< Kobima 29 >
1 Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba;
あなたは彼らを聖別し、祭司としてわたしに仕えさせるために、次の事を彼らにしなければならない。すなわち若い雄牛一頭と、きずのない雄羊二頭とを取り、
2 okosala mapa mpe bagato ezanga levire, oyo farine na yango basangisa na mafuta; okosala mpe mikate ezanga levire, kasi bapakola yango mafuta; okosala yango na farine oyo batuta mpe bayungola malamu.
また種入れぬパンと、油を混ぜた種入れぬ菓子と、油を塗った種入れぬせんべいとを取りなさい。これらは小麦粉で作らなければならない。
3 Okotia yango nyonso na kitunga moko mpe okomema yango na ekuke ya Mongombo, elongo na mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali.
そしてこれを一つのかごに入れ、そのかごに入れたまま、かの一頭の雄牛および二頭の雄羊と共に携えてこなければならない。
4 Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.
あなたはまたアロンとその子たちを会見の幕屋の入口に連れてきて、水で彼らを洗い清め、
5 Okozwa bilamba ya bule mpe okolatisa Aron nzambala, kazaka, efode mpe elamba ya tolo; mpe okokanga ye mokaba ya efode.
また衣服を取り、下服とエポデに属する上服と、エポデと胸当とをアロンに着せ、エポデの帯を締めさせなければならない。
6 Okokanga ye kitendi na moto mpe okobakisa na likolo ya kitendi yango elembo ya libulisi.
そして彼の頭に帽子をかぶらせ、その帽子の上にかの聖なる冠をいただかせ、
7 Okozwa mafuta ya epakolami, okosopa yango na moto na ye mpe okopakola ye yango.
注ぎ油を取って彼の頭にかけ、彼に油注ぎをしなければならない。
8 Okomema bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.
あなたはまた彼の子たちを連れてきて下服を着せ、
9 Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela.
彼ら、すなわちアロンとその子たちに帯を締めさせ、ずきんをかぶらせなければならない。祭司の職は永久の定めによって彼らに帰するであろう。あなたはこうして、アロンとその子たちを職に任じなければならない。
10 Okomema ngombe ya mobali liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
あなたは会見の幕屋の前に雄牛を引いてきて、アロンとその子たちは、その雄羊の頭に手を置かなければならない。
11 Okokata ngombe yango kingo liboso na Ngai Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
そして会見の幕屋の入口で、主の前にその雄牛をほふり、
12 Okozwa ndambo ya makila ya ngombe yango, mpe okosalela mosapi na yo mpo na kotia makila yango na maseke ya etumbelo; okosopa na makolo ya etumbelo makila oyo ekotikala.
その雄牛の血を取り、指をもって、これを祭壇の角につけ、その残りの血を祭壇の基に注ぎかけなさい。
13 Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango; mpe okotumba yango na etumbelo.
また、その内臓をおおうすべての脂肪と肝臓の小葉と、二つの腎臓と、その上の脂肪とを取って、これを祭壇の上で焼かなければならない。
14 Kasi okotumba na libanda ya molako misuni ya ngombe yango, poso na yango mpe nyei na yango. Ezali mbeka mpo na masumu.
ただし、その雄牛の肉と皮と汚物とは、宿営の外で火で焼き捨てなければならない。これは罪祭である。
15 Okozwa lisusu meme moko ya mobali; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
あなたはまた、かの雄羊の一頭を取り、そしてアロンとその子たちは、その雄羊の頭に手を置かなければならない。
16 Okokata meme yango kingo, okozwa makila na yango mpe okosopa yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.
あなたはその雄羊をほふり、その血を取って、祭壇の四つの側面に注ぎかけなければならない。
17 Okokata-kata meme yango na biteni, okosukola biloko na yango ya kati elongo na makolo na yango mpe okotia yango likolo ya biteni mosusu mpe likolo ya moto.
