.
ait Moses obsecro Domine non sum eloquens ab heri et nudius tertius et ex quo locutus es ad servum tuum inpeditioris et tardioris linguae sum
11 Yawe alobaki na ye: — Nani apesaka monoko epai ya moto? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso? Boni, ezali Ngai Yawe te?
dixit Dominus ad eum quis fecit os hominis aut quis fabricatus est mutum et surdum videntem et caecum nonne ego
12 Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba.
perge igitur et ego ero in ore tuo doceboque te quid loquaris
13 Kasi Moyize azongisaki: — Te Nkolo! Nabondeli Yo! Tinda moto mosusu oyo olingi mpo na kosala yango.
at ille obsecro inquit Domine mitte quem missurus es
14 Boye Yawe asilikelaki Moyize mpe alobaki na ye: — Boni, Aron, moto ya libota ya Levi, azali ndeko na yo te? Nayebi ete alobaka malamu mpe ye wana azali koya kokutana na yo; mpe motema na ye ekosepela tango akomona yo.
iratus Dominus in Mosen ait Aaron frater tuus Levites scio quod eloquens sit ecce ipse egreditur in occursum tuum vidensque te laetabitur corde
15 Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.
loquere ad eum et pone verba mea in ore eius ego ero in ore tuo et in ore illius et ostendam vobis quid agere debeatis
16 Ye akoloba epai ya bato na esika na yo, akozala molobeli na yo; bongo yo okozala lokola nzambe na ye.
ipse loquetur pro te ad populum et erit os tuum tu autem eris ei in his quae ad Deum pertinent
17 Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango.
virgam quoque hanc sume in manu tua in qua facturus es signa
18 Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye: — Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi. Jetro ozongisaki: — Kende na kimia!
abiit Moses et reversus est ad Iethro cognatum suum dixitque ei vadam et revertar ad fratres meos in Aegyptum ut videam si adhuc vivunt cui ait Iethro vade in pace
19 Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani: — Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa.
dixit ergo Dominus ad Mosen in Madian vade revertere in Aegyptum mortui sunt omnes qui quaerebant animam tuam
20 Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.
tulit Moses uxorem et filios suos et inposuit eos super asinum reversusque est in Aegyptum portans virgam Dei in manu sua
21 Yawe alobaki na Moyize: — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
dixitque ei Dominus revertenti in Aegyptum vide ut omnia ostenta quae posui in manu tua facias coram Pharaone ego indurabo cor eius et non dimittet populum
22 Okoloba na Faraon: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali.
dicesque ad eum haec dicit Dominus filius meus primogenitus meus Israhel
23 Mpe nalobi na yo: Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »
dixi tibi dimitte filium meum ut serviat mihi et noluisti dimittere eum ecce ego interficiam filium tuum primogenitum
24 Nzokande na nzela, na esika oyo balekisaki butu, Yawe akutanaki na Moyize mpe alukaki koboma ye.
cumque esset in itinere in diversorio occurrit ei Dominus et volebat occidere eum
25 Kasi Sefora azwaki libanga ya songe, akataki ngenga ya mwana na ye ya mobali mpe atutisaki ngenga yango na makolo ya Moyize; alobaki: — Solo, ozali penza mpo na ngai mobali ya makila.
tulit ilico Seffora acutissimam petram et circumcidit praeputium filii sui tetigitque pedes eius et ait sponsus sanguinum tu mihi es
26 Bongo Yawe atikaki Moyize. Ezalaki na tango wana nde Sefora alobaki na Moyize likolo na likambo ya kokatama ngenga: — Mobali ya makila.
et dimisit eum postquam dixerat sponsus sanguinum ob circumcisionem
27 Yawe alobaki na Aron: — Kende kokutana na Moyize na esobe. Aron akendeki, akutanaki na Moyize na ngomba ya Nzambe mpe apesaki ye beze.
dixit autem Dominus ad Aaron vade in occursum Mosi in deserto qui perrexit ei obviam in montem Dei et osculatus est eum
28 Moyize ayebisaki Aron makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba mpe bikamwa nyonso oyo atindaki ye kosala.
narravitque Moses Aaron omnia verba Domini quibus miserat eum et signa quae mandaverat
29 Bongo Moyize mpe Aron bakendeki kosangisa bakambi nyonso ya Isalaele.
veneruntque simul et congregaverunt cunctos seniores filiorum Israhel
30 Aron ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe alobaki na Moyize. Asalaki bikamwa liboso ya bato.
locutusque est Aaron omnia verba quae dixerat Dominus ad Mosen et fecit signa coram populo
31 Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
et credidit populus audieruntque quod visitasset Dominus filios Israhel et quod respexisset adflictionem eorum et proni adoraverunt

< Kobima 4 >