< Kobima 39 >
1 Batongaki na langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe kati na Mongombo; batongaki mpe bilamba ya bule mpo na Aron, ndenge kaka Yawe atindaki yango na Moyize.
А од порфире и скерлета и црвца начинише хаљине за службу, да се служи у светињи; и начинише свете хаљине Арону, као што беше заповедио Господ Мојсију.
2 Betisaleyeli atongaki efode ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango; asalaki yango kitoko penza.
Начинише оплећак од злата, и од порфире и од скерлета и од црвца и од танког платна узведеног.
3 Batandaki mabende mike-mike ya wolo, bakataki-kataki yango lokola basinga mpe bakotisaki kati na langi ya ble mpe ya motane ya pete, langi ya motane makasi mpe lino ya kitoko; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
Истеглише листове од злата, и исекоше жице, те извезоше порфиру и скерлет и црвац и танко платно врло вешто.
4 Atiaki bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango; bankamba elekaki likolo ya mapeka.
Пораменице му начинише да се састављају, да се саставља на два краја своја.
5 Mokaba ya efode esalemaki lolenge moko na efode: ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
И појас на оплећку излажаше од њега и беше исте направе, од злата и од порфире и од скерлета и од црвца и од танког платна узведеног; као што беше заповедио Господ Мојсију.
6 Abongisaki mabanga ya onikisi, mpe bakangaki yango na bikangelo ya wolo; akomaki likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele, ndenge basalaka bililingi na kashe.
И уковаше два камена ониха у злато, и изрезаше на њима имена синова Израиљевих, као што се режу печати.
7 Atiaki yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
И ударише их на пораменице од оплећка, да буду камени за спомен синовима Израиљевим, као што беше заповедио Господ Мојсију.
8 Betisaleyeli asalaki elamba ya tolo; esalemaki kitoko penza. Atongaki yango ndenge moko na efode: ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
И начинише напрсник врло веште направе као што је направа у оплећка, од злата и од порфире и од скерлета и од црвца и од танког платна узведеног;
9 Agumbaki yango na biteni mibale; molayi mpe mokuse ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mibale na mitano.
Четвороугласт и двострук начинише напрсник, у дужину с педи и у ширину с педи, двострук.
10 Atiaki milongo minei ya mabanga ya talo na likolo ya elamba ya tolo: na molongo ya liboso, libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode.
И ударише по њему четири реда камења; у првом реду: сардоникс, топаз и смарагд;
11 Na molongo ya mibale, libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama.
А у другом реду: карбункул, сафир и дијамант;
12 Na molongo ya misato, libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite;
А у трећем реду: лигур, ахат и аметист;
13 na molongo ya minei, libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Akangaki mabanga yango na bikangelo ya wolo.
А у четвртом реду: хрисолит, оних и јаспис, све опточено златом у својим редовима.
14 Mabanga yango ezalaki zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakomaki kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale; bakomaki yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
Тих камена с именима синова Израиљевих беше дванаест према њиховим именима, резани као печати, за дванаест племена, свако по свом имену.
15 Basalaki basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo; basalaki yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
И начинише на напрсник ланце једнаке, плетене, од чистог злата.
16 Basalaki bikangelo mibale ya wolo mpe bapete mibale ya wolo mpe bakangisaki yango na basonge mibale ya elamba ya tolo.
И начинише две копче златне и две гривне златне, и метнуше те две гривне на два краја напрснику,
17 Alekisaki basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo atiaki na basonge mibale ya elamba ya tolo.
И провукоше два златна ланца кроз две гривне на крајевима напрснику,
18 Akangisaki basonge mibale mosusu ya basheneti oyo mibale na bikangelo mibale oyo atiaki na bankamba ya efode; bankamba yango elekaki na liboso.
А друга два краја од два ланца запеше за две копче, и притврдише их за пораменице на оплећку спред.
19 Asalaki lisusu bapete mibale ya wolo mpe atiaki yango na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
И начинише још две златне гривне, и метнуше их на два краја напрснику, на страни према оплећку изнутра.
20 Asalaki bapete mosusu mibale ya wolo oyo atiaki na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
И начинише још две гривне златне, које метнуше на две пораменице на оплећку оздо напред где се саставља, више појаса на оплећку.
21 Akangisaki na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. Asalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Тако привезаше напрсник кроз гривне на њему и гривне на оплећку врпцом од порфире, да стоји сврх појаса од оплећка и да се не раздваја напрсник од оплећка, као што беше заповедио Господ Мојсију.