またその雄羊を切り裂き、その内臓と、その足とを洗って、これをその肉の切れ、および頭と共に置き、
18 Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
その雄羊をみな祭壇の上で焼かなければならない。これは主にささげる燔祭である。すなわち、これは香ばしいかおりであって、主にささげる火祭である。
19 Okozwa meme mosusu ya mobali; Aron elongo na bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
あなたはまた雄羊の他の一頭を取り、アロンとその子たちは、その雄羊の頭に手を置かなければならない。
20 Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.
そしてあなたはその雄羊をほふり、その血を取って、アロンの右の耳たぶと、その子たちの右の耳たぶとにつけ、また彼らの右の手の親指と、右の足の親指とにつけ、その残りの血を祭壇の四つの側面に注ぎかけなければならない。
21 Okozwa makila oyo ekozala na etumbelo mpe mafuta ya epakolami, okosopela yango Aron mpe bilamba na ye, bana na ye mpe bilamba na bango. Na bongo, ye mpe bana na ye elongo na bilamba na bango bakobulisama.
また祭壇の上の血および注ぎ油を取って、アロンとその衣服、およびその子たちと、その子たちの衣服とに注がなければならない。彼とその衣服、およびその子らと、その衣服とは聖別されるであろう。
22 Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa: mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.
あなたはまた、その雄羊の脂肪、脂尾、内臓をおおう脂肪、肝臓の小葉、二つの腎臓、その上の脂肪、および右のももを取らなければならない。これは任職の雄羊である。
23 Tala biloko oyo okozwa kati na kitunga ya mapa ezanga levire, oyo ezali liboso ya Yawe: lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko.
また主の前にある種入れぬパンのかごの中からパン一個と、油菓子一個と、せんべい一個とを取り、
24 Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.
これをみなアロンの手と、その子たちの手に置き、これを主の前に揺り動かして、揺祭としなければならない。
25 Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
そしてあなたはこれを彼らの手から受け取り、燔祭に加えて祭壇の上で焼き、主の前に香ばしいかおりとしなければならない。これは主にささげる火祭である。
26 Okozwa tolo ya meme ya mobali mpo na kobulisa Aron, okotombola yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola; ekozala eteni na yo.
あなたはまた、アロンの任職の雄羊の胸を取り、これを主の前に揺り動かして、揺祭としなければならない。これはあなたの受ける分となるであろう。
27 Okobulisa biteni ya libulisi mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali: tolo mpe mopende ya meme oyo batombolaki mpo na kobonzela Yawe.
あなたはアロンとその子たちの任職の雄羊の胸ともも、すなわち揺り動かした揺祭の胸と、ささげたももとを聖別しなければならない。
28 Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani.
これはイスラエルの人々から永久に、アロンとその子たちの受くべきささげ物であって、イスラエルの人々の酬恩祭の犠牲の中から受くべきもの、すなわち主にささげるささげ物である。
29 Bilamba ya bule ya Aron ekotikala sima na ye epai ya bana na ye. Bakolata yango tango bakopakola bango mafuta mpe bakobulisa bango.
アロンの聖なる衣服は彼の後の子孫に帰すべきである。彼らはこれを着て、油注がれ、職に任ぜられなければならない。
30 Mikolo sambo, moko kati na bana na ye ya mibali oyo akokitana na ye lokola Nganga-Nzambe, akolata yango mpe akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe kati na Esika ya bule.
その子たちのうち、彼に代って祭司となり、聖所で仕えるために会見の幕屋にはいる者は、七日の間これを着なければならない。
31 Okokamata meme ya mobali ya libulisi mpe okolamba mosuni na yango na esika moko ya bule.
あなたは任職の雄羊を取り、聖なる場所でその肉を煮なければならない。
32 Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia mosuni ya meme mpe lipa oyo ezali kati na kitunga, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
アロンとその子たちは会見の幕屋の入口で、その雄羊の肉と、かごの中のパンとを食べなければならない。
33 Kaka bango nde bakolia makabo oyo na nzela na yango mosala ya bolimbisi masumu esalemaki tango babulisaki bango mpo na mosala ya bonganga-Nzambe; kasi moto oyo abulisama te akoki kolia yango te, pamba te ezali bule.
