< Kobima 31 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord spoke to Moses, saying:
2 — Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda;
“Behold, I have called by name Bezalel the son of Uri, the son of Hur, from the tribe of Judah,
3 natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso;
and I have filled him with the Spirit of God, with wisdom, and understanding, and knowledge in every craft,
4 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze;
in order to design whatever must be fabricated from gold, and silver, and brass,
5 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso.
from marble, and precious stones, and various woods.
6 Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani. Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo:
And I have given to him, as his associate, Oholiab the son of Ahisamach, from the tribe of Dan. And I have placed wisdom in the heart of every artisan, so that they may make everything as I have instructed you:
7 Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo;
the tabernacle of the covenant, and the ark of the testimony, and the propitiatory which is over it, and all the vessels of the tabernacle,
8 mesa elongo na biloko na yango; etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso; etumbelo ya malasi,
and the table and its vessels, the most pure lampstand with its vessels, and the altars of incense
9 etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso; sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango;
and of holocaust and all their vessels, the washtub with its base,
10 bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,
the holy vestments for the ministry of Aaron the priest, and for his sons, so that they may execute their office of sacred rites,
11 mafuta ya epakolami mpe ansa ya solo kitoko mpo na Esika ya bule. Basengeli kosala yango ndenge kaka natindaki yo.
the oil of unction, and the incense of aromatics in the Sanctuary. All the things that I have instructed you, they shall make.”
12 Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord spoke to Moses, saying:
13 — Loba na bana ya Isalaele: « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino.
“Speak to the sons of Israel, and you shall say to them: See that you keep my Sabbath. For it is a sign between me and you among your generations, so that you may know that I am the Lord, who sanctifies you.
14 Lisusu, bokobatela mokolo ya Saba, pamba te ekozala mpo na bino mokolo ya bule. Moto nyonso oyo akobuka mobeko yango, basengeli koboma ye; mpe moto nyonso oyo akosala mosala ata ya lolenge nini na mokolo yango, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
Keep my Sabbath, for it is holy to you. Whoever will have polluted it, shall die a death. Whoever will have done any work in it, his soul shall perish from the midst of his people.
15 Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye.
For six days you shall do work. On the seventh day, it is the Sabbath, a rest sanctified by the Lord. All who will have done work on this day shall die.
16 Bana ya Isalaele bakobatela mokolo ya Saba; bango mpe bakitani na bango bakotosa yango lokola boyokani ya libela na libela.
Let the sons of Israel keep the Sabbath, and let them celebrate it throughout their generations. It is an everlasting covenant
17 Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. »
between me and the sons of Israel, and a perpetual sign. For in six days the Lord made heaven and earth, and in the seventh he ceased from work.”
18 Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.
And the Lord, having completed speaking in this way on Mount Sinai, gave to Moses two stone tablets of testimony, written with the finger of God.

< Kobima 31 >