< Kobima 36 >

1 Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki.
«خداوند به بِصَلئیل و اهولیاب و سایر صنعتگران ماهر استعداد و توانایی بخشیده است تا کارهای مربوط به ساخت خیمۀ عبادت را انجام دهند. آنها باید مطابق با طرح و فرمان خداوند ساخت و آراستن خیمه عبادت را به انجام رسانند.»
2 Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango.
پس موسی بِصَلئیل و اهولیاب و تمام صنعتگرانی را که خداوند به آنها مهارت بخشیده و مایل به خدمت بودند احضار کرد تا مشغول کار شوند.
3 Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
آنها تمام هدایایی را که بنی‌اسرائیل هر روز صبح برای بنای خیمهٔ عبادت می‌آوردند، از موسی تحویل می‌گرفتند.
4 Boye bato oyo bazalaki kosala misala ya kotonga Mongombo batikaki misala na bango
سرانجام صنعتگرانی ماهر که مشغول ساختن خیمه بودند دست از کار کشیدند.
5 mpe bayaki koloba na Moyize: — Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki.
آنها نزد موسی رفتند و گفتند: «مردم برای کاری که خداوند دستور آن را داده است بیش از آنچه لازم است هدیه آورده‌اند.»
6 Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele: — Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo! Boye bato batikaki komema makabo,
پس موسی فرمود تا در اردوگاه اعلام کنند که دیگر کسی هدیه نیاورد. بدین ترتیب بنی‌اسرائیل از آوردن هدیه بازداشته شدند،
7 pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema: ezalaki kutu ya koleka.
چون هدایای موجود، برای اتمام کار خیمه بیش از حد مورد نیاز بود.
8 Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
صنعتگرانی که مشغول کار بودند، خیمهٔ عبادت را با ده پرده از کتان ریزبافت تابیده تهیه کردند.
9 Tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na minei na molayi; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ezalaki ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
آنگاه بِصَلئیل با نخهای آبی، ارغوانی و قرمز پرده‌ها را تزئین کرده، نقش کروبیان را روی آنها با دقت گلدوزی کرد.
10 Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
سپس آن ده پرده را پنج پنج به هم دوخت تا دو قطعهٔ جداگانه تشکیل شود.
11 Batiaki basinga ya langi ya ble, na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.
برای وصل کردن این دو قطعهٔ بزرگ، در لبهٔ آخرین پردهٔ دستۀ اول و دستۀ دوم پنجاه حلقه از پارچۀ آبی ساخت.
12 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale; basinga yango etalanaki.
پنجاه حلقۀ لبۀ یک پرده با پنجاه حلقۀ پرده دیگر رو در روی هم قرار گرفت.
13 Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko.
سپس پنجاه گیره از طلا برای پیوستن این دو قطعه پرده به یکدیگر درست کردند تا پرده‌های دور خیمه به صورت یکپارچه درآیند.
14 Basalaki batapi zomi na moko, na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.
او برای پوشش سقف خیمۀ عبادت، یازده قطعهٔ دیگر از پشم بز بافت.
15 Molayi ya tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na mitano mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse.
طول هر یک از آنها پانزده متر و عرض هر یک دو متر بود.
16 Bakangisaki batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu.
پنج قطعه را به هم وصل کردند به طوری که به صورت یک قطعهٔ بزرگ درآمد. شش قطعهٔ دیگر را نیز به هم دوختند.
17 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
در حاشیهٔ هر یک از این دو قطعهٔ بزرگ پنجاه جاتکمه باز کردند
18 Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
و آنها را با پنجاه تکمهٔ مفرغین به هم وصل کردند تا بدین‌گونه دو قطعهٔ بزرگ به هم وصل شوند.
19 Basalelaki baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe babakisaki na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
دو پوشش دیگر درست کردند یکی از پوست قوچ که رنگش سرخ شده بود و دیگری از پوست خز، تا آنها را به ترتیب روی پوشش اولی بیندازند.
20 Basalaki bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe batelemisaki yango.
چوب‌بست خیمهٔ عبادت را از تخته‌های چوب اقاقیا ساختند تا به طور عمودی قرار گیرد.
