< Kobima 2 >
1 Mobali moko ya libota ya Levi abalaki mwasi kati na libota ya Levi.
Now a man of the house of Levi married a daughter of Levi,
2 Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato.
and she conceived and gave birth to a son. When she saw that he was a beautiful child, she hid him for three months.
3 Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili.
But when she could no longer hide him, she got him a papyrus basket and coated it with tar and pitch. Then she placed the child in the basket and set it among the reeds along the bank of the Nile.
4 Ndeko mwasi ya mwana yango atelemaki mosika mpo na kotala likambo oyo ekokaki kokomela ye.
And his sister stood at a distance to see what would happen to him.
5 Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango.
Soon the daughter of Pharaoh went down to bathe in the Nile, and her attendants were walking along the riverbank. And when she saw the basket among the reeds, she sent her maidservant to retrieve it.
6 Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki: « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. »
When she opened it, she saw the child, and behold, the little boy was crying. So she had compassion on him and said, “This is one of the Hebrew children.”
7 Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon: — Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo?
Then his sister said to Pharaoh’s daughter, “Shall I go and call one of the Hebrew women to nurse the child for you?”
8 Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye: — Iyo, kende! Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango.
“Go ahead,” Pharaoh’s daughter told her. And the girl went and called the boy’s mother.
9 Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango: « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. » Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele.
Pharaoh’s daughter said to her, “Take this child and nurse him for me, and I will pay your wages.” So the woman took the boy and nursed him.
10 Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki: « Nazwaki ye na mayi. »
When the child had grown older, she brought him to Pharaoh’s daughter, and he became her son. She named him Moses and explained, “I drew him out of the water.”
11 Mokolo moko, wana Moyize akomaki mokolo, akendeki na esika oyo bandeko na ye bazalaki mpe amonaki bango kosala misala makasi oyo bapesaki bango mpo na konyokola bango. Amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moko kati na bato na ye Ba-Ebre.
One day, after Moses had grown up, he went out to his own people and observed their hard labor. He saw an Egyptian beating a Hebrew, one of his own people.
12 Atalaki ngambo na ngambo mpe amonaki moto te; bongo abomaki moto ya Ejipito mpe akundaki ye na zelo.
After looking this way and that and seeing no one, he struck down the Egyptian and hid his body in the sand.
13 Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe: — Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo?
The next day Moses went out and saw two Hebrews fighting. He asked the one in the wrong, “Why are you attacking your companion?”
14 Moto wana azongisaki: — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito? Moyize abangaki mpe amilobelaki: « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. »
But the man replied, “Who made you ruler and judge over us? Are you planning to kill me as you killed the Egyptian?” Then Moses was afraid and thought, “This thing I have done has surely become known.”
15 Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani.
When Pharaoh heard about this matter, he sought to kill Moses. But Moses fled from Pharaoh and settled in the land of Midian, where he sat down beside a well.
16 Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango.
Now the priest of Midian had seven daughters, and they came to draw water and fill the troughs to water their father’s flock.
17 Kasi babateli bibwele bayaki mpe babenganaki bango. Moyize atelemaki, akotelaki bango mpe amelisaki bibwele na bango mayi.
And when some shepherds came along and drove them away, Moses rose up to help them and watered their flock.
18 Tango bana basi bazongaki epai ya tata na bango Reweli, atunaki bango: — Mpo na nini lelo bozongi noki?
When the daughters returned to their father Reuel, he asked them, “Why have you returned so early today?”
19 Bango bazongisaki: — Moto moko ya Ejipito abundelaki biso liboso ya babateli bibwele, atokelaki biso mayi mpe amelisaki bibwele.
“An Egyptian rescued us from the shepherds,” they replied. “He even drew water for us and watered the flock.”
20 Reweli atunaki bana na ye ya basi: — Moto yango ya Ejipito azali wapi? Mpo na nini botiki ye kuna? Bobenga ye mpo ete aya kolia.
“So where is he?” their father asked. “Why did you leave the man behind? Invite him to have something to eat.”
21 Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize.
Moses agreed to stay with the man, and he gave his daughter Zipporah to Moses in marriage.
22 Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki: « Nazali mopaya na mboka mopaya. »
And she gave birth to a son, and Moses named him Gershom, saying, “I have become a foreigner in a foreign land.”
23 Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.
After a long time, the king of Egypt died. The Israelites groaned and cried out under their burden of slavery, and their cry for deliverance from bondage ascended to God.
24 Nzambe ayokaki koganga na bango mpe akanisaki boyokani na Ye oyo asalaki elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
So God heard their groaning, and He remembered His covenant with Abraham, Isaac, and Jacob.
25 Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.
God saw the Israelites and took notice.