22 Basalaki nzambala oyo ezalaki na se ya efode: ezalaki ya langi ya ble na mobimba na yango, mpe ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bilamba na maboko.
И начинише плашт под оплећак, ткан, сав од порфире.
23 Nzambala ezalaki na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto; batongaki pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
И прорез на плашту у среди као прорез на оклопу, и око прореза оплату да се не раздре.
24 Na se mpe zingazinga ya nzambala, batiaki bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na singa ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
И начинише по скуту од плашта шипке од порфире и од скерлета и од црвца и од танког платна узведеног.
25 Basalaki na wolo ya peto bangonga ya mike-mike mpe batiaki yango kati na bagrenade, na se ya nzambala.
И начинише звонца од чистог злата, и метнуше звонца међу шипке, по скуту од плашта унаоколо између шипака.
26 Balandisaki yango boye: ngonga moko ya moke, grenade moko, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala mpo na mosala, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Звонце па шипак, звонце па шипак по скуту од плашта унаоколо, за службу, као што беше заповедио Господ Мојсију.
27 Batongaki na lino ya kitoko, mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali, banzambala,
И начинише кошуље од танког платна изметаног Арону и синовима његовим;
28 bitendi ya lino ya kitoko mpo na moto, bikoti, bakaputula
И капу од танког платна, и капице кићене од танког платна, и гаће платнене од танког платна узведеног;
29 mpe mikaba oyo batonga bililingi na likolo na yango na basinga ya lino ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
И појас од танког платна узведеног и од порфире и од скерлета и од црвца, везен, као што беше заповедио Господ Мојсију.
30 Basalaki na wolo ya peto medaye lokola elembo ya libulisi na ye epai na Yawe mpe bakomaki na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe: abulisama mpo na Yawe.
И начинише плочицу за свето оглавље од чистог злата, и написаше на њој писмом како се реже на печатима: Светиња Господу.
31 Batiaki yango singa ya ble mpo na kokangisa yango na likolo ya kitendi ya moto, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
И притврдише за њу врпцу од порфире да се веже за капу озго, као што беше заповедио Господ Мојсију.
32 Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
И тако се сврши сав посао око шатора и наслона од састанка. И начинише синови Израиљеви све; како беше заповедио Господ Мојсију, тако начинише.
33 Bamemaki Mongombo epai ya Moyize, elongo na biloko na yango nyonso: ndako ya kapo mpe bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi mpe bivandelo na yango,
И донесоше к Мојсију шатор, наслон и све справе његове, куке, даске, преворнице, ступове и стопице,
34 ezipelo ya poso ya meme oyo bapakola langi ya motane, ezipelo ya poso ya nyama ya ebale mpe barido,
И покривач од кожа овнујских црвених обојених и покривач од кожа јазавичијих, и завес,
35 Sanduku ya Litatoli, mabaya ya komemela yango mpe mofinuku na yango,
И ковчег од сведочанства и полуге за њ, и заклопац,
36 mesa, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe;
Сто са свим справама, и хлеб за постављање,
37 etelemiselo ya minda, oyo basala na wolo ya peto, minda na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mafuta mpo na kopelisa minda yango,
Свећњак чисти, жишке његове, жишке наређане, и све справе његове, и уље за видело.
38 etumbelo oyo esalema na wolo, mafuta ya epakolami, malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo,
И олтар златни, и уље помазања, и кад мирисни, и завес на врата од шатора.
39 etumbelo esalema na bronze, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,
Олтар бронзани и решетку бронзану за њ, полуге његове и све справе његове, умиваоницу и подножје њено,
40 batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango, rido mpo na ekotelo ya lopango, basinga na yango, bapike na yango, bisalelo nyonso mpo na mosala ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,
Завесе за трем, ступове за њих и стопице њихове, и завес на врата од трема, ужа његова и коље његово, и све справе за службу у шатору, за шатор од састанка.
41 bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali.
Хаљине за службу, да се служи у светињи, хаљине свете Арону свештенику и хаљине синовима његовим, да врше службу свештеничку.
42 Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Све како беше заповедио Господ Мојсију, онако урадише синови Израиљеви све ово дело.
43 Moyize atalaki malamu misala yango mpe amonaki ete basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. Boye Moyize apambolaki bango.
И погледа Мојсије све то дело, и гле, начинише га, као што беше заповедио Господ, тако га начинише; и благослови их Мојсије.