21 Ezingelo moko na moko ezalaki na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse.
درازای هر تخته پنج متر و پهنای آن هفتاد و پنج سانتی متر بود.
22 Babetaki banzete mibale-mibale na ezingelo moko na moko; basalaki bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo.
هر طرف تخته دو زبانه داشت که آن را به تختهٔ پهلویی جفت می‌کرد.
23 Batiaki bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ya Mongombo,
برای قسمت جنوبی خیمۀ عبادت بیست تخته ساخت.
24 mpe makolo tuku minei ya palata, na se ya bizingelo tuku mibale: makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale;
همچنین برای زیر آنها چهل پایۀ نقره‌ای، یعنی دو پایه برای دو زبانۀ هر تخته درست کرد.
25 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor,
برای قسمت شمالی خیمۀ عبادت بیست تختۀ دیگر ساخت.
26 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata: makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko;
همچنین برای زیر آنها چهل پایۀ نقره‌ای، یعنی دو پایه برای دو زبانۀ هر تخته درست کرد.
27 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste,
برای قسمت آخر خیمۀ عبادت، یعنی آخر بخش غربی، شش تخته ساخت.
28 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo.
سپس دو تختهٔ دیگر برای گوشه‌های پشت خیمه درست کردند.
29 Bizingelo yango ezalaki ya kofungwama na se, kasi esalaki songe na likolo mpe ekotaki na lopete ya liboso: nyonso mibale ezalaki ndenge moko mpe elendisaki Mongombo.
شش تختهٔ قسمت غربی از بالا و پایین به‌وسیلۀ حلقه‌ها به تخته‌های گوشه متصل می‌شد.
30 Boye, bizingelo ezalaki mwambe elongo na makolo na yango ya palata zomi na motoba: makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
پس در قسمت غربی، مجموعاً هشت تخته با شانزده پایهٔ نقره‌ای، یعنی زیر هر تخته دو پایه، قرار گرفت.
31 Sima, basalaki, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo,
سپس پشت‌بندهایی از چوب اقاقیا ساخت، پنج پشت‌بند برای تخته‌های یک طرف خیمۀ عبادت،
32 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ezalaki na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste.
و پنج پشت‌بند برای تخته‌های طرف دیگر و پنج پشت‌بند نیز برای تخته‌های سمت غربی انتهای خیمه.
33 Libaya ya kati elekaki na kati-kati ya bizingelo, elekaki ngambo na ngambo.
پشت‌بند وسطی را نیز ساخت تا بطور سراسری از وسط تخته‌ها بگذرد.
34 Babambaki wolo na bizingelo, basalaki bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya; mpe babambaki mabaya wolo.
سپس تخته‌ها و پشت‌بندها را با روکش طلا پوشاند و حلقه‌هایی از طلا جهت نگه داشتن پشت‌بندها روی تخته‌ها ساختند.
35 Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango.
پردهٔ مخصوص را که بین قدس و قدس‌الاقداس بود از کتان ریز‌بافت تابیده و نخهای آبی، ارغوانی و قرمز درست کردند و نقش کروبیان را با دقت روی آن گلدوزی نمودند.
36 Batiaki yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo; bakangisaki yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe batelemisaki yango na makolo minei ya palata.
برای آویزان کردن پرده، چهار ستون از چوب اقاقیا با روکش طلا و قلابهایی از طلا ساختند و برای ستونها چهار پایهٔ نقره‌ای درست کردند.
37 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, asalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
سپس یک پرده از کتان ریزبافت تابیده برای در خیمۀ عبادت تهیه نموده، آن را با نخهای آبی، ارغوانی و قرمز گلدوزی کردند.
38 Basalaki na wolo bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido, mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo; basalaki makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.
برای این پرده پنج ستون قلابدار ساختند. سپس سر ستونها و گیره‌ها را با روکش طلا پوشاندند و پنج پایهٔ مفرغین برای ستونها درست کردند.

< Kobima 36 >