< Kobima 30 >

1 Okosala lisusu etumbelo ya malasi na nzete ya akasia.
“You shall make an altar to burn incense on. You shall make it of acacia wood.
2 Molayi mpe mokuse na yango ekozala ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano; mpe bosanda na yango ekozala na metele moko. Maseke na yango ekokangana na etumbelo.
Its length shall be a cubit [18 in; 45.72 cm], and its width a cubit [18 in; 45.72 cm]. It shall be square, and its height shall be two cubits [36 in; 91.44 cm]. Its horns shall be of one piece with it.
3 Okobamba wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke; mpe okozingela pembeni na yango na libende ya wolo.
You shall overlay it with pure gold, its top, its sides around it, and its horns; and you shall make a gold molding around it.
4 Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
You shall make two golden rings for it under its molding; on its two ribs, on its two sides you shall make them; and they shall be for places for poles with which to bear it.
5 Okosala mabaya yango na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.
You shall make the poles of acacia wood, and overlay them with gold.
6 Okotia etumbelo liboso ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, liboso ya esika ya bolimbisi masumu oyo ezali na likolo ya Sanduku ya Litatoli. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na yo.
You shall put it before the veil that is by the ark of the testimony, before the mercy seat that is over the testimony, where I will meet with you.
7 Tongo nyonso, Aron akotumba ansa na etumbelo yango tango akobongisa minda; mpe pokwa nyonso, tango akopelisa yango.
Aaron [Light-bringer] shall burn incense of sweet spices on it every morning. When he tends the lamp candles, he shall burn it.
8 Aron asengeli kotumba lisusu ansa tango akopelisa minda na pokwa mpo ete ansa epelaka tango nyonso liboso ya Yawe mpo na libela.
When Aaron [Light-bringer] lights the lamp candles at evening, he shall burn it, a perpetual incense before Adonai throughout all your generations.
9 Kobonza te na etumbelo: ansa oyo elongobani te, mbeka ya kotumba to makabo ya bambuma. Mpe kosopa te likolo na yango makabo ya masanga ya vino.
You shall offer no strange incense on it, nor burnt offering, nor meal offering; and you shall pour no drink offering on it.
10 Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.
Aaron [Light-bringer] shall make atonement on its horns once in the year; with the blood of the sin offering of atonement once in the year he shall make atonement for it throughout all your generations. It is most holy to Adonai.”
11 Yawe alobaki na Moyize:
Adonai spoke to Moses [Drawn out], saying,
12 — Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama.
“When you take a census of the children of Israel [God prevails], according to those who are counted among them, then each man shall give a ransom for his soul to Adonai, when you count them; that there be no plague among them when you count them.
13 Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo: bagrame motoba ya palata.
They shall give this, everyone who passes over to those who are counted, half a shekel [0.2 oz; 5.67 g] after the shekel of the sanctuary (the shekel is 0.4oz; 11.34 g; or called twenty gerahs 20/50 of an oz); half a shekel for an offering to Adonai.
14 Moto nyonso oyo batangi, kobanda mibu tuku mibale to koleka, akofuta mpako mpo na Yawe.
Everyone who passes over to those who are counted, from twenty years old and upward, shall give the offering to Adonai.
15 Na tango ya kofuta mpako mpo na Yawe, mpo na kosikola bomoi na bino, mozwi akofuta te motuya koleka bagrame motoba ya palata, mpe mobola akofuta te motuya oyo ezali na se ya bagrame motoba.
The rich shall not give more, and the poor shall not give less, than the half shekel [0.2 oz; 5.67 g], when they give the offering of Adonai, to make atonement for your souls.
16 Okozwa epai ya bana ya Isalaele mpako mpo na kosikola bomoi na bango mpe okosalela yango mpo na mosala ya kobongisa Ndako ya kapo ya Bokutani. Ekozala mpo na bana ya Isalaele ekaniseli liboso ya Yawe mpo na lisiko ya bomoi na bango.
You shall take the atonement money from the children of Israel [God prevails], and shall appoint it for the service of the Tent of Meeting; that it may be a memorial for the children of Israel [God prevails] before Adonai, to make atonement for your souls.”
17 Yawe alobaki na Moyize:
Adonai spoke to Moses [Drawn out], saying,
18 — Okosala na bronze sani moko monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango; okotia yango na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
“You shall also make a basin of bronze, and its base of bronze, in which to wash. You shall put it between the Tent of Meeting and the altar, and you shall put water in it.
19 Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kosukola maboko mpe makolo na bango na mayi ya sani yango.
Aaron [Light-bringer] and his sons shall wash their hands and their feet in it.
