< Kobima 27 >

1 Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo: ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
Uczynisz też ołtarz z drzewa sytym na pięć łokci wzdłuż, a na pięć łokci wszerz; czworograniasty będzie ołtarz, a na trzy łokcie wzwyż.
2 Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko; mpe okobamba bronze na etumbelo.
I poczynisz mu rogi na czterech węgłach jego; z niego będą rogi jego, i obijesz je miedzią.
3 Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.
Poczynisz też do niego kotły dla zsypowania popiołu; i miotły jego, i miednice jego, i widełki jego, i łopaty jego, wszystkie naczynia jego uczynisz z miedzi.
4 Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka.
Uczynisz też do niego kratę, na kształt sieci, miedzianą; a uczynisz u tej kraty cztery kolce miedziane na czterech rogach jej.
5 Okotia motalaka na se ya etumbelo, na bandelo na yango, mpo ete ekoma na kati-kati ya etumbelo.
I włożysz ją w okrąg ołtarza na dół, a będzie ta krata aż do połowy ołtarza.
6 Okosala na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe okobamba yango bronze.
Porobisz też drążki do ołtarza, drążki z drzewa sytym, a obijesz je miedzią.
7 Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo.
Które drążki przewleczone będą przez kolce; a będą te drążki na obydwu stronach ołtarza, gdy go nosić będą.
8 Okosala etumbelo na mabaya; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba.
Aby był czczy wewnątrz, uczynisz go z desek; jakoć ukazano na górze, tak go uczynią.
9 Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo: ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
Uczynisz też sień przybytku na południe ku prawej stronie; opony tej sieni będą z białego jedwabiu kręconego; na sto łokci wzdłuż będzie strona jego.
10 Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata.
Słupów też do nich dwadzieścia, a podstawków do nich dwadzieścia miedzianych; główki na słupach, i okręcenia ich będą srebrne.
11 Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata.
Na tenże kształt na stronie północnej wzdłuż opony będą, sto łokci wzdłuż; słupów też do nich dwadzieścia, a podstawków do nich dwadzieścia miedzianych; główki na słupach i okręcenia ich srebrne.
12 Ngambo ya weste ya lopango ya Mongombo ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. Ekozala mpe na barido, makonzi zomi mpe makolo zomi.
A szerokość sieni od strony zachodniej będzie miała opony na pięćdziesiąt łokci; słupów ich dziesięć, i podstawków ich dziesięć.
13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse.
Szerokość zaś sieni na przedniej stronie, na wschód słońca, pięćdziesiąt łokci.
14 Ngambo moko ya ekuke ekozala na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
Piętnaście też łokci opon na jednę stronę; słupów ich trzy i podstawków ich trzy.
15 Ngambo mosusu ya ekuke ekozala mpe na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
Na drugiej zaś stronie opon piętnaście łokci; słupów ich trzy i podstawków ich trzy.
16 Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
A do bramy sieni zasłona na dwadzieścia łokci z hijacyntu, i z szarłatu, i z karmazynu dwa kroć farbowanego, i z jedwabiu białego kręconego robotą haftarską; słupów jej cztery, i podstawków jej cztery.
17 Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata; mpe makolo na yango ya bronze.
Wszystkie słupy sieni w około otoczone będą srebrem; główki ich srebrne, a podstawki ich miedziane.
18 Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze.
Długość sieni na sto łokci, a szerokość na pięćdziesiąt, wszędzie jednostajna; a wysokość na pięć łokci, z białego jedwabiu kręconego, a podstawki jej miedziane.
19 Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze.
Wszystkie naczynia przybytku do wszelakiej usługi jego, i wszystkie kołki jego, i wszystkie kołki sieni, miedziane będą.
20 Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
A ty rozkażesz synom Izraelskim, aby przynieśli do ciebie oliwy z oliwnego drzewa czystej, wytłoczonej, do świecenia, aby lampy zawsze gorzały.
21 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.
W przybytku zgromadzenia przed zasłoną, która zakrywa skrzynię świadectwa, stawiać je będzie Aaron i synowie jego od wieczora aż do poranku przed Panem. Ta ustawa będzie wieczna w potomstwie ich między synami Izraelskimi.

< Kobima 27 >