< Kobima 21 >

1 Yawe alobaki na Moyize: — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele:
Dessa äro de rätter som du skall förelägga dem:
2 « Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
Om du köper en hebreisk träl, skall han tjäna i sex år, men på det sjunde skall han givas fri, utan lösen.
3 Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo.
Har han kommit allena, så skall han givas fri allena; var han gift, så skall hans hustru givas fri med honom.
4 Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye; mobali akokende ye moko.
Har hans herre givit honom en hustru, och har denna fött honom söner eller döttrar, så skola hustrun och hennes barn tillhöra hennes herre, och allenast mannen skall givas fri.
5 Kasi soki mowumbu alobi: ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, ›
Men om trälen säger: "Jag har min herre, min hustru och mina barn så kära, att jag icke vill givas fri",
6 wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.
då skall hans herre föra honom fram för Gud och ställa honom vid dörren eller dörrposten, och hans herre skall genomborra hans öra med en syl; därefter vare han hans träl evärdligen.
7 Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango.
Om någon säljer sin dotter till trälinna, så skall hon icke givas fri såsom trälarna givas fria.
8 Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye.
Misshagar hon sin herre, sedan denne förut har ingått förbindelse med henne, så låte han henne köpas fri. Till främmande folk have han icke makt att sälja henne, när han så har handlat trolöst mot henne.
9 Soki aponaki mwana mwasi yango mpo ete azala mwasi ya mwana na ye ya mobali, asengeli kokokisa makambo oyo mibeko esengaka mpo na kobala mwasi.
Men om han låter sin son ingå förbindelse med henne, så förunne han henne döttrars rätt.
10 Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala.
Tager han sig ännu en hustru, så göre han icke någon minskning i den förras kost, beklädnad eller äktenskapsrätt.
11 Soki apimeli ye ata eloko moko kati na biloko oyo misato, wana mwasi oyo akoki kokende na bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
Om han icke låter henne njuta sin rätt i dessa tre stycken, så skall hon givas fri, utan lösen och betalning.
12 Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye.
Den som slår någon, så att han dör, han skall straffas med döden.
13 Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.
Men om han icke traktade efter den andres liv, utan Gud lät denne oförvarandes träffas av hans hand, så skall jag anvisa dig en ort dit han kan fly.
14 Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.
Men om någon begår det dådet att han dräper sin nästa med list, så skall du gripa honom, vore han ock invid mitt altare, och han måste dö.
15 Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
Den som slår sin fader eller sin moder, han skall straffas med döden.
16 Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
Den som stjäl en människa, vare sig han sedan säljer den stulne, eller denne finnes kvar hos honom, han skall straffas med döden.
17 Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
Den som uttalar förbannelser över sin fader eller sin moder, han skall straffas med döden.
18 Soki bato baswani, bongo moko abeti moninga likofi to libanga; mpe moto oyo babeti likofi to libanga akufi te kasi abeli makasi;
Om män tvista med varandra, och den ene slår den andre med en sten eller med knuten hand, så att denne väl icke dör, men bliver sängliggande,
19 soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
dock att han sedan kommer sig och kan gå ute, stödd vid sin stav, så skall den som slog honom vara fri ifrån straff; allenast ersätte han honom för den tid han har förlorat och besörje sjukvård åt honom.
20 Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu.
Om någon slår sin träl eller sin trälinna med en käpp, så att den slagne dör under hans hand, så skall han straffas därför.
21 Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo.
Men om den slagne lever en eller två dagar, skall han icke straffas, ty det var hans egna penningar.
22 Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.
Om män träta med varandra, och någon av dem stöter till en havande kvinna, så att hon föder fram sitt foster, men eljest ingen olycka sker, så böte han vad kvinnans man ålägger honom och betale efter skiljedomares prövning.
23 Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi:
Men om olycka sker, skall liv givas för liv,
24 liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo,
öga för öga, tand för tand, hand för hand, fot för fot,
25 kozika mpo na kozika, pota mpo na pota, litutu mpo na litutu.
brännskada för brännskada, sår för sår, blånad för blånad.
26 Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye na liso, mpe liso yango ekufi, moto yango akopesa bonsomi na mowumbu mpo na liso na ye.
Om någon slår sin träl eller sin trälinna i ögat och fördärvar det, så släppe han den skadade fri, till ersättning för ögat.
27 Soki abuki linu ya mowumbu na ye ya mobali to ya mwasi mowumbu na ye, akopesa ye bonsomi mpo na linu na ye.
Sammalunda, om någon slår ut en tand på sin träl eller sin trälinna, så släppe han den skadade fri, till ersättning för tanden.
28 Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te.
Om en oxe stångar någon till döds, man eller kvinna, så skall oxen stenas, och köttet må icke ätas; men oxens ägare vara fri ifrån straff.
29 Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa.
Men om oxen förut har haft vanan att stångas, och hans ägare har blivit varnad, men denne ändå icke tager vara på honom, och oxen så dödar någon, man eller kvinna, då skall oxen stenas, och hans ägare skall ock dödas.
30 Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye.
Men skulle lösepenning bliva denne ålagd, så give han till lösen för sitt liv så mycket som ålägges honom.
31 Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke.
Är det en gosse eller en flicka som har blivit stångad av oxen, så skall med denne förfaras efter samma lag.
32 Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.
Men om oxen stångar en träl eller en trälinna, så skall ägaren giva åt den stångades herre trettio siklar silver, och oxen skall stenas.
33 Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna;
Om någon öppnar en brunn, eller om någon gräver en ny brunn och icke täcker över den, och sedan en oxe eller en åsna faller däri,
34 nkolo libulu asengeli kofuta epai ya nkolo nyama mbongo oyo ekokani na motuya ya nyama oyo esili kokufa, mpe nyama yango ekokoma ya ye.
så skall brunnens ägare giva ersättning i penningar åt djurets ägare, men den döda kroppen skall vara hans.
35 Soki ngombe ya moto moko ebomi ngombe ya moto mosusu, esengeli koteka ngombe oyo ezali na bomoi mpe kokabola na kati-kati mbongo mpe ngombe oyo esili kokufa.
Om någons oxe stångar en annans oxe, så att denne dör, så skola de sälja den levande oxen och dela betalningen för honom och därjämte dela den döda kroppen.
36 Kasi soki eyebani ete ngombe yango emesana kobeta bato maseke, bongo nkolo na yango abateli yango malamu te; wana asengeli kofuta ngombe mpo na ngombe, mpe ngombe ya kokufa ekokoma ya ye.
Var det däremot känt att oxen förut hade vanan att stångas, men tog hans ägare ändå icke vara på honom, så skall han ersätta oxe med oxe, men den döda kroppen skall vara hans.

< Kobima 21 >