20 Basengeli kosukola na mayi yango mpo ete bakufa te tango bakokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to tango bakopusana pembeni ya etumbelo mpo na kotumba makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
When they go into the Tent of Meeting, they shall wash with water, that they not die; or when they come near to the altar to minister, to burn an offering made by fire to Adonai.
21 Basengeli kosukola makolo mpe maboko na bango mpo ete bakufa te. Oyo ezali mobeko oyo ekobongwana te mpo na Aron mpe bakitani na ye mpo na libela.
So they shall wash their hands and their feet, that they not die: and it shall be a statute forever to them, even to him and to his descendants throughout their generations.”
22 Yawe alobaki na Moyize:
Moreover Adonai spoke to Moses [Drawn out], saying,
23 — Zwa mafuta ya solo kitoko: bakilo motoba ya mire, kati-kati na yango to bakilo misato ya sinamoni, bakilo misato ya kaneli,
“Also take fine spices: of liquid myrrh, five hundred shekels [12.5 lb; 5.67 kg]; and of fragrant cinnamon half as much, even two hundred and fifty shekels [6.25 lb; 2.835 kg]; and of fragrant cane, two hundred and fifty shekels [6.25 lb; 2.835 kg];
24 bakilo misato ya kasia, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, mpe balitele motoba ya mafuta ya olive.
and of cassia cinnamon five hundred shekels [12.5 lb; 5.67 kg], after the shekel of the sanctuary (the shekel is 0.4oz; 11.34 g); and a hin [0.98 gal; 3.7 L] of olive oil.
25 Na biloko oyo nyonso, okosala mafuta ya epakolami ya bule, ya solo kitoko, oyo esalemi na mosali malasi; ekozala mafuta ya bule mpo na epakolami.
You shall make it a holy anointing oil, a perfume compounded after the art of the perfumer: it shall be a holy anointing oil.
26 Okosalela mafuta yango mpo na kopakola Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli,
You shall use it to anoint the Tent of Meeting, the ark of the testimony,
27 mesa mpe bisalelo na yango nyonso, etelemiselo ya minda mpe biloko na yango nyonso, etumbelo ya malasi,
the table and all its articles, the menorah ·lamp· and its accessories, the altar of incense,
28 etumbelo ya bambeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso elongo na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
the altar of burnt offering with all its utensils, and the basin with its base.
29 Okobulisa yango mpo ete ezala bule koleka. Nyonso oyo ekotutana na yango ekozala bule.
You shall sanctify them, that they may be most holy. Whatever touches them shall be holy.
30 Okopakola Aron mpe bana na ye ya mibali mafuta mpe okobulisa bango mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.
You shall anoint Aaron [Light-bringer] and his sons, and sanctify them, that they may minister to me in the priest’s office.
31 Sima, okoloba na bana ya Isalaele: « Mafuta oyo ya epakolami ebulisami libela na libela mpo na Yawe.
You shall speak to the children of Israel [God prevails], saying, ‘This shall be a holy anointing oil to me throughout all your generations.
32 Bokopakola yango te na banzoto ya bato mpe bomekola te ndenge basalela yango, pamba te ezali bule mpe bosengeli komona yango bule.
It shall not be poured on man’s flesh, and do not make any like it, according to its composition. It is holy. It shall be holy to you.
33 Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. »
Whoever compounds any like it, or whoever puts any of it on a stranger, he shall be cut off from his people.’”
34 Yawe alobaki na Moyize: — Zwa biloko ya mike-mike ya solo kitoko: sitakite, onikisi, galibanumi mpe ansa oyo basangisa na eloko mosusu te; biloko nyonso ezala kilo moko.
Adonai said to Moses [Drawn out], “Take to yourself sweet spices, gum resin, and onycha, and galbanum; sweet spices with pure frankincense: there shall be an equal weight of each;
35 Okosala na yango ansa ya solo kitoko oyo esalemi na moto oyo asalaka malasi. Ekozala malasi oyo ezali na mungwa, ya peto mpe ya bule.
and you shall make incense of it, a perfume after the art of the perfumer, seasoned with salt, pure and holy:
36 Okosala na ndambo na yango mosusu putulu oyo okotia liboso ya Sanduku ya Litatoli kati na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakokutana na yo. Ekozala bule koleka mpo na bino.
and you shall beat some of it very small, and put some of it before the testimony in the Tent of Meeting, where I will meet with you. It shall be to you most holy.
37 Bokomisalela te ansa mosusu ya lolenge wana. Okomona yango bule mpe ekozala kaka mpo na Yawe.
The incense which you shall make, according to its composition you shall not make for yourselves: it shall be to you holy for Adonai.
38 Moto nyonso oyo akomekola yango mpo na kosepela na solo na yango ya kitoko, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
Whoever shall make any like that, to smell of it, he shall be cut off from his people.”

< Kobima 30 >