彼らを職に任じ、聖別するため、あがないに用いたこれらのものを、彼らは食べなければならない。他の人はこれを食べてはならない。これは聖なる物だからである。
34 Soki mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa ekomi kino na tongo, okotumba yango na moto. Bakoki kolia yango lisusu te, pamba te ezali bule.
もし任職の肉、あるいはパンのうち、朝まで残るものがあれば、その残りは火で焼かなければならない。これは聖なる物だから食べてはならない。
35 Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe.
あなたはわたしがすべて命じるように、アロンとその子たちにしなければならない。すなわち彼らのために七日のあいだ、任職の式を行わなければならない。
36 Mokolo na mokolo, okobonza mbeka ya ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Okopetola etumbelo na nzela ya mosala ya bolimbisi masumu, oyo okosala mpo na etumbelo yango mpe okosopela yango mafuta ya epakolami mpo na kobulisa yango.
あなたは毎日、あがないのために、罪祭の雄牛一頭をささげなければならない。また祭壇のために、あがないをなす時、そのために罪祭をささげ、また、これに油を注いで聖別しなさい。
37 Mikolo sambo, okosala mosala ya bolimbisi masumu na etumbelo mpo na kobulisa yango. Boye etumbelo ekokoma bule koleka mpe nyonso oyo ekotutana na yango ekokoma bule.
あなたは七日の間、祭壇のために、あがないをして、これを聖別しなければならない。こうして祭壇は、いと聖なる物となり、すべて祭壇に触れる者は聖となるであろう。
38 Tala mbeka oyo okopesela mitindo ete batumbaka mokolo na mokolo na etumbelo mpo na libela: bana meme mibale ya mobu moko.
あなたが祭壇の上にささぐべき物は次のとおりである。すなわち当歳の小羊二頭を毎日絶やすことなくささげなければならない。
39 Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa.
その一頭の小羊は朝にこれをささげ、他の一頭の小羊は夕にこれをささげなければならない。
40 Mpo na mwana meme ya liboso, okopesa bakilo misato ya farine basangisa na litele moko na kati-kati ya litele ya mafuta, mpe okosopa litele moko na kati-kati ya litele ya vino lokola mbeka ya masanga.
一頭の小羊には、つぶして取った油一ヒンの四分の一をまぜた麦粉十分の一エパを添え、また灌祭として、ぶどう酒一ヒンの四分の一を添えなければならない。
41 Mpo na mwana meme ya mibale, okobonza yango na pokwa elongo na lolenge moko ya makabo oyo obonzaki na tongo: farine, mafuta mpe mbeka ya masanga ya vino; okobonza yango lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
他の一頭の小羊は夕にこれをささげ、朝の素祭および灌祭と同じものをこれに添えてささげ、香ばしいかおりのために主にささげる火祭としなければならない。
42 Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, kati na bikeke nyonso: bokobanda kotumba yango na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya Yawe; ezali na esika wana nde nakobanda kokutana mpe kolobana na bino.
これはあなたがたが代々会見の幕屋の入口で、主の前に絶やすことなく、ささぐべき燔祭である。わたしはその所であなたに会い、あなたと語るであろう。
43 Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na bana ya Isalaele; bongo nkembo na Ngai ekobulisa esika yango.
また、その所でわたしはイスラエルの人々に会うであろう。幕屋はわたしの栄光によって聖別されるであろう。
44 Nakobulisa Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo; nakobulisa lisusu Aron mpe bana na ye ya mibali mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.
わたしは会見の幕屋と祭壇とを聖別するであろう。またアロンとその子たちを聖別し、祭司としてわたしに仕えさせるであろう。
45 Boye nakovanda kati na bana ya Isalaele mpe nakozala Nzambe na bango.
わたしはイスラエルの人々のうちに住んで、彼らの神となるであろう。
46 Bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango, Nzambe oyo abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na kovanda kati na bango. Nazali Yawe, Nzambe na bango.
わたしが彼らのうちに住むために、彼らをエジプトの国から導き出した彼らの神、主であることを彼らは知るであろう。わたしは彼らの神、主である。