< Kobima 32 >
1 Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki: — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.
videns autem populus quod moram faceret descendendi de monte Moses congregatus adversus Aaron ait surge fac nobis deos qui nos praecedant Mosi enim huic viro qui nos eduxit de terra Aegypti ignoramus quid acciderit
2 Aron azongiselaki bango: — Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango.
dixitque ad eos Aaron tollite inaures aureas de uxorum filiorumque et filiarum vestrarum auribus et adferte ad me
3 Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron.
fecit populus quae iusserat deferens inaures ad Aaron
4 Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki: — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.
quas cum ille accepisset formavit opere fusorio et fecit ex eis vitulum conflatilem dixeruntque hii sunt dii tui Israhel qui te eduxerunt de terra Aegypti
5 Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki: — Feti ekozala lobi mpo na Yawe.
quod cum vidisset Aaron aedificavit altare coram eo et praeconis voce clamavit dicens cras sollemnitas Domini est
6 Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela; mpe batelemaki mpo na kosakana.
surgentesque mane obtulerunt holocausta et hostias pacificas et sedit populus comedere ac bibere et surrexerunt ludere
7 Yawe alobaki na Moyize: — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,
locutus est autem Dominus ad Mosen vade descende peccavit populus tuus quem eduxisti de terra Aegypti
8 bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi: « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »
recesserunt cito de via quam ostendisti eis feceruntque sibi vitulum conflatilem et adoraverunt atque immolantes ei hostias dixerunt isti sunt dii tui Israhel qui te eduxerunt de terra Aegypti
9 Yawe alobaki lisusu na Moyize: — Namoni ete bato oyo bazali batomboki.
rursumque ait Dominus ad Mosen cerno quod populus iste durae cervicis sit
10 Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene.
dimitte me ut irascatur furor meus contra eos et deleam eos faciamque te in gentem magnam
11 Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki: — Eh Yawe! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi?
Moses autem orabat Dominum Deum suum dicens cur Domine irascitur furor tuus contra populum tuum quem eduxisti de terra Aegypti in fortitudine magna et in manu robusta
12 Mpo na nini bato ya Ejipito baloba: « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.
ne quaeso dicant Aegyptii callide eduxit eos ut interficeret in montibus et deleret e terra quiescat ira tua et esto placabilis super nequitia populi tui
13 Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki: « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
recordare Abraham Isaac et Israhel servorum tuorum quibus iurasti per temet ipsum dicens multiplicabo semen vestrum sicut stellas caeli et universam terram hanc de qua locutus sum dabo semini vestro et possidebitis eam semper
14 Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.
placatusque est Dominus ne faceret malum quod locutus fuerat adversus populum suum
15 Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima.
et reversus est Moses de monte portans duas tabulas testimonii manu scriptas ex utraque parte
16 Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe.
et factas opere Dei scriptura quoque Dei erat sculpta in tabulis
17 Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize: — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako!
audiens autem Iosue tumultum populi vociferantis dixit ad Mosen ululatus pugnae auditur in castris
18 Moyize azongisaki: — Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo.
qui respondit non est clamor adhortantium ad pugnam neque vociferatio conpellentium ad fugam sed vocem cantantium ego audio
19 Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.
cumque adpropinquasset ad castra vidit vitulum et choros iratusque valde proiecit de manu tabulas et confregit eas ad radices montis
20 Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.
arripiensque vitulum quem fecerant conbusit et contrivit usque ad pulverem quem sparsit in aqua et dedit ex eo potum filiis Israhel
21 Moyize atunaki Aron: — Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye?
dixitque ad Aaron quid tibi fecit hic populus ut induceres super eum peccatum maximum
22 Aron azongisaki: — Tika ete nkolo na ngai asilika te! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.
cui ille respondit ne indignetur dominus meus tu enim nosti populum istum quod pronus sit ad malum
23 Balobaki na ngai: « Salela biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, pamba te toyebi te likambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito. »
dixerunt mihi fac nobis deos qui praecedant nos huic enim Mosi qui nos eduxit de terra Aegypti nescimus quid acciderit
24 Bongo nayebisaki bango: « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo.
quibus ego dixi quis vestrum habet aurum tulerunt et dederunt mihi et proieci illud in ignem egressusque est hic vitulus
25 Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango.
videns ergo Moses populum quod esset nudatus spoliaverat enim eum Aaron propter ignominiam sordis et inter hostes nudum constituerat
26 Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki: — Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai. Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye.
et stans in porta castrorum ait si quis est Domini iungatur mihi congregatique sunt ad eum omnes filii Levi
27 Alobaki na bango: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. »
quibus ait haec dicit Dominus Deus Israhel ponat vir gladium super femur suum ite et redite de porta usque ad portam per medium castrorum et occidat unusquisque fratrem et amicum et proximum suum
28 Balevi basalaki ndenge Moyize atindaki; mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato bakufaki.
fecerunt filii Levi iuxta sermonem Mosi cecideruntque in die illo quasi tria milia hominum
29 Moyize alobaki: — Na mokolo ya lelo, Yawe atie bino pembeni mpo ete bobomi bana na bino moko ya mibali mpe bandeko na bino ya mibali. Bongo mpo na yango, apamboli bino.
et ait Moses consecrastis manus vestras hodie Domino unusquisque in filio et fratre suo ut detur vobis benedictio
30 Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato: — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino.
facto autem die altero locutus est Moses ad populum peccastis peccatum maximum ascendam ad Dominum si quo modo eum quivero deprecari pro scelere vestro
31 Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki: — Ah! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo.
reversusque ad Dominum ait obsecro peccavit populus iste peccatum magnum feceruntque sibi deos aureos aut dimitte eis hanc noxam
32 Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.
aut si non facis dele me de libro tuo quem scripsisti
33 Yawe azongiselaki Moyize: — Moto nyonso oyo asalaki lisumu liboso na Ngai, ye nde nakolongola na buku na Ngai.
cui respondit Dominus qui peccaverit mihi delebo eum de libro meo
34 Sik’oyo, kende! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.
tu autem vade et duc populum istum quo locutus sum tibi angelus meus praecedet te ego autem in die ultionis visitabo et hoc peccatum eorum
35 Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.
percussit ergo Dominus populum pro reatu vituli quem fecit Aaron