< Kobima 22 >

1 Soki moto ayibi ngombe moko to meme moko, bongo abomi yango to ateki yango; asengeli kofuta bangombe mitano mpo na ngombe moko oyo ayibaki to bameme minei mpo na meme moko oyo ayibaki.
If a man steal an ox, or a sheep, and kill it, or sell it, he shall restore five oxen for the ox, and four sheep for the sheep.
2 Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.
If the thief be encountered breaking in, and be smitten so that he die, there shall be no blood-guiltiness for him.
3 Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.
If the sun be risen on him, there shall be blood-guiltiness for him; he should have made full restitution: if he had nothing, he would have been sold for his theft.
4 Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale.
If the stolen thing be actually found alive in his hand, whether it be ox, or ass, or sheep, he shall restore double.
5 Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.
If a man shall cause a field or vineyard to be eaten, and put in his cattle, and pasture in another man's field, of the best of his own field, and of the best of his own vineyard shall he make [it] good.
6 Soki moto apelisi moto, bongo moto yango ekutani na banzete ya sende, epanzani mpe ezikisi ble oyo basili kotia na maboke to ble oyo babuki nanu te, moto oyo apelisaki moto asengeli kofuta biloko nyonso oyo eziki.
— If fire break out, and seize the thorns, and the stacks of corn, or the standing corn, or the field be consumed, he that kindled the fire shall fully make it good.
7 Soki moto abombisi palata to biloko na ye ya motuya epai ya moninga na ye, bongo bayibi yango kati na ndako ya moninga wana; soki bakangi moyibi ya biloko yango, akozongisa mbala mibale biloko oyo ayibaki.
— If a man deliver unto his neighbour money or stuff to keep, and it be stolen out of the man's house; if the thief be found, let him restore double;
8 Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te.
if the thief be not found, the master of the house shall be brought before the judges, [to see] if he has not put his hand unto his neighbour's goods.
9 Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba: ‹ Ezali ya ngai! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye.
As to all manner of fraud, — as to ox, as to ass, as to sheep, as to clothing, as to everything lost, of which [a man] saith, It is this — the cause of both parties shall come before the judges: he whom the judges shall condemn shall restore double to his neighbour.
10 Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki,
If a man deliver unto his neighbour an ass, or an ox, or a sheep, or any cattle, to keep, and it die, or be hurt, or driven away, and no man see [it],
11 kaka ndayi oyo balapi na Kombo na Yawe nde ekokabola bango: Moto oyo andimaki kobokola akolapa ndayi liboso ya Yawe mpo na kotalisa ete ayebi likambo te. Bongo nkolo nyama asengeli kondima maloba ya moninga na ye mpe ye akofuta nyama yango te.
an oath of Jehovah shall be between them both, that he hath not put his hand unto his neighbour's goods; and the owner of it shall accept it, and he shall not make [it] good.
12 Kasi soki bayibi nyama yango na maboko ya moto oyo andimaki kobokola yango, akofuta nyama yango epai ya nkolo na yango.
But if it have been stolen from him, he shall make [it] good unto its owner.
13 Soki ezali nyama ya zamba nde ebomaki nyama yango, moto oyo andimaki kobokola yango akomema lokola litatoli biteni oyo etikali; bongo akofuta nyama yango te.
If it have been torn in pieces, let him bring it [as] witness: he shall not make good what was torn.
14 Soki moto adefi nyama epai ya moninga na ye, bongo ebukani lokolo to ekufi na tango oyo nkolo na yango azali te, moto wana asengeli kofuta yango.
— And if a man borrow anything of his neighbour, and it be hurt, or die, its owner not being with it, he shall fully make it good;
15 Nzokande soki nkolo na yango azalaki wana, moto oyo adefaki akofuta nyama yango te. Soki bayokanaki ete akofuta mbongo sima na kosalela yango, asengeli kofuta mbongo oyo bayokanaki.
if the owner thereof be with it, he shall not make [it] good; if it be a hired [thing], it came for its hire.
16 Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye.
And if a man seduce a virgin that is not betrothed, and lie with her, he shall certainly endow her, to be his wife.
17 Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
If her father utterly refuse to give her unto him, he shall weigh money according to the dowry of virgins.
18 Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji.
— Thou shalt not suffer a witch to live.
19 Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
— Every one that lieth with a beast shall certainly be put to death.
20 Moto nyonso oyo akotumba mbeka mpo na nzambe mosusu, basengeli koboma ye; mbeka ekotumbama kaka mpo na Yawe Ye moko.
— He that sacrificeth to [any] god, save to Jehovah only, shall be devoted to destruction.
21 Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
Thou shalt neither vex a stranger, nor oppress him; for ye have been strangers in the land of Egypt.
22 Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.
Ye shall not afflict any widow or fatherless child.
23 Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.
If thou afflict him in any way, if he cry at all unto me, I will certainly hear his cry;
24 Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.
and my anger shall burn, and I will slay you with the sword; and your wives shall be widows, and your children fatherless.
25 Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka; okosenga ye mileki te.
— If thou lend money to my people, the poor with thee, thou shalt not be to him as a usurer: ye shall charge him no interest.
26 Soki moninga na yo asimbisi yo kazaka na ye lokola ndanga, okozongisela ye yango liboso ete butu eya;
— If thou at all take thy neighbour's garment in pledge, thou shalt return it to him before the sun goes down;
27 pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
for that is his only covering, his garment for his skin: on what shall he lie down? And it shall come to pass, when he crieth unto me, that I will hear; for I am gracious.
28 Okofingaka Nzambe te mpe okolakelaka mokambi ya bato na yo mabe te.
Thou shalt not revile the judges, nor curse a prince amongst thy people.
29 Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.
— Thou shalt not delay the fulness of thy [threshing-floor] and the outflow of thy [winepress]. The firstborn of thy sons shalt thou give unto me.
30 Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo: ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.
Likewise shalt thou do with thy calf, with thy sheep: seven days shall it be with its dam; on the eighth day thou shalt give it me.
31 Bokozala bule mpo na Ngai: bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba; bosengeli kopesa yango na bambwa.
— And ye shall be holy men unto me; and ye shall not eat flesh torn in the field: ye shall cast it to the dog.

< Kobima 22 >