< Kobima 35 >

1 Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango: « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala:
ויקהל משה את כל עדת בני ישראל--ויאמר אלהם אלה הדברים אשר צוה יהוה לעשת אתם
2 — Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye.
ששת ימים תעשה מלאכה וביום השביעי יהיה לכם קדש שבת שבתון ליהוה כל העשה בו מלאכה יומת
3 Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. »
לא תבערו אש בכל משבתיכם ביום השבת
4 Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele: « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala:
ויאמר משה אל כל עדת בני ישראל לאמר זה הדבר אשר צוה יהוה לאמר
5 — Kati na biloko oyo bozali na yango, botia pembeni ndambo oyo bokobonza epai na Yawe lokola makabo. Moto nyonso oyo azali na motema malamu akomemela Yawe makabo: wolo, palata mpe bronze,
קחו מאתכם תרומה ליהוה כל נדיב לבו יביאה את תרומת יהוה זהב וכסף ונחשת
6 langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
ותכלת וארגמן ותולעת שני ושש ועזים
7 baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale; banzete ya akasia,
וערת אילם מאדמים וערת תחשים ועצי שטים
8 mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,
ושמן למאור ובשמים לשמן המשחה ולקטרת הסמים
9 mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
ואבני שהם--ואבני מלאים לאפוד ולחשן
10 Tika ete bato nyonso oyo kati na bino bayebi misala, baya kosala misala nyonso oyo Yawe atindi:
וכל חכם לב בכם יבאו ויעשו את כל אשר צוה יהוה
11 Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango;
את המשכן--את אהלו ואת מכסהו את קרסיו ואת קרשיו את בריחו את עמדיו ואת אדניו
12 Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido,
את הארן ואת בדיו את הכפרת ואת פרכת המסך
13 mesa, mabaya na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe,
את השלחן ואת בדיו ואת כל כליו ואת לחם הפנים
14 etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda,
ואת מנרת המאור ואת כליה ואת נרתיה ואת שמן המאור
15 etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali,
ואת מזבח הקטרת ואת בדיו ואת שמן המשחה ואת קטרת הסמים ואת מסך הפתח לפתח המשכן
16 etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,
את מזבח העלה ואת מכבר הנחשת אשר לו את בדיו ואת כל כליו את הכיר ואת כנו
17 batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango mpe rido mpo na ekotelo ya lopango,
את קלעי החצר את עמדיו ואת אדניה ואת מסך שער החצר
18 bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango,
את יתדת המשכן ואת יתדת החצר ואת מיתריהם
19 bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. »
את בגדי השרד לשרת בקדש את בגדי הקדש לאהרן הכהן ואת בגדי בניו לכהן
20 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize.
ויצאו כל עדת בני ישראל מלפני משה
21 Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule.
ויבאו כל איש אשר נשאו לבו וכל אשר נדבה רוחו אתו הביאו את תרומת יהוה למלאכת אהל מועד ולכל עבדתו ולבגדי הקדש
22 Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango.
ויבאו האנשים על הנשים כל נדיב לב הביאו חח ונזם וטבעת וכומז כל כלי זהב וכל איש אשר הניף תנופת זהב ליהוה
23 Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango.
וכל איש אשר נמצא אתו תכלת וארגמן ותולעת שני--ושש ועזים וערת אילם מאדמים וערת תחשים הביאו
24 Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso.
כל מרים תרומת כסף ונחשת הביאו את תרומת יהוה וכל אשר נמצא אתו עצי שטים לכל מלאכת העבדה--הביאו
25 Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
וכל אשה חכמת לב בידיה טוו ויביאו מטוה את התכלת ואת הארגמן את תולעת השני ואת השש
26 Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba.
וכל הנשים--אשר נשא לבן אתנה בחכמה טוו את העזים
27 Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
והנשאם הביאו--את אבני השהם ואת אבני המלאים לאפוד ולחשן
28 Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko.
ואת הבשם ואת השמן למאור--ולשמן המשחה ולקטרת הסמים
29 Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
כל איש ואשה אשר נדב לבם אתם להביא לכל המלאכה אשר צוה יהוה לעשות ביד משה--הביאו בני ישראל נדבה ליהוה
30 Moyize alobaki na bana ya Isalaele: « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda;
ויאמר משה אל בני ישראל ראו קרא יהוה בשם בצלאל בן אורי בן חור למטה יהודה
31 atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso:
וימלא אתו רוח אלהים בחכמה בתבונה ובדעת ובכל מלאכה
32 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze,
ולחשב מחשבת--לעשת בזהב ובכסף ובנחשת
33 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. »
ובחרשת אבן למלאת ובחרשת עץ לעשות בכל מלאכת מחשבת
34 Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala.
ולהורת נתן בלבו הוא ואהליאב בן אחיסמך למטה דן
35 Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso: kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.
מלא אתם חכמת לב לעשות כל מלאכת חרש וחשב ורקם בתכלת ובארגמן בתולעת השני ובשש וארג עשי כל מלאכה וחשבי מחשבת

< Kobima 35 >