< Kobima 24 >

1 Yawe alobaki na Moyize: — Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele; bokogumbama na mosika.
He said to Moses, “Come up to the LORD, you, and Aaron, Nadab, and Abihu, and seventy of the elders of Israel; and worship from a distance.
2 Moyize kaka nde asengeli kopusana pene ya Yawe; kasi bato mosusu te. Lisanga mobimba ya Isalaele mpe ekomata te elongo na ye.
Moses alone shall come near to the LORD, but they shall not come near. The people shall not go up with him.”
3 Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo: — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.
Moses came and told the people all the LORD’s words, and all the ordinances; and all the people answered with one voice, and said, “All the words which the LORD has spoken will we do.”
4 Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele.
Moses wrote all the LORD’s words, then rose up early in the morning and built an altar at the base of the mountain, with twelve pillars for the twelve tribes of Israel.
5 Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani.
He sent young men of the children of Israel, who offered burnt offerings and sacrificed peace offerings of cattle to the LORD.
6 Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo.
Moses took half of the blood and put it in basins, and half of the blood he sprinkled on the altar.
7 Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki: — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango.
He took the book of the covenant and read it in the hearing of the people, and they said, “We will do all that the LORD has said, and be obedient.”
8 Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki: — Oyo ezali makila ya boyokani oyo Yawe asali elongo na bino kolanda maloba oyo nyonso.
Moses took the blood, and sprinkled it on the people, and said, “Look, this is the blood of the covenant, which the LORD has made with you concerning all these words.”
9 Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba
Then Moses, Aaron, Nadab, Abihu, and seventy of the elders of Israel went up.
10 epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.
They saw the God of Israel. Under his feet was like a paved work of sapphire stone, like the skies for clearness.
11 Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.
He didn’t lay his hand on the nobles of the children of Israel. They saw God, and ate and drank.
12 Yawe alobaki na Moyize: « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »
The LORD said to Moses, “Come up to me on the mountain, and stay here, and I will give you the stone tablets with the law and the commands that I have written, that you may teach them.”
13 Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.
Moses rose up with Joshua, his servant, and Moses went up onto God’s Mountain.
14 Moyize alobaki na bakambi: « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. »
He said to the elders, “Wait here for us, until we come again to you. Behold, Aaron and Hur are with you. Whoever is involved in a dispute can go to them.”
15 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye
Moses went up on the mountain, and the cloud covered the mountain.
16 mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata.
The LORD’s glory settled on Mount Sinai, and the cloud covered it six days. The seventh day he called to Moses out of the middle of the cloud.
17 Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka.
The appearance of the LORD’s glory was like devouring fire on the top of the mountain in the eyes of the children of Israel.
18 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
Moses entered into the middle of the cloud, and went up on the mountain; and Moses was on the mountain forty days and forty nights.

< Kobima 24 >