< Kobima 28 >
1 Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali: Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
「你要從以色列人中,使你的哥哥亞倫和他的兒子拿答、亞比戶、以利亞撒、以他瑪一同就近你,給我供祭司的職分。
2 Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu.
你要給你哥哥亞倫做聖衣為榮耀,為華美。
3 Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
又要吩咐一切心中有智慧的,就是我用智慧的靈所充滿的,給亞倫做衣服,使他分別為聖,可以給我供祭司的職分。
4 Tala bilamba oyo bakotonga: elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
所要做的就是胸牌、以弗得、外袍、雜色的內袍、冠冕、腰帶,使你哥哥亞倫和他兒子穿這聖服,可以給我供祭司的職分。
5 Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
要用金線和藍色、紫色、朱紅色線,並細麻去做。
6 Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
「他們要拿金線和藍色、紫色、朱紅色線,並撚的細麻,用巧匠的手工做以弗得。
7 Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango; bankamba ekoleka likolo ya mapeka.
以弗得當有兩條肩帶,接上兩頭,使它相連。
8 Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode: ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
其上巧工織的帶子,要和以弗得一樣的做法,用以束上,與以弗得接連一塊,要用金線和藍色、紫色、朱紅色線,並撚的細麻做成。
9 Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele
要取兩塊紅瑪瑙,在上面刻以色列兒子的名字:
10 kolanda ndenge babotama: bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale.
六個名字在這塊寶石上,六個名字在那塊寶石上,都照他們生來的次序。
11 Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga; mpe okozingela yango na wolo.
要用刻寶石的手工,彷彿刻圖書,按着以色列兒子的名字,刻這兩塊寶石,要鑲在金槽上。
12 Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango.
要將這兩塊寶石安在以弗得的兩條肩帶上,為以色列人做紀念石。亞倫要在兩肩上擔他們的名字,在耶和華面前作為紀念。
13 Okotia bikangelo ya wolo
要用金子做二槽,
14 mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga.
又拿精金,用擰工彷彿擰繩子,做兩條鍊子,把這擰成的鍊子搭在二槽上。」
15 Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode: ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
「你要用巧匠的手工做一個決斷的胸牌。要和以弗得一樣的做法:用金線和藍色、紫色、朱紅色線,並撚的細麻做成。
16 Soki bagumbi yango na biteni mibale, molayi mpe mokuse esengeli kozala ndenge moko: basantimetele pene tuku mibale na mitano.
這胸牌要四方的,疊為兩層,長一虎口,寬一虎口。
17 Okotia na likolo na yango milongo minei ya mabanga ya talo. Na molongo ya liboso, okotia libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode;
要在上面鑲寶石四行:第一行是紅寶石、紅璧璽、紅玉;
18 na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama;
第二行是綠寶石、藍寶石、金鋼石;
19 na molongo ya misato, okotia libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite;
第三行是紫瑪瑙、白瑪瑙、紫晶;
20 mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo.
第四行是水蒼玉、紅瑪瑙、碧玉。這都要鑲在金槽中。
21 Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
這些寶石都要按着以色列十二個兒子的名字,彷彿刻圖書,刻十二個支派的名字。
22 Okosala basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo; okosala yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
要在胸牌上用精金擰成如繩的鍊子。
23 Okosala bapete mibale ya wolo mpo na elamba ya tolo mpe okokangisa yango na basonge mibale ya elamba yango.
在胸牌上也要做兩個金環,安在胸牌的兩頭。
24 Okolekisa basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo ezali na basonge ya elamba ya tolo,
要把那兩條擰成的金鍊子,穿過胸牌兩頭的環子。
25 mpe okokangisa basonge mibale mosusu ya basheneti yango, na bikangelo nyonso mibale; mpe okokangisa yango na bankamba ya efode; bankamba yango ekoleka na liboso.
又要把鍊子的那兩頭接在兩槽上,安在以弗得前面肩帶上。
26 Okosala bapete mibale ya wolo oyo okotia na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
要做兩個金環,安在胸牌的兩頭,在以弗得裏面的邊上。
27 Okosala bapete mosusu mibale ya wolo oyo okotia na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
又要做兩個金環,安在以弗得前面兩條肩帶的下邊,挨近相接之處,在以弗得巧工織的帶子以上。
28 Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango.
要用藍細帶子把胸牌的環子與以弗得的環子繫住,使胸牌貼在以弗得巧工織的帶子上,不可與以弗得離縫。
29 Boye tango Aron akokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule, akomema na motema na ye, na elamba ya tolo ya kokata makambo, bakombo ya bana mibali ya Isalaele lokola ekaniseli liboso ya Yawe mpo na libela.
亞倫進聖所的時候,要將決斷胸牌,就是刻着以色列兒子名字的,帶在胸前,在耶和華面前常作紀念。
30 Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela.
又要將烏陵和土明放在決斷的胸牌裏;亞倫進到耶和華面前的時候,要帶在胸前,在耶和華面前常將以色列人的決斷牌帶在胸前。」
31 Okosala mobimba ya nzambala oyo ekozala na se ya efode na langi ya ble.
「你要做以弗得的外袍,顏色全是藍的。
32 Nzambala esengeli kozala na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto; bakotonga pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
袍上要為頭留一領口,口的周圍織出領邊來,彷彿鎧甲的領口,免得破裂。
33 Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade.
袍子周圍底邊上要用藍色、紫色、朱紅色線做石榴。在袍子周圍的石榴中間要有金鈴鐺:
34 Ekolandana boye: ngonga moko ya moke ya wolo, mbuma moko ya grenade, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala.
一個金鈴鐺一個石榴,一個金鈴鐺一個石榴,在袍子周圍的底邊上。
35 Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima; wana ekolakisa ete akufi te.
亞倫供職的時候要穿這袍子。他進聖所到耶和華面前,以及出來的時候,袍上的響聲必被聽見,使他不至於死亡。
36 Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe: abulisama mpo na Yawe.
「你要用精金做一面牌,在上面按刻圖書之法刻着『歸耶和華為聖』。
37 Okokangisa yango na singa ya ble, mpe ekozala na likolo ya kitendi ya kokanga na moto, na mbunzu.
要用一條藍細帶子將牌繫在冠冕的前面。
38 Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango.
這牌必在亞倫的額上,亞倫要擔當干犯聖物條例的罪孽;這聖物是以色列人在一切的聖禮物上所分別為聖的。這牌要常在他的額上,使他們可以在耶和華面前蒙悅納。
39 Okotongela Aron nzambala ya lino mpe kitendi ya lino mpo na moto; okosalela ye mpe mokaba oyo bato oyo batongaka bililingi na bilamba bakoyeba kotia bililingi.
要用雜色細麻線織內袍,用細麻布做冠冕,又用繡花的手工做腰帶。
40 Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo.
「你要為亞倫的兒子做內袍、腰帶、裹頭巾,為榮耀,為華美。
41 Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
要把這些給你的哥哥亞倫和他的兒子穿戴,又要膏他們,將他們分別為聖,好給我供祭司的職分。
42 Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango: bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende.
要給他們做細麻布褲子,遮掩下體;褲子當從腰達到大腿。
43 Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te. Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye.
亞倫和他兒子進入會幕,或就近壇,在聖所供職的時候必穿上,免得擔罪而死。這要為亞倫和他的後裔作永遠的定例。」