< Kobima 23 >

1 Okopanza sango ya lokuta te; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.
汝虚妄の風説を言ふらすべからず惡き人と手をあはせて人を誣る證人となるべからず
2 Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.
汝衆の人にしたがひて惡をなすべからず訴訟において答をなすに方りて衆の人にしたがひて道を曲べからず
3 Okokotela mobola te na tango azali kosamba liboso ya basambisi.
汝また貧き人の訴訟を曲て庇くべからず
4 Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango.
汝もし汝の敵の牛あるひは驢馬の迷ひ去に遭ばかならずこれを牽てその人に歸すべし
5 Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te; osengeli kosalisa yango.
汝もし汝を惡む者の驢馬のその負の下に仆れ臥すを見ば愼みてこれを遺さるべからず必ずこれを助けてその負を釋べし
6 Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi.
汝貧き者の訴訟ある時にその判決を曲べからず
7 Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo; pamba te nalongisaka te moto mabe.
虚假の事に遠かれ無辜者と義者とはこれを殺すなかれ我は惡き者を義とすることあらざるなり
8 Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo.
汝賄賂を受べからず賄賂は人の目を暗まし義者の言を曲しむるなり
9 Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
他國の人を虐ぐべからず汝等はエジプトの國にをる時は他國の人にてありたれば他國の人の心を知なり
10 Mibu motoba, okolona bilanga na yo mpe okobuka mbuma.
汝六年の間汝の地に種播きその實を穫いるべし
11 Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
但し第七年にはこれを息ませて耕さずにおくべし而して汝の民の貧き者に食ふことを得せしめよ其餘れる者は野の獣これを食はん汝の葡萄園も橄欖園も斯のごとくなすべし
12 Mikolo motoba, okosala mosala na yo; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.
汝六日の間汝の業をなし七日に息むべし斯汝の牛および驢馬を息ませ汝の婢の子および他國の人をして息をつかしめよ
13 Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino.
わが汝に言し事に凡て心を用ひよ他の神々の名を稱ふべからずまた之を汝の口より聞えしめざれ
14 Mbala misato na mobu, bokosala bafeti misato mpo na Ngai.
汝年に三度わがために節筵を守るべし
15 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
汝無酵パンの節禮をまもるべし即ちわが汝に命ぜしごとくアビブの月の定の時において七日の間酵いれぬパンを食ふべし其はその月に汝エジプトより出たればなり徒手にてわが前に出る者あるべからず
16 Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.
また穡時の節筵を守るべし是すなはち汝が勞苦て田野に播る者の初の實を祝ふなり又収蔵の節筵を守るべし是すなはち汝の勞苦によりて成る者を年の終に田野より収蔵る者なり
17 Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe.
汝の男たる者は皆年に三次主ヱホバの前に出べし
18 Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.
汝わが犠牲の血を酵いれしパンとともに献ぐべからず又わが節筵の脂を翌朝まで殘しおくべからず
19 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
汝の地に初に結べる實の初を汝の神ヱホバの室に持きたるべし汝山羊羔をその母の乳にて煮べからず
20 Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino.
視よ我天の使をかはして汝に先たせ途にて汝を守らせ汝をわが備へし處に導かしめん
21 Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.
汝等その前に愼みをりその言にしたがへ之を怒らするなかれ彼なんぢらの咎を赦さざるべしわが名かれの中にあればなり
22 Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino.
汝もし彼が言にしたがひ凡てわが言ところを爲ば我なんぢの敵の敵となり汝の仇の仇となるべし
23 Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi; bongo Ngai nakosilisa bango.
わが使汝にさきだちゆきて汝をアモリ人ヘテ人ペリジ人カナン人ヒビ人およびヱブス人に導きたらん我かれらを絶べし
24 Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.
汝かれらの神を拝むべからずこれに奉事べからず彼らの作にならふなかれ汝其等を悉く毀ちその偶像を打摧くべし
25 Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.
汝等の神ヱホバに事へよ然ばヱホバ汝らのパンと水を祝し汝らの中より疾病を除きたまはん
26 Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino.
汝の國の中には流產する者なく妊ざる者なかるべし我汝の日の數を盈さん
27 Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.
我わが畏懼をなんぢの前に遣し汝が至るところの民をことごとく敗り汝の諸の敵をして汝に後を見せしめん
28 Nakotinda banzoyi ya minene liboso na bino mpo na kobengana bato ya Evi, ya Kanana mpe ya Iti na liboso na bino.
吾黄蜂を汝の先につかはさん是ヒビ人カナン人およびヘテ人を汝の前より逐はらふべし
29 Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino.
我かれらを一年の中には汝の前より逐はらはじ恐くは土地荒れ野の獣増て汝を害せん
30 Nakobengana bango moke-moke liboso na bino kino bokokoma ebele mpo na kozwa mboka.
我漸々にかれらを汝の前より逐はらはん汝らは遂に増てその地を獲にいたらん
31 Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.
我なんぢの境をさだめて紅海よりペリシテ人の海にいたらせ曠野より河にいたらしめん我この地に住る者を汝の手に付さん汝かれらを汝の前より逐はらふべし
32 Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango.
汝かれらおよび彼らの神と何の契約をもなすべからず
33 Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »
彼らは汝の國に住べきにあらず恐くは彼ら汝をして我に罪を犯さしめん汝もし彼等の神に事なばその事かならず汝の機檻となるべきなり

< Kobima